Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 39
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Libebi ya Goge ná basoda na ye (1-10)

      • Kokundama na Lobwaku ya Hamone-Goge (11-20)

      • Kozongisama ya Yisraele (21-29)

        • Nzambe akosopela Yisraele elimo na ye (29)

Ezekiele 39:1

Mitindami

  • +Ezk 38:2
  • +Ezk 27:13; 32:26

Ezekiele 39:2

Mitindami

  • +Ezk 38:4, 15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Esakweli ya Danyele, lok. 283

Ezekiele 39:4

Mitindami

  • +Ezk 38:21
  • +Em 19:17, 18

Ezekiele 39:5

Mitindami

  • +Yir 25:33

Ezekiele 39:6

Mitindami

  • +Ezk 38:22

Ezekiele 39:7

Mitindami

  • +Ezk 38:16
  • +Yis 6:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2012, lok. 21

Ezekiele 39:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Banguba ya mike, oyo mbala mingi babwaki mbanzi bazalaki kosalela.

  • *

    To mbala mosusu, mangenda oyo ezali ya nsɔngɛ mpe esalelamaka lokola ebundeli.

Mitindami

  • +Nz 46:9

Ezekiele 39:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Lobwaku ya ebele ya bato ya Goge.”

Mitindami

  • +Ezk 38:2
  • +Ezk 39:15

Ezekiele 39:12

Mitindami

  • +Mib 21:22, 23

Ezekiele 39:13

Mitindami

  • +Ezk 38:16

Ezekiele 39:15

Mitindami

  • +Ezk 39:11

Ezekiele 39:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, ebele ya bato.

Mitindami

  • +Ezk 39:12

Ezekiele 39:17

Mitindami

  • +Yis 34:6-8; Yir 46:10; Sef 1:7
  • +Em 19:17, 18

Ezekiele 39:20

Mitindami

  • +Ezk 38:4-6; Hag 2:22; Em 19:17, 18

Ezekiele 39:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lobɔkɔ.”

Mitindami

  • +Kob 7:4; 14:4; Yis 37:20; Ezk 38:16; Mal 1:11

Ezekiele 39:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “nabombelaki bango elongi na ngai.”

Mitindami

  • +2Nt 7:21, 22
  • +Mib 31:18; Yis 59:2
  • +Le 26:24, 25; Mib 32:30; Nz 106:40, 41

Ezekiele 39:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “nabombelaki bango elongi na ngai.”

Ezekiele 39:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “nakomonisa ete nakangamaka kaka na.”

Mitindami

  • +Yir 30:3; Ezk 34:13
  • +Hos 1:11; Zek 1:16
  • +Ezk 36:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 137

Ezekiele 39:26

Mitindami

  • +Da 9:16
  • +Le 26:5, 6

Ezekiele 39:27

Mitindami

  • +Yir 30:10; Am 9:14; Sef 3:20
  • +Yis 5:16; Ezk 36:23

Ezekiele 39:28

Mitindami

  • +Mib 30:4

Ezekiele 39:29

Mitindami

  • +Yis 45:17; 54:8; Yir 29:14
  • +Yis 32:14, 15; Yoe 2:28

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 39:1Ezk 38:2
Ezk. 39:1Ezk 27:13; 32:26
Ezk. 39:2Ezk 38:4, 15
Ezk. 39:4Ezk 38:21
Ezk. 39:4Em 19:17, 18
Ezk. 39:5Yir 25:33
Ezk. 39:6Ezk 38:22
Ezk. 39:7Ezk 38:16
Ezk. 39:7Yis 6:3
Ezk. 39:9Nz 46:9
Ezk. 39:11Ezk 38:2
Ezk. 39:11Ezk 39:15
Ezk. 39:12Mib 21:22, 23
Ezk. 39:13Ezk 38:16
Ezk. 39:15Ezk 39:11
Ezk. 39:16Ezk 39:12
Ezk. 39:17Yis 34:6-8; Yir 46:10; Sef 1:7
Ezk. 39:17Em 19:17, 18
Ezk. 39:20Ezk 38:4-6; Hag 2:22; Em 19:17, 18
Ezk. 39:21Kob 7:4; 14:4; Yis 37:20; Ezk 38:16; Mal 1:11
Ezk. 39:232Nt 7:21, 22
Ezk. 39:23Mib 31:18; Yis 59:2
Ezk. 39:23Le 26:24, 25; Mib 32:30; Nz 106:40, 41
Ezk. 39:25Yir 30:3; Ezk 34:13
Ezk. 39:25Hos 1:11; Zek 1:16
Ezk. 39:25Ezk 36:21
Ezk. 39:26Da 9:16
Ezk. 39:26Le 26:5, 6
Ezk. 39:27Yir 30:10; Am 9:14; Sef 3:20
Ezk. 39:27Yis 5:16; Ezk 36:23
Ezk. 39:28Mib 30:4
Ezk. 39:29Yis 45:17; 54:8; Yir 29:14
Ezk. 39:29Yis 32:14, 15; Yoe 2:28
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 39:1-29

Ezekiele

39 “Mpe yo, mwana ya moto, sakolá mpasi oyo ekokómela Goge,+ mpe lobá na ye boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nazali kobundisa yo, Goge, nkumu monene ya Mesheke ná Tubale.+ 2 Nakobalusa yo, nakotambwisa yo, nakomatisa yo uta na bisika eleki mosika na nɔrdi+ mpe nakomema yo likoló ya bangomba ya Yisraele. 3 Nakobɛta litimbo na yo mpo ekwea na lobɔkɔ na yo ya mwasi, mpe nakosala ete makula na yo ekwea uta na lobɔkɔ na yo ya mobali. 4 Okokwea na bangomba ya Yisraele,+ yo, basoda na yo nyonso mpe bato ya bikólo oyo bazali elongo na yo. Nakopesa yo ozala bilei mpo na bandɛkɛ oyo ekangaka banyama, mpe banyama ya zamba oyo efandaka na esobe.”’+

5 “‘Okokwea na esobe mpenza,+ mpo ngai moko nde nalobi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

6 “‘Nakotinda mɔtɔ epai ya Magoge mpe epai ya baoyo bazali kofanda na kimya na bisanga,+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova. 7 Nakosala ete nkombo na ngai mosantu eyebana na kati ya bato na ngai Yisraele, mpe nakotika lisusu te ete bákómisa nkombo na ngai mosantu eloko mpamba; mpe bikólo bakoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ Mosantu ya Yisraele.’+

8 “‘Ya solo, ekoya mpe ekosalema mpenza,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. ‘Yango nde mokolo oyo nalobeli. 9 Bato oyo bafandi na bingumba ya Yisraele bakobima, mpe bakopelisa mɔtɔ na bibundeli: banguba ya minene mpe ya mike,* matimbo, na makula, bibundeli ya nsɔngɛ oyo basimbi na mabɔkɔ* mpe makɔnga, mpe bakosalela yango mpo na kopelisa mɔtɔ+ mpo na mbula nsambo. 10 Bakozala na mposa te ya kozwa nkoni oyo euti na esobe, to kosangisa nkoni ya kopelisa mɔtɔ oyo euti na bazamba, mpo bakosalela bibundeli mpo na kopelisa mɔtɔ.’

“‘Bakobɔtɔla biloko epai ya baoyo babɔtɔlaki bango biloko mpe bakopunza baoyo bazalaki kopunza bango,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

11 “‘Na mokolo yango, nakopesa Goge+ lilita na Yisraele, na lobwaku ya baoyo bazali kosala mobembo na ɛsti ya mbu, mpe yango ekokanga nzela ya bato ya mobembo. Kuna nde bakokunda Goge ná ebele ya bato na ye nyonso, mpe bakobenga yango Lobwaku ya Hamone-Goge.*+ 12 Bato ya Yisraele bakolekisa sanza nsambo ya kokunda bango mpo na kopɛtola mokili.+ 13 Bato nyonso ya mokili bakosala mosala ya kokunda bango, yango ekomemela bango lokumu na mokolo oyo nakomisantisa,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

14 “‘Bato bakoponama mpo na koleka na mokili ntango nyonso mpe bakokunda bibembe oyo ekotikala na etando ya mabele, mpo na kopɛtola yango. Bakokoba koluka mpo na sanza nsambo. 15 Ntango baoyo bazali koleka na mokili bakomona mokuwa ya moto, bakotya elembo pembeni na yango, na nsima baoyo baponami mpo na kokunda, bakokunda yango na Lobwaku ya Hamone-Goge.+ 16 Kuna mpe ekozala na engumba oyo ekobengama Hamona.* Mpe bakopɛtola mokili.’+

17 “Mpo na yo, mwana ya moto, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lobá na ndɛkɛ ya lolenge nyonso mpe na banyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe ete: “Bóyangana mpe bóya. Bóyangana zingazinga ya mbeka na ngai, oyo nazali kobongisela bino, mbeka moko monene na bangomba ya Yisraele.+ Bokolya mosuni mpe bokomɛla makila.+ 18 Bokolya mosuni ya bilombe, mpe bokomɛla makila ya bankumu ya mabele—bampate-mibali, bana-mpate ya mibali, bantaba, mpe bangɔmbɛ: banyama nyonso ya mafutamafuta ya Bashane. 19 Bokolya mafuta mingi mpe bokomɛla makila tii bokolangwa, na mbeka oyo nabongisi mpo na bino.”’

20 “‘Na mesa na ngai, bokotonda na bampunda mpe na batambwisi-makalo, na bilombe mpe na babundi ya ndenge nyonso,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

21 “‘Nakomonisa nkembo na ngai na kati ya bikólo, mpe bikólo nyonso ekomona bitumbu oyo napesi mpe nguya* oyo namonisi na kati na bango.+ 22 Banda mokolo yango bato ya Yisraele bakoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bango. 23 Mpe bikólo ekoyeba mpenza ete soki bato ya Yisraele bamemamaki na mboka mopaya, ezalaki mpo na libunga na bango moko mpo bazangaki bosembo epai na ngai.+ Mpo na yango nalongolaki likebi na ngai epai na bango*+ mpe nakabaki bango epai ya banguna na bango,+ mpe bango nyonso bakufaki na mopanga. 24 Nasalelaki bango makambo na kolanda mbindo na bango mpe misala na bango ya kobuka mibeko, mpe nalongolaki likebi na ngai epai na bango.’*

25 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakozongisa bakangami ya Yakobo+ mpe nakoyokela bato nyonso ya Yisraele mawa;+ na molende mpenza nakokumisa* nkombo na ngai mosantu.+ 26 Nsima ya koyokisama nsɔni mpo na makambo na bango nyonso ya kozanga bosembo oyo basalelaki ngai,+ bakofanda na kimya mpenza na mokili na bango, moto ata moko te akobangisa bango.+ 27 Ntango nakozongisa bango uta na bato ya bikólo mpe nakoyanganisa bango uta na mikili ya banguna na bango,+ nakomisantisa mpe na kati na bango na miso ya bikólo mingi.’+

28 “‘Bakoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bango, ntango nakotinda bango na mboka mopaya na kati ya bikólo mpe na nsima nakoyanganisa bango ndenge nakozongisa bango na mokili na bango, ata moto moko te akotikala.+ 29 Nakolongola lisusu te likebi na ngai epai na bango,+ mpo nakosopela bato ya Yisraele elimo na ngai,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto