Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 31
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Ezekiasi alongoli lipɛngwi (1)

      • Bapesi Banganga-nzambe mpe Balevi biloko (2-21)

2 Ntango 31:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Kob 23:24
  • +Mib 7:5; 2Ba 18:1, 4; 2Nt 14:2, 3; 34:1, 3
  • +Mib 12:2
  • +2Nt 23:16, 17
  • +2Nt 30:1, 18

2 Ntango 31:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bakaa.”

Mitindami

  • +1Nt 24:1
  • +1Nt 23:6
  • +2Nt 8:14
  • +1Nt 23:13, 27-30

2 Ntango 31:3

Mitindami

  • +2Nt 30:24
  • +Kob 29:39
  • +Mit 28:9
  • +Mit 10:10
  • +Mib 16:16

2 Ntango 31:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bámipesa mobimba.”

Mitindami

  • +Mit 18:21; Ne 10:38, 39

2 Ntango 31:5

Mitindami

  • +Mit 18:12
  • +Kob 22:29; 23:19; Ne 10:37
  • +Mas 3:9

2 Ntango 31:6

Mitindami

  • +Le 27:30; Mib 14:28

2 Ntango 31:7

Mitindami

  • +Le 23:16
  • +Le 23:24

2 Ntango 31:10

Mitindami

  • +Mit 18:8
  • +Mal 3:10

2 Ntango 31:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bisika ya kolya.”

Mitindami

  • +Ne 10:38, 39; 12:44

2 Ntango 31:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “dime.”

Mitindami

  • +Le 27:30; Mib 14:28

2 Ntango 31:14

Mitindami

  • +1Nt 26:17, 19
  • +Mib 12:5, 6; 16:10
  • +Mit 18:8
  • +Le 2:10; 7:1

2 Ntango 31:15

Mitindami

  • +Yos 21:19
  • +1Nt 24:1

2 Ntango 31:17

Mitindami

  • +1Nt 24:4
  • +Mit 4:2, 3; 8:24; 1Nt 23:24
  • +1Nt 23:6

2 Ntango 31:19

Mitindami

  • +Le 25:33, 34; Mit 35:2; Yos 21:13

2 Ntango 31:21

Mitindami

  • +2Nt 29:35

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 31:1Kob 23:24
2 Nt. 31:1Mib 7:5; 2Ba 18:1, 4; 2Nt 14:2, 3; 34:1, 3
2 Nt. 31:1Mib 12:2
2 Nt. 31:12Nt 23:16, 17
2 Nt. 31:12Nt 30:1, 18
2 Nt. 31:21Nt 24:1
2 Nt. 31:21Nt 23:6
2 Nt. 31:22Nt 8:14
2 Nt. 31:21Nt 23:13, 27-30
2 Nt. 31:32Nt 30:24
2 Nt. 31:3Kob 29:39
2 Nt. 31:3Mit 28:9
2 Nt. 31:3Mit 10:10
2 Nt. 31:3Mib 16:16
2 Nt. 31:4Mit 18:21; Ne 10:38, 39
2 Nt. 31:5Mit 18:12
2 Nt. 31:5Kob 22:29; 23:19; Ne 10:37
2 Nt. 31:5Mas 3:9
2 Nt. 31:6Le 27:30; Mib 14:28
2 Nt. 31:7Le 23:16
2 Nt. 31:7Le 23:24
2 Nt. 31:10Mit 18:8
2 Nt. 31:10Mal 3:10
2 Nt. 31:11Ne 10:38, 39; 12:44
2 Nt. 31:12Le 27:30; Mib 14:28
2 Nt. 31:141Nt 26:17, 19
2 Nt. 31:14Mib 12:5, 6; 16:10
2 Nt. 31:14Mit 18:8
2 Nt. 31:14Le 2:10; 7:1
2 Nt. 31:15Yos 21:19
2 Nt. 31:151Nt 24:1
2 Nt. 31:171Nt 24:4
2 Nt. 31:17Mit 4:2, 3; 8:24; 1Nt 23:24
2 Nt. 31:171Nt 23:6
2 Nt. 31:19Le 25:33, 34; Mit 35:2; Yos 21:13
2 Nt. 31:212Nt 29:35
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 31:1-21

Mokanda ya mibale ya Ntango

31 Ntango kaka basilisaki nyonso wana, Bayisraele nyonso oyo bazalaki wana bakendaki na bingumba ya Yuda, babandaki kobukabuka makonzí ya losambo,+ bakataki banzete ya losambo,*+ babebisaki bisika oyo etombwaná+ mpe bitumbelo+ na Yuda mpe na Benyamina mobimba, ata mpe na Efraime mpe na Manase,+ tii babebisaki yango nyonso. Nsima na yango, Bayisraele nyonso bazongaki na bingumba na bango, moto na moto epai na ye.

2 Na nsima, Ezekiasi atyaki banganga-nzambe na bituluku+ na bango mpe Balevi na bituluku+ na bango, nganga-nzambe mokomoko mpe Molevi mokomoko na kolanda mosala+ na ye, mpo na makabo ya kotumba mpe bambeka ya kimya, mpo na kosala mosala, kopesa Nzambe matɔndi mpe kosanzola ye na baporte ya mapango* ya Yehova.+ 3 Mokonzi ye moko apesaki biloko na ye mosusu mpo ezala makabo ya kotumba,+ ata mpe makabo ya ntɔngɔ mpe ya mpokwa,+ ná makabo ya kotumba mpo na Basabata,+ basanza ya sika+ mpe bafɛti,+ na kolanda oyo ekomami na Mobeko ya Yehova.

4 Lisusu, Ezekiasi apesaki bato oyo bafandi na Yerusaleme mitindo ete bápesa banganga-nzambe mpe Balevi+ makabo oyo basengeli na yango, mpo bákangama makasi* na mobeko ya Yehova. 5 Ntango kaka etinda yango epesamaki, Bayisraele bapesaki ebele ya mbuma ya liboso ya mbuma ya kosala farini, ya vinyo ya sika, ya mafuta,+ ya mafuta ya nzoi mpe ya biloko nyonso oyo eutaki na bilanga.+ Bayaki na moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso; bayaki na yango ebele.+ 6 Mpe bato ya Yisraele mpe ya Yuda oyo bazalaki kofanda na bingumba ya Yuda, bamemaki mpe moko ya bandambo zomi ya bangɔmbɛ mpe ya bampate, ná moko ya bandambo zomi ya biloko mosantu,+ oyo esantisamaki mpo na Yehova Nzambe na bango. Bamemaki yango mpe batyaki yango nyonso esika moko. 7 Babandaki kotya makabo na bango esika moko na sanza ya misato;+ mpe na sanza ya nsambo+ basilisaki. 8 Ntango Ezekiasi mpe bankumu bayaki mpe bamonaki ebele ya biloko esika moko, basanzolaki Yehova mpe bapambolaki bato na ye Yisraele.

9 Ezekiasi atunaki banganga-nzambe mpe Balevi mpo na biloko yango, 10 mpe nganga-nzambe mokonzi Azaria, moto ya libota ya Zadoke, azongisaki: “Banda na ntango oyo babandaki komema makabo na ndako ya Yehova,+ bato bazali kolya mpe kotonda kasi biloko ezali kaka mingi, mpo Yehova apamboli bato na ye, mpe ebele ya biloko oyo nyonso nde etikali.”+

11 Na yango, Ezekiasi ayebisaki bango bábongisa bisika ya kobomba biloko*+ na ndako ya Yehova, mpe babongisaki yango. 12 Bakobaki komema makabo na bosembo mpenza, moko ya bandambo zomi*+ mpe biloko mosantu; Konania Molevi nde azwaki mokumba ya kotalela biloko yango, mpe ndeko na ye Shimei azalaki mosungi na ye. 13 Yehiele, Azazia, Nahate, Asahele, Yerimote, Yozabade, Eliele, Yisimakia, Mahate mpe Benaya bazalaki bakambi oyo bazalaki kosalisa Konania ná ndeko na ye Shimei, na kolanda etinda oyo Mokonzi Ezekiasi apesaki, mpe Azaria azalaki mokambi ya ndako ya Nzambe ya solo. 14 Mpe Kore mwana ya Imila, Molevi oyo azalaki mokɛngɛli ya porte ya ɛsti,+ azalaki na mokumba ya kotalela makabo+ oyo bato bapesi Nzambe ya solo na bolingo na bango moko, mpe azalaki kokabola makabo oyo bapesi Yehova+ mpe biloko oyo eleki mosantu.+ 15 Mpe azalaki kokamba Edene, Miniamine, Yeshua, Shemaya, Amaria mpe Shekania, na bingumba ya banganga-nzambe,+ na mokumba na bango ya bato oyo bakoki kotyelama motema; bazalaki na mokumba ya kopesa bandeko na bango ya bituluku+ ndenge na ndenge biloko ndenge moko, ezala mikóló to bana mike. 16 Yango ebakisamaki na biloko oyo bazalaki kokabolela bana mibali ya mbula misato mpe koleka, oyo bakomamaki nkombo na kolanda molɔngɔ ya bankɔkɔ na bango, oyo bazalaki koya mokolo na mokolo kosala na ndako ya Yehova mpe kokokisa mikumba ya bituluku na bango.

17 Banganga-nzambe bakomamaki nkombo na kolanda molɔngɔ ya bankɔkɔ na bango, na kolanda mabota ya batata na bango,+ ndenge ezalaki mpo na Balevi oyo bazalaki na mbula 20 mpe koleka,+ na kolanda mikumba ya bituluku+ na bango. 18 Bazalaki mpe kokoma nkombo ya basi na bango nyonso, bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi, ezala baoyo ya mike, lisangá mobimba (mpo na mokumba na bango ya bato oyo bakoki kotyelama motema, bakobaki komisantisa mpo na kosala misala mosantu). 19 Bakomaki mpe bankombo ya bakitani ya Arona, banganga-nzambe, oyo bazalaki kofanda na mwa bamboka ya koleisa bibwɛlɛ matiti, pembenipembeni ya bingumba na bango.+ Na bingumba nyonso, mibali batángamaki nkombo mpo na kopesa biloko na bana mibali nyonso kati na banganga-nzambe mpe na bato nyonso oyo bakomamaki nkombo na kolanda molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Balevi.

20 Ezekiasi asalaki bongo na Yuda mobimba, mpe akobaki kosala makambo oyo ezali malamu, oyo ebongi mpe oyo ezali sembo na miso ya Yehova Nzambe na ye. 21 Mpe makambo nyonso oyo asalaki mpo na koluka Nzambe na ye, ezala mpo na mosala ya ndako ya Nzambe ya solo,+ to mpo na Mobeko mpe mitindo, asalaki yango na motema na ye mobimba, mpe azalaki kolonga.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto