Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Yehorame, mokonzi ya Yisraele (1-3)

      • Moabe etombokeli Yisraele (4-25)

      • Moabe ekwei (26, 27)

2 Bakonzi 3:1

Mitindami

  • +2Ba 1:17

2 Bakonzi 3:2

Mitindami

  • +1Ba 16:30-33

2 Bakonzi 3:3

Mitindami

  • +1Ba 12:28-30

2 Bakonzi 3:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1992, lok. 24

2 Bakonzi 3:5

Mitindami

  • +1Ba 22:37
  • +2Sa 8:2

2 Bakonzi 3:7

Mitindami

  • +2Nt 19:2
  • +1Ba 22:3, 4

2 Bakonzi 3:9

Mitindami

  • +2Sa 8:14

2 Bakonzi 3:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “oyo azalaki mosaleli ya Eliya.”

Mitindami

  • +1Ba 22:7
  • +1Ba 19:16; 2Ba 2:15
  • +1Ba 19:19, 21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2013, nk. 28-29

    1/11/1997, nk. 30-31

    Mekolá, lok. 98

2 Bakonzi 3:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Nini na ngai mpe nini na yo?”

Mitindami

  • +1Sa 2:30; Ezk 14:3
  • +Bas 10:14; 1Ba 18:19; 22:6

2 Bakonzi 3:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “oyo natɛlɛmi liboso na ye.”

Mitindami

  • +2Nt 17:3, 4; 19:3, 4
  • +Mas 15:29

2 Bakonzi 3:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mobɛti-miziki.”

  • *

    Lil., “lobɔkɔ.”

Mitindami

  • +1Sa 10:5; 1Nt 25:1
  • +1Ba 18:46; Ezk 1:3; Mis 11:21

2 Bakonzi 3:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

2 Bakonzi 3:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Nz 107:35

2 Bakonzi 3:18

Mitindami

  • +Yir 32:17; Mr 10:27
  • +Mib 28:7

2 Bakonzi 3:19

Mitindami

  • +Mib 3:5
  • +2Ba 3:25

2 Bakonzi 3:20

Mitindami

  • +Kob 29:39, 40

2 Bakonzi 3:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “oyo bakokaki kokanga mokaba na loketo.”

2 Bakonzi 3:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2005, lok. 10

2 Bakonzi 3:23

Mitindami

  • +Kob 15:9, 10

2 Bakonzi 3:24

Mitindami

  • +Le 26:7

2 Bakonzi 3:25

Mitindami

  • +Eb 26:15; 2Nt 32:4
  • +2Ba 3:19
  • +Yis 16:7

2 Bakonzi 3:26

Mitindami

  • +2Ba 3:9

2 Bakonzi 3:27

Mitindami

  • +Mib 12:31; 2Nt 28:1, 3; Nz 106:37, 38

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 3:12Ba 1:17
2 Bak. 3:21Ba 16:30-33
2 Bak. 3:31Ba 12:28-30
2 Bak. 3:51Ba 22:37
2 Bak. 3:52Sa 8:2
2 Bak. 3:72Nt 19:2
2 Bak. 3:71Ba 22:3, 4
2 Bak. 3:92Sa 8:14
2 Bak. 3:111Ba 22:7
2 Bak. 3:111Ba 19:16; 2Ba 2:15
2 Bak. 3:111Ba 19:19, 21
2 Bak. 3:131Sa 2:30; Ezk 14:3
2 Bak. 3:13Bas 10:14; 1Ba 18:19; 22:6
2 Bak. 3:142Nt 17:3, 4; 19:3, 4
2 Bak. 3:14Mas 15:29
2 Bak. 3:151Sa 10:5; 1Nt 25:1
2 Bak. 3:151Ba 18:46; Ezk 1:3; Mis 11:21
2 Bak. 3:17Nz 107:35
2 Bak. 3:18Yir 32:17; Mr 10:27
2 Bak. 3:18Mib 28:7
2 Bak. 3:19Mib 3:5
2 Bak. 3:192Ba 3:25
2 Bak. 3:20Kob 29:39, 40
2 Bak. 3:23Kob 15:9, 10
2 Bak. 3:24Le 26:7
2 Bak. 3:25Eb 26:15; 2Nt 32:4
2 Bak. 3:252Ba 3:19
2 Bak. 3:25Yis 16:7
2 Bak. 3:262Ba 3:9
2 Bak. 3:27Mib 12:31; 2Nt 28:1, 3; Nz 106:37, 38
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 3:1-27

Mokanda ya mibale ya

3 Na mbula ya 18 ya boyangeli ya Yehoshafate mokonzi ya Yuda, Yehorame+ mwana ya Ahaba akómaki mokonzi ya Yisraele, mpe ayangelaki mbula 12 na Samaria. 2 Akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova. Kasi mabe ya Yehorame ekómaki te lokola oyo ya tata na ye to ya mama na ye, mpo alongolaki likonzí ya losambo ya Baala oyo tata na ye asalaki.+ 3 Nzokande, Yehorame mpe asalaki kaka masumu oyo Yeroboame mwana ya Nebate asalisaki Yisraele.+ Atikaki masumu yango te.

4 Mesha mokonzi ya Moabe azalaki kobɔkɔla bampate, mpe azalaki kofuta mokonzi ya Yisraele mpako ya bana-mpate 100 000 mpe bampate-mibali 100 000 oyo bakatá nsuki na yango te. 5 Ntango kaka Ahaba akufaki,+ mokonzi ya Moabe atombokelaki mokonzi ya Yisraele.+ 6 Na ntango yango, Mokonzi Yehorame abimaki na Samaria mpe ayanganisaki basoda ya Yisraele mobimba. 7 Atindelaki mpe Yehoshafate mokonzi ya Yuda maloba oyo: “Mokonzi ya Moabe atombokeli ngai. Okokende elongo na ngai mpo na kobundisa Moabe?” Bongo Yehoshafate alobaki na ye: “Ɛɛ, nakokende.+ Ngai ná yo tozali se moto moko. Bato na ngai bazali bato na yo. Bampunda na ngai ezali bampunda na yo.”+ 8 Kasi Yehoshafate atunaki ye: “Tokokende na nzela nini?” Yehorame ayanolaki: “Na nzela ya esobe ya Edome.”

9 Bongo mokonzi ya Yisraele, mokonzi ya Yuda, mpe mokonzi ya Edome+ basimbaki nzela, bakei. Nsima ya kotambola mikolo nsambo, bazalaki lisusu na mai te mpo na basoda mpe mpo na banyama ya mboka oyo bakendaki na yango. 10 Mokonzi ya Yisraele alobaki: “Mawa na biso! Yehova asangisi biso bakonzi misato kaka mpo na kokaba biso na lobɔkɔ ya Moabe!” 11 Na yango Yehoshafate atunaki: “Ezali na mosakoli ya Yehova awa te? Soki azali, tótuna Yehova na nzela na ye.”+ Bongo mosaleli moko ya mokonzi ya Yisraele ayanolaki: “Elisha+ mwana ya Shafate, oyo azalaki kosopela Eliya+ mai na mabɔkɔ* azali awa.” 12 Yehoshafate alobaki: “Akoki koyebisa biso oyo Yehova alingi tósala.” Na yango, mokonzi ya Yisraele, Yehoshafate ná mokonzi ya Edome bakendaki epai ya Elisha.

13 Elisha alobaki na mokonzi ya Yisraele: “Mpo na nini oyei epai na ngai?*+ Kende epai ya basakoli ya tata na yo mpe basakoli ya mama na yo.”+ Kasi mokonzi ya Yisraele alobaki na ye: “Te, mpo ezali Yehova nde abengisi biso, bakonzi misato, mpo na kokaba biso na mabɔkɔ ya Bamoabe.” 14 Bongo Elisha alobaki: “Lokola Yehova ya mampinga oyo nazali kosalela* azali solo na bomoi, soki ezalaki mpo na Yehoshafate+ mokonzi ya Yuda te, mbɛlɛ natali yo ata kotala te, mpe namoni yo ata komona te.+ 15 Sikoyo bóbengela ngai mobɛti-nzɛnzɛ moko.”*+ Ntango kaka mobɛti-nzɛnzɛ yango abandaki kobɛta miziki, elimo* ya Yehova ekitelaki Elisha.+ 16 Bongo alobaki: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Bótimola mabulu ebele na lobwaku* oyo, 17 mpo talá oyo Yehova alobi: “Mopɛpɛ ekopɛpa te mpe mbula ekonɔka te, kasi lobwaku* oyo ekotonda na mai.+ Mpe bino ná bibwɛlɛ na bino, mpe banyama na bino mosusu bokomɛla mai yango.”’ 18 Kasi nyonso wana ezali likambo ya moke mpenza na miso ya Yehova,+ mpo Nzambe akokaba mpe Moabe na mabɔkɔ na bino.+ 19 Bosengeli kobebisa engumba nyonso oyo ebatelami makasi+ mpe engumba nyonso ya kitoko mingi. Bosengeli kokata nzete nyonso ya malamu, kokanga maziba nyonso ya mai, mpe kobwaka mabanga na mabele nyonso ya malamu mpo ebota lisusu te.”+

20 Na ntɔngɔ, na ntango oyo bapesaka likabo ya mbuma,+ mai eutaki na ngámbo ya Edome na mbalakaka, mpe etondisaki lobwaku mobimba.

21 Ntango Bamoabe nyonso bayokaki ete bakonzi yango misato bayei kobundisa bango, bayanganisaki mibali nyonso oyo bakokaki komema bibundeli,* mpe batɛlɛmaki na ndelo ya mboka na bango. 22 Na ntɔngɔntɔngɔ ntango balamukaki, moi ezalaki kongɛnga likoló ya mai wana, mpe epai ya Bamoabe, lokola bazalaki na ngámbo mosusu, mai yango ezalaki komonana motane lokola makila. 23 Balobaki: “Ezali makila! Na ntembe te bakonzi yango misato babomani bango na bango na mopanga. Sikoyo, kende kopunza,+ Ee Moabe!” 24 Ntango Bamoabe bakɔtaki na kaa ya Yisraele, Bayisraele batɛlɛmaki mpe babandaki koboma bango. Bongo Bamoabe bakimaki.+ Bayisraele bakendaki tii na Moabe mpe bakobaki koboma bango. 25 Bakweisaki bingumba, mpe moto na moto azalaki kobwaka libanga na mabele nyonso ya malamu; mabele nyonso etondaki na mabanga. Bakangaki maziba nyonso ya mai+ mpe bakataki nzete nyonso ya malamu.+ Na nsuka, kaka bifelo ya mabanga ya Kire-haresete+ nde etikalaki. Kasi basoda oyo bazalaki kosalela lansi bazingaki engumba yango mpe bakweisaki yango.

26 Ntango mokonzi ya Moabe amonaki ete banguna balongi bango, azwaki bato 700 oyo bazalaki na mipanga mpo bápasola nzela tii epai ya mokonzi ya Edome;+ kasi bakokaki te. 27 Azwaki mwana na ye ya mobali ya liboso, oyo asengelaki koyangela na esika na ye, mpe akabaki ye mbeka ya kotumba+ likoló ya efelo. Mpe bayokelaki Yisraele nkanda makasi, na yango mampinga ya basoda balongwaki kuna, batikaki kobunda mpe bazongaki na mokili na bango.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto