Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 29
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Ezekiasi, mokonzi ya Yuda (1, 2)

      • Ezekiasi abongisi makambo (3-11)

      • Bapɛtoli tempelo (12-19)

      • Misala ya tempelo ezongi (20-36)

2 Ntango 29:1

Mitindami

  • +Yis 1:1; Hos 1:1; Mt 1:10
  • +2Ba 18:1, 2

2 Ntango 29:2

Mitindami

  • +2Nt 31:20
  • +1Ba 15:5; 2Ba 18:3

2 Ntango 29:3

Mitindami

  • +1Ba 6:33, 34; 2Nt 28:24

2 Ntango 29:5

Mitindami

  • +1Nt 15:11, 12
  • +2Ba 18:4

2 Ntango 29:6

Mitindami

  • +2Nt 28:22, 23; Yir 44:21
  • +Yir 2:27; Ezk 8:16

2 Ntango 29:7

Mitindami

  • +1Ba 6:33, 34
  • +Le 24:2
  • +Kob 30:8
  • +Kob 29:38

2 Ntango 29:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kobɛtɛla piololo.”

Mitindami

  • +2Nt 24:18
  • +Le 26:32; Mib 28:15, 25

2 Ntango 29:9

Mitindami

  • +Le 26:14, 17
  • +2Nt 28:5-8

2 Ntango 29:10

Mitindami

  • +2Nt 15:10-13

2 Ntango 29:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ya kopema te.”

Mitindami

  • +Mit 3:6; Mib 10:8
  • +1Nt 23:13

2 Ntango 29:12

Mitindami

  • +Mit 4:2, 3; 1Nt 23:12
  • +1Nt 23:21
  • +1Nt 23:7

2 Ntango 29:13

Mitindami

  • +1Nt 15:16, 17; 25:1, 2

2 Ntango 29:14

Mitindami

  • +1Nt 25:5
  • +1Nt 25:1

2 Ntango 29:15

Mitindami

  • +2Nt 29:5

2 Ntango 29:16

Mitindami

  • +1Ba 6:36
  • +2Ba 23:4, 6; 2Nt 15:16; Yn 18:1

2 Ntango 29:17

Mitindami

  • +1Ba 6:3; 1Nt 28:11

2 Ntango 29:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, mampa ya kolakisa.

Mitindami

  • +2Nt 4:1
  • +1Ba 7:40
  • +1Ba 7:48

2 Ntango 29:19

Mitindami

  • +2Nt 28:1, 2, 24
  • +2Nt 29:5

2 Ntango 29:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mpo na bokonzi.”

Mitindami

  • +Le 4:3, 13, 14; Mit 15:22-24

2 Ntango 29:22

Mitindami

  • +Le 4:4
  • +Le 4:7, 18

2 Ntango 29:25

Mitindami

  • +1Nt 25:1, 6; 2Nt 9:11
  • +1Nt 28:12, 13; 2Nt 8:12, 14
  • +2Sa 24:11, 12; 1Nt 29:29
  • +2Sa 7:2; 12:1

2 Ntango 29:26

Mitindami

  • +Mit 10:8; 1Nt 15:24

2 Ntango 29:27

Mitindami

  • +Le 1:3, 4

2 Ntango 29:30

Mitindami

  • +2Sa 23:1
  • +1Nt 16:7

2 Ntango 29:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “botondisi lobɔkɔ na bino.”

Mitindami

  • +Le 1:3

2 Ntango 29:32

Mitindami

  • +1Ba 3:4; 8:63; 1Nt 29:21, 22

2 Ntango 29:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bazalaki motema sembo.”

Mitindami

  • +Mit 8:19; 2Nt 30:17; 35:10, 11
  • +2Nt 30:2, 3

2 Ntango 29:35

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “ebongisamaki.”

Mitindami

  • +2Nt 29:32
  • +Le 3:1, 14-16
  • +Mit 15:5

2 Ntango 29:36

Mitindami

  • +2Nt 30:12

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 29:1Yis 1:1; Hos 1:1; Mt 1:10
2 Nt. 29:12Ba 18:1, 2
2 Nt. 29:22Nt 31:20
2 Nt. 29:21Ba 15:5; 2Ba 18:3
2 Nt. 29:31Ba 6:33, 34; 2Nt 28:24
2 Nt. 29:51Nt 15:11, 12
2 Nt. 29:52Ba 18:4
2 Nt. 29:62Nt 28:22, 23; Yir 44:21
2 Nt. 29:6Yir 2:27; Ezk 8:16
2 Nt. 29:71Ba 6:33, 34
2 Nt. 29:7Le 24:2
2 Nt. 29:7Kob 30:8
2 Nt. 29:7Kob 29:38
2 Nt. 29:82Nt 24:18
2 Nt. 29:8Le 26:32; Mib 28:15, 25
2 Nt. 29:9Le 26:14, 17
2 Nt. 29:92Nt 28:5-8
2 Nt. 29:102Nt 15:10-13
2 Nt. 29:11Mit 3:6; Mib 10:8
2 Nt. 29:111Nt 23:13
2 Nt. 29:12Mit 4:2, 3; 1Nt 23:12
2 Nt. 29:121Nt 23:21
2 Nt. 29:121Nt 23:7
2 Nt. 29:131Nt 15:16, 17; 25:1, 2
2 Nt. 29:141Nt 25:5
2 Nt. 29:141Nt 25:1
2 Nt. 29:152Nt 29:5
2 Nt. 29:161Ba 6:36
2 Nt. 29:162Ba 23:4, 6; 2Nt 15:16; Yn 18:1
2 Nt. 29:171Ba 6:3; 1Nt 28:11
2 Nt. 29:182Nt 4:1
2 Nt. 29:181Ba 7:40
2 Nt. 29:181Ba 7:48
2 Nt. 29:192Nt 28:1, 2, 24
2 Nt. 29:192Nt 29:5
2 Nt. 29:21Le 4:3, 13, 14; Mit 15:22-24
2 Nt. 29:22Le 4:4
2 Nt. 29:22Le 4:7, 18
2 Nt. 29:251Nt 25:1, 6; 2Nt 9:11
2 Nt. 29:251Nt 28:12, 13; 2Nt 8:12, 14
2 Nt. 29:252Sa 24:11, 12; 1Nt 29:29
2 Nt. 29:252Sa 7:2; 12:1
2 Nt. 29:26Mit 10:8; 1Nt 15:24
2 Nt. 29:27Le 1:3, 4
2 Nt. 29:302Sa 23:1
2 Nt. 29:301Nt 16:7
2 Nt. 29:31Le 1:3
2 Nt. 29:321Ba 3:4; 8:63; 1Nt 29:21, 22
2 Nt. 29:34Mit 8:19; 2Nt 30:17; 35:10, 11
2 Nt. 29:342Nt 30:2, 3
2 Nt. 29:352Nt 29:32
2 Nt. 29:35Le 3:1, 14-16
2 Nt. 29:35Mit 15:5
2 Nt. 29:362Nt 30:12
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 29:1-36

Mokanda ya mibale ya Ntango

29 Ezekiasi+ akómaki mokonzi ntango azalaki na mbula 25, mpe ayangelaki mbula 29 na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Abiya mwana ya Zekaria.+ 2 Ezekiasi azalaki kosala makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova,+ kaka ndenge nkɔkɔ na ye Davidi asalaki.+ 3 Na mbula ya liboso ya boyangeli na ye, na sanza ya liboso, afungolaki baporte ya ndako ya Yehova mpe abongisaki yango.+ 4 Na nsima, abengisaki banganga-nzambe ná Balevi mpe ayanganisaki bango na esika ya polele, na ɛsti. 5 Alobaki na bango boye: “Bino Balevi, bóyoka ngai. Sikoyo, bómisantisa+ mpe bósantisa ndako ya Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino, mpe bólongola eloko oyo ezali mbindo na esika mosantu.+ 6 Mpo batata na biso bazangaki bosembo mpe basalaki makambo oyo ezalaki mabe na miso ya Yehova Nzambe na biso.+ Basundolaki ye, balongolaki bilongi na bango na tabernakle ya Yehova mpe bapesaki ye mokɔngɔ.+ 7 Bakangaki mpe baporte ya ndako ya kokɔtela+ mpe babomaki miinda.+ Batikaki kotumba mpaka ya malasi,+ mpe kopesa Nzambe ya Yisraele bambeka ya kotumba+ na esika mosantu. 8 Yango wana, Yehova asilikelaki Yuda ná Yerusaleme,+ bongo akómisaki yango eloko ya kopesa nsɔmɔ, ya kokamwisa mpe ya kotyola,* ndenge bozali komona yango na miso na bino moko.+ 9 Ezali mpo na yango nde bankɔkɔ na biso babomamaki na mopanga,+ mpe bana na biso ya mibali, bana na biso ya basi mpe basi na biso bamemamaki bakangami.+ 10 Sikoyo na motema na ngai, nazali na mposa ya kosala kondimana na Yehova Nzambe ya Yisraele,+ mpo nkanda na ye ya kongala elongwa epai na biso. 11 Bana na ngai, oyo ezali ntango te ya kozwa makambo na lisɛki,* mpo Yehova aponi bino mpo bótɛlɛma liboso na ye, bózala basaleli+ na ye mpe bómatisa milinga ya bambeka na ye.”+

12 Na yango, Balevi batɛlɛmaki: na libota ya Bakohate,+ Mahate mwana ya Amasai ná Yoele mwana ya Azaria; na libota ya Bamerari:+ Kishe mwana ya Abadi mwana ya Yehalelele; mpe na libota ya Bagereshone:+ Yoa mwana ya Zima ná Edene mwana ya Yoa; 13 na bana ya Elizafane: Shimiri ná Yeuele; na bana ya Asafe:+ Zekaria ná Matania; 14 na bana ya Hemane:+ Yehiele ná Shimei; mpe na bana ya Yedutune:+ Shemaya ná Uziele. 15 Na nsima, bayanganisaki bandeko na bango, bamisantisaki mpe bayaki mpo na kopɛtola ndako ya Yehova,+ kaka ndenge mokonzi apesaki mitindo, na kolanda maloba ya Yehova. 16 Bongo banganga-nzambe bakɔtaki na ndako ya Yehova mpo na kopɛtola yango mpe babimisaki mbindo nyonso oyo bamonaki na tempelo ya Yehova, mpe batyaki yango na lopango+ ya ndako ya Yehova. Na nsima, Balevi bazwaki yango mpe bamemaki yango libándá, na Lobwaku ya Kidrone.+ 17 Bongo babandaki mosala ya kosantisa na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, mpe na mokolo ya mwambe ya sanza yango, bakómaki na ndako ya kokɔtela ya Yehova;+ basantisaki ndako ya Yehova mikolo mwambe, mpe na mokolo ya 16 ya sanza ya liboso, basilisaki.

18 Nsima na yango, bakendaki epai ya Mokonzi Ezekiasi mpe balobaki boye: “Topɛtoli ndako ya Yehova mobimba, etumbelo ya likabo ya kotumba+ ná bisaleli+ na yango nyonso, mpe mesa ya mampa ya kotanda*+ ná bisaleli na yango nyonso. 19 Mpe bisaleli nyonso oyo Mokonzi Ahaze alongolaki na boyangeli na ye ntango azangaki bosembo,+ tobongisi yango, mpe tosantisi+ yango, mpe yango wana ezali liboso ya etumbelo ya Yehova.”

20 Mpe Mokonzi Ezekiasi alamukaki ntɔngɔntɔngɔ, ayanganisaki bankumu ya engumba mpe bamataki na ndako ya Yehova. 21 Bamemaki bangɔmbɛ-mibali nsambo, bampate-mibali nsambo, bana-mpate mibali nsambo mpe bantaba-mibali nsambo mpo ezala likabo mpo na lisumu, mpo na bato ya ndako ya mokonzi,* mpo na esika mosantu mpe mpo na Yuda.+ Bongo mokonzi alobaki na banganga-nzambe bakitani ya Arona ete bápesa yango mbeka likoló ya etumbelo ya Yehova. 22 Na yango, babomaki bangɔmbɛ+ mpe banganga-nzambe bazwaki mwa makila na yango mpe bamwangisaki yango likoló ya etumbelo;+ na nsima, babomaki bampate-mibali mpe bamwangisaki mwa makila na yango likoló ya etumbelo, mpe babomaki bana-mpate ya mibali mpe bamwangisaki mwa makila na yango likoló ya etumbelo. 23 Na nsima, bamemaki bantaba-mibali ya likabo mpo na lisumu liboso ya mokonzi mpe ya lisangá mpe batyaki mabɔkɔ na bango likoló na yango. 24 Banganga-nzambe babomaki yango mpe bapesaki yango likabo mpo na lisumu. Batyaki makila na yango likoló ya etumbelo, mpo na kozipa masumu ya Yisraele mobimba, mpo mokonzi alobaki ete likabo ya kotumba mpe likabo mpo na lisumu esengeli kozala mpo na Yisraele mobimba.

25 Na ntango yango, atyaki Balevi na ndako ya Yehova, basimbi basɛmbalɛ, bibɛtɛlo ya bansinga mpe banzɛnzɛ,+ na kolanda mitindo ya Davidi,+ ya Gade+ momoni-bimonaneli ya mokonzi, mpe ya mosakoli Natane,+ mpo Yehova apesaki mitindo yango na nzela ya basakoli na ye. 26 Na yango, Balevi batɛlɛmaki wana, basimbi bibɛtɛlo-miziki oyo Davidi asalaki, mpe banganga-nzambe basimbi bakelelo.+

27 Bongo Ezekiasi apesaki mitindo ete bápesa mbeka ya kotumba likoló ya etumbelo.+ Ntango likabo ya kotumba ebandaki, babandaki mpe koyemba loyembo ya Yehova, mpe kobɛta kelelo, na kolanda litambwisi ya bibɛtɛlo-miziki ya Davidi mokonzi ya Yisraele. 28 Lisangá mobimba bagumbamaki wana loyembo ezalaki koyembama mpe bakelelo ezalaki kobɛtama. Nyonso wana ekobaki tii ntango basilisaki kopesa likabo ya kotumba. 29 Mpe ntango kaka basilisaki kopesa mbeka yango, mokonzi mpe bato nyonso oyo bazalaki na ye bafukamaki mpe bagumbamaki bilongi na nse. 30 Na nsima, Mokonzi Ezekiasi mpe bankumu balobaki na Balevi ete básanzola Yehova na maloba ya Davidi+ mpe ya Asafe,+ momoni-bimonaneli. Na yango basanzolaki ye na esengo makasi, bafukamaki mpe bagumbamaki bilongi na nse.

31 Bongo Ezekiasi alobaki: “Sikoyo, lokola botyami pembeni* mpo na Yehova, bóya mpe bómema bambeka mpe makabo ya kopesa matɔndi na ndako ya Yehova.” Na yango lisangá ebandaki komema bambeka mpe makabo ya kopesa matɔndi, mpe moto nyonso oyo azalaki na motema ya kokaba amemaki mpe makabo ya kotumba.+ 32 Motángo ya makabo ya kotumba oyo lisangá ememaki ezalaki bangɔmbɛ 70, bampate-mibali 100, bana-mpate ya mibali 200; nyonso wana ezalaki likabo ya kotumba mpo na Yehova;+ 33 mpe motángo ya makabo mosantu ezalaki bangɔmbɛ 600 mpe bampate 3 000. 34 Kasi banganga-nzambe bazalaki mingi te, mpo na kolongola mposo ya nyama nyonso ya makabo ya kotumba. Yango wana bandeko na bango Balevi basalisaki bango+ tii mosala esilaki mpe tii banganga-nzambe basilisaki komisantisa,+ mpo Balevi bamipesaki mingi* na oyo etali komisantisa koleka banganga-nzambe. 35 Lisusu, makabo ya kotumba+ ezalaki mingi, ná biteni ya mafutamafuta ya bambeka ya kimya*+ ná makabo ya vinyo mpo na makabo ya kotumba.+ Na ndenge yango, mosala ya ndako ya Yehova ezongaki.* 36 Bongo Ezekiasi ná bato nyonso basepelaki mpo na makambo oyo Nzambe ya solo asalaki mpo na bato,+ mpo nyonso wana esalemaki nokinoki mpenza.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto