Nzembo
74 Ee Nzambe, mpo na nini obwaki biso mpo na libela?+
Mpo na nini nkanda na yo engaleli* etonga oyo ezali na esika na yo ya koleisa bibwɛlɛ matiti?+
Kanisá Ngomba Siona, epai ofandaki.+
3 Kende na esika oyo ebebisamaki mpo na libela.+
Monguna abebisi eloko nyonso na esika mosantu.+
4 Banguna na yo bagangi na kati ya esika na yo ya kokutana.*+
Kuna, batɛlɛmisi babɛndɛlɛ na bango moko lokola bilembo.
5 Bazalaki lokola bato oyo basalelaka epasola* na zamba ya monene.
6 Na bipasola* mpe na bibende, babukaki mayemi nyonso ya esika mosantu.+
7 Batye mɔtɔ na esika na yo mosantu.+
Bakómisi tabernakle oyo ememi nkombo na yo eloko mpamba, mpe babwaki yango na mabele.
8 Bango ná bana na bango balobi na motema na bango ete:
“Bisika nyonso oyo bato bakutanaka mpo na kosambela Nzambe na mokili esengeli kotumbama.”
9 Tomoni ata elembo moko te mpo na biso;
Mosakoli ata moko te azali lisusu,
Mpe moto ata moko te kati na biso ayebi soki ekoumela ntango boni.
10 Ee Nzambe, tii ntango nini monguna akokoba kotumola yo?+
Monguna akozanga nde limemya na nkombo na yo mpo na libela?+
11 Mpo na nini ozali kozongisa lobɔkɔ na yo ya mobali?+
Bimisá yango na ntolo na yo* mpe sukisá bango.
14 Yo obukibuki mitó ya Leviatana;*
Opesaki yango ezala bilei ya bato, ya baoyo bafandaka na bisika oyo ekauká.
15 Yo ofungolaki nzela mpo na maziba mpe mikɛli;+
Yo okaukisaki bibale oyo mai etíyolaka ntango nyonso.+
16 Moi ezali ya yo, mpe butu ezali ya yo.
19 Kosundola te bomoi* ya epopo* na yo na nyama ya zamba.
Kobosana te mpo na libela bomoi ya bato na yo oyo bazali komona mpasi.
20 Kanisá kondimana osalá na biso,
Mpo bisika ya molili ya mabele ekómi bisika oyo mobulu etondi.
21 Moto oyo atutami alɛmba nzoto te ntango azali kozonga;+
Moto mpamba mpe mobola básanzola nkombo na yo.+
22 Ee Nzambe, tɛlɛmá, sambá mpo na likambo na yo.
Kanisá ndenge oyo bazoba bazali kotumola yo mokolo mobimba.+
23 Kobosana te makambo oyo banguna na yo bazali koloba.
Makɛlɛlɛ ya baoyo bazali kotɛmɛla yo ezali komata ntango nyonso.