Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 30
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Ezekiasi asali fɛti ya Elekeli (1-27)

2 Ntango 30:1

Mitindami

  • +2Nt 11:14, 16
  • +2Nt 34:1, 6, 7
  • +Kob 12:43; Le 23:5; Mib 16:2; 2Nt 35:1

2 Ntango 30:2

Mitindami

  • +Mit 9:10, 11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 83

2 Ntango 30:3

Mitindami

  • +Kob 12:18
  • +2Nt 29:34

2 Ntango 30:5

Mitindami

  • +Bas 18:29
  • +2Nt 35:18

2 Ntango 30:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bapoti-mbangu.”

Mitindami

  • +2Ba 15:29; 1Nt 5:26; 2Nt 28:20, 21

2 Ntango 30:7

Mitindami

  • +2Nt 29:8, 9

2 Ntango 30:8

Mitindami

  • +Kob 32:9
  • +Mib 12:5, 6; Nz 132:13
  • +2Nt 29:10

2 Ntango 30:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “oyo ayokelaka bato mawa.”

Mitindami

  • +1Ba 8:49, 50
  • +Mib 30:1-3
  • +Kob 34:6; Nz 86:5; Mik 7:18
  • +2Nt 15:2; Yis 55:7; Yk 4:8

2 Ntango 30:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bapoti-mbangu.”

Mitindami

  • +2Nt 30:1
  • +2Nt 36:15, 16

2 Ntango 30:11

Mitindami

  • +2Nt 11:14, 16

2 Ntango 30:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mpo na kopesa bango motema kaka moko.”

2 Ntango 30:13

Mitindami

  • +Le 23:6
  • +Mit 9:10, 11

2 Ntango 30:14

Mitindami

  • +2Ba 18:22
  • +2Nt 28:24

2 Ntango 30:16

Mitindami

  • +Le 1:5

2 Ntango 30:17

Mitindami

  • +2Nt 29:34

2 Ntango 30:18

Mitindami

  • +2Nt 30:1
  • +Nz 86:5

2 Ntango 30:19

Mitindami

  • +2Nt 19:2, 3; Ezr 7:10
  • +Mit 9:6, 10

2 Ntango 30:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “abikisaki.”

2 Ntango 30:21

Mitindami

  • +Le 23:6
  • +Mib 12:5, 7; Ne 8:10
  • +2Nt 29:25

2 Ntango 30:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “alobaki na motema ya.”

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Le 23:6
  • +Le 3:1

2 Ntango 30:23

Mitindami

  • +1Ba 8:65

2 Ntango 30:24

Mitindami

  • +2Nt 35:7, 8
  • +2Nt 29:34

2 Ntango 30:25

Mitindami

  • +2Nt 30:11, 18
  • +Kob 12:49

2 Ntango 30:26

Mitindami

  • +1Ba 8:65, 66

2 Ntango 30:27

Mitindami

  • +Mit 6:23-26; Mib 10:8

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 30:12Nt 11:14, 16
2 Nt. 30:12Nt 34:1, 6, 7
2 Nt. 30:1Kob 12:43; Le 23:5; Mib 16:2; 2Nt 35:1
2 Nt. 30:2Mit 9:10, 11
2 Nt. 30:3Kob 12:18
2 Nt. 30:32Nt 29:34
2 Nt. 30:5Bas 18:29
2 Nt. 30:52Nt 35:18
2 Nt. 30:62Ba 15:29; 1Nt 5:26; 2Nt 28:20, 21
2 Nt. 30:72Nt 29:8, 9
2 Nt. 30:8Kob 32:9
2 Nt. 30:8Mib 12:5, 6; Nz 132:13
2 Nt. 30:82Nt 29:10
2 Nt. 30:91Ba 8:49, 50
2 Nt. 30:9Mib 30:1-3
2 Nt. 30:9Kob 34:6; Nz 86:5; Mik 7:18
2 Nt. 30:92Nt 15:2; Yis 55:7; Yk 4:8
2 Nt. 30:102Nt 30:1
2 Nt. 30:102Nt 36:15, 16
2 Nt. 30:112Nt 11:14, 16
2 Nt. 30:13Le 23:6
2 Nt. 30:13Mit 9:10, 11
2 Nt. 30:142Ba 18:22
2 Nt. 30:142Nt 28:24
2 Nt. 30:16Le 1:5
2 Nt. 30:172Nt 29:34
2 Nt. 30:182Nt 30:1
2 Nt. 30:18Nz 86:5
2 Nt. 30:192Nt 19:2, 3; Ezr 7:10
2 Nt. 30:19Mit 9:6, 10
2 Nt. 30:21Le 23:6
2 Nt. 30:21Mib 12:5, 7; Ne 8:10
2 Nt. 30:212Nt 29:25
2 Nt. 30:22Le 23:6
2 Nt. 30:22Le 3:1
2 Nt. 30:231Ba 8:65
2 Nt. 30:242Nt 35:7, 8
2 Nt. 30:242Nt 29:34
2 Nt. 30:252Nt 30:11, 18
2 Nt. 30:25Kob 12:49
2 Nt. 30:261Ba 8:65, 66
2 Nt. 30:27Mit 6:23-26; Mib 10:8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 30:1-27

Mokanda ya mibale ya Ntango

30 Ezekiasi atindaki maloba na Yisraele mobimba+ mpe na Yuda; akomaki kutu mikanda mpo na kobengisa bato ya Efraime mpe ya Manase+ ete báya na ndako ya Yehova na Yerusaleme kosala fɛti ya Elekeli mpo na Yehova Nzambe ya Yisraele.+ 2 Nzokande, mokonzi ná bankumu ya ekólo mpe lisangá mobimba na Yerusaleme bayokanaki ete básala fɛti ya Elekeli na sanza ya mibale,+ 3 mpo balongaki te kosala yango na mokolo oyo esengelaki,+ mpo banganga-nzambe oyo bamisantisaki bazalaki mingi te,+ mpe bato bayanganaki na Yerusaleme te. 4 Mokonzi mpe lisangá mobimba bamonaki ete ebongiseli yango ezali malamu. 5 Bongo bayokanaki ete báyebisa na Yisraele mobimba, banda na Beere-sheba tii na Dani,+ ete bato basengeli koya na Yerusaleme mpo na kosala fɛti ya Elekeli mpo na Yehova Nzambe ya Yisraele, mpo basalaki yango elongo te ndenge Mobeko esɛngaki.+

6 Na nsima, kaka ndenge mokonzi apesaki mitindo, bamemi-nsango* bakendaki na Yisraele mobimba mpe na Yuda, na mikanda oyo eutaki epai ya mokonzi mpe bankumu ya ekólo, balobi: “Bato ya Yisraele, bózongela Yehova Nzambe ya Abrahama, ya Yisaka mpe ya Yisraele, mpo ye mpe azongela bato na biso oyo batikali, oyo babikaki na lobɔkɔ ya bakonzi ya Asiri.+ 7 Bózala te lokola bankɔkɔ na bino mpe lokola bandeko na bino oyo bazangaki bosembo epai ya Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango, bongo akómisaki bango eloko ya kokamwa, ndenge bozali komona.+ 8 Sikoyo, bózala mitó makasi te lokola bankɔkɔ na bino.+ Bómikitisa liboso ya Yehova mpe bóya na esika na ye mosantu+ oyo asantisi mpo na libela, mpe bósalela Yehova Nzambe na bino, mpo nkanda na ye ya kongala elongwa epai na bino.+ 9 Mpo soki bozongeli Yehova, baoyo bakangaki bandeko na bino mpe bana na bino bakoyokela bango mawa,+ mpe bakopesa bango nzela ya kozonga na mokili oyo,+ mpo Yehova Nzambe na bino azali Nzambe oyo azali na ngɔlu* mpe azali na motema mawa,+ mpe akopesa bino mokɔngɔ te soki bozongeli ye.”+

10 Bongo bamemi-nsango* balekaki engumba na engumba na ekólo mobimba ya Efraime mpe ya Manase,+ ata tii na Zebulone, kasi bato bazalaki kosɛka bango mpe kotyola bango.+ 11 Nzokande bato mosusu na Ashere, na Manase mpe na Zebulone bamikitisaki, mpe bayaki na Yerusaleme.+ 12 Lobɔkɔ ya Nzambe ya solo esalisaki mpe bato ya Yuda bázala na bomoko,* mpo na kokokisa mitindo oyo mokonzi mpe bankumu bapesaki bango na kolanda liloba ya Yehova.

13 Ebele ya bato bayanganaki na Yerusaleme mpo na kosala fɛti ya Mampa ezangá levire+ na sanza ya mibale;+ ezalaki lisangá ya bato ebele mpenza. 14 Babandaki mosala mpe balongolaki bitumbelo nyonso oyo ezalaki na Yerusaleme,+ mpe bitumbelo nyonso ya mpaka ya malasi,+ mpe babwakaki yango na Lobwaku ya Kidrone. 15 Na nsima, na mokolo ya 14 ya sanza ya mibale, babomaki banyama mpo na fɛti ya Elekeli. Banganga-nzambe ná Balevi bayokaki nsɔni, na yango bamisantisaki mpe bamemaki makabo ya kotumba na ndako ya Yehova. 16 Batɛlɛmaki na bisika na bango, na kolanda Mobeko ya Moize moto ya Nzambe ya solo. Na nsima Balevi bazalaki kopesa banganga-nzambe makila+ ya banyama mpe bango bazalaki komwangisa yango likoló ya etumbelo. 17 Lokola bato mingi na kati ya lisangá bamisantisaki te, Balevi bazwaki mokumba ya koboma banyama ya fɛti ya Elekeli mpo na baoyo nyonso bazalaki pɛto te,+ mpo básantisa bango mpo na Yehova. 18 Mpo bato ebele, mingimingi ya Efraime, ya Manase,+ ya Isakare mpe ya Zebulone, bamipɛtolaki te, atako bongo balyaki bilei ya Elekeli, balandaki te ndenge ekomamaki na Mobeko. Kasi Ezekiasi abondelaki mpo na bango, alobi: “Tiká Yehova, oyo azali malamu,+ alimbisa 19 moto nyonso oyo abongisi motema na ye mpo na koluka Nzambe ya solo,+ Yehova, Nzambe ya bankɔkɔ na ye, atako amipɛtoli te na kolanda mibeko ya bosantu.”+ 20 Yehova ayokaki Ezekiasi mpe alimbisaki* bato.

21 Bongo Bayisraele oyo bazalaki na Yerusaleme basalaki fɛti ya Mampa oyo ezangá levire+ mikolo nsambo, bazalaki kosepela+ mpenza. Mpe Balevi ná banganga-nzambe bazalaki kosanzola Yehova mokolo na mokolo, bazalaki kobɛta makasi bibɛtɛlo na bango ya miziki mpo na Yehova.+ 22 Lisusu, Ezekiasi alobaki maloba oyo elendisaki* Balevi nyonso oyo bazalaki kosalela Yehova na bososoli. Mpe bato balyaki mikolo nyonso nsambo ya fɛti yango;+ bazalaki kopesa bambeka ya kimya*+ mpe kopesa Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango matɔndi.

23 Bongo lisangá mobimba eyokanaki ete básala lisusu fɛti yango mikolo nsambo; na yango basalaki yango mikolo mosusu nsambo, na esengo.+ 24 Mpe Ezekiasi mokonzi ya Yuda apesaki likabo mpo na lisangá: bangɔmbɛ-mibali 1 000 mpe bampate 7 000; bankumu mpe bapesaki likabo mpo na lisangá: bangɔmbɛ-mibali 1 000 mpe bampate 10 000;+ mpe banganga-nzambe ebele bazalaki se komisantisa.+ 25 Bato nyonso ya Yuda oyo bayanganaki, banganga-nzambe ná Balevi, bato nyonso oyo bautaki na Yisraele+ ná bato oyo bafandi bapaya,+ oyo bautaki na ekólo Yisraele mpe baoyo bafandi na Yuda bakobaki kosepela. 26 Mpe esengo ezalaki makasi na Yerusaleme, mpe banda na mikolo ya Salomo mwana ya Davidi mokonzi ya Yisraele, likambo ya ndenge wana esalemaki te na Yerusaleme.+ 27 Nsukansuka, banganga-nzambe Balevi batɛlɛmaki mpe bapambolaki bato.+ Nzambe ayokaki mongongo na bango, mpe libondeli na bango ekómaki tii na likoló, esika mosantu oyo ye afandaka.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto