Mokanda ya liboso ya Samwele
11 Na nsima, Nahashe, mokonzi ya Baamone,+ azwaki basoda na ye, bamataki mpe batyaki kaa mpo na kobundisa Yabeshe,+ na Gileade. Mibali nyonso ya Yabeshe balobaki na Nahashe boye: “Salá kondimana* na biso, mpe tokosalela yo.” 2 Nahashe, Moamone, alobaki na bango: “Nakosala kondimana na bino kaka soki bondimi likambo oyo: natɔbɔla bino nyonso liso ya mobali. Nakosala bongo mpo na koyokisa Yisraele mobimba nsɔni.” 3 Bankulutu ya Yabeshe bazongiselaki ye: “Pesá biso mikolo nsambo mpo tótinda bamemi-nsango na teritware mobimba ya Yisraele. Mpe soki moto ya kobikisa biso azali te, tokomitika na mabɔkɔ na yo.” 4 Na nsima, bamemi-nsango bakómaki na Gibea+ ya Saulo mpe bayebisaki bato makambo yango; mpe bato nyonso balelaki na mingongo makasi mpenza.
5 Nzokande, Saulo autaki na bilanga elongo na etonga ya bangɔmbɛ, bongo atunaki boye: “Likambo nini ekómeli bato oyo? Mpo na nini bazali kolela?” Na yango, bayebisaki ye makambo oyo mibali ya Yabeshe balobaki. 6 Ntango Saulo ayokaki maloba yango, elimo ya Nzambe ekitelaki ye,+ mpe nkanda na ye engalaki makasi. 7 Na yango, azwaki bangɔmbɛ-mibali mibale, akataki yango bitenibiteni, apesaki bamemi-nsango bámema yango na teritware mobimba ya Yisraele, mpe báloba: “Moto nyonso oyo aboyi kolanda Saulo ná Samwele, bakosala bangɔmbɛ na ye kaka boye!” Mpe Yehova asalaki ete bato bábanga mpe bátosa; bongo bato babimaki na bomoko mpenza.* 8 Na nsima, Saulo atángaki bango na Bezeke: mibali ya Yisraele bazalaki 300 000, mpe mibali ya Yuda bazalaki 30 000. 9 Bongo balobaki na bamemi-nsango oyo bautaki na Yabeshe ete: “Bóyebisa mibali ya Yabeshe, na Gileade, ete: ‘Lobi ntango moi ekongala* tokobikisa bino.’” Na yango, ntango bamemi-nsango bakómaki mpe bayebisaki mibali ya Yabeshe bongo, basepelaki mingi. 10 Bongo mibali ya Yabeshe bayebisaki Baamone boye: “Lobi tokomitika na mabɔkɔ na bino, mpe bokosala biso nyonso oyo bolingi.”+
11 Na mokolo oyo elandaki, Saulo akabolaki bato na bituluku misato mpe bakɔtaki na kati ya kaa yango na eleko ya kokɛngɛla ya ntɔngɔ* mpe babomaki Baamone+ tii ntango moi engalaki.* Baoyo babikaki bapanzanaki mpenza, batikalaki bato mibale esika moko te. 12 Bongo, bato balobaki na Samwele: “Banani bazalaki koloba ete: ‘Saulo akoki mpenza kozala mokonzi na biso?’+ Bóbimisa bato yango awa mpo tóboma bango.” 13 Kasi, Saulo alobaki: “Moto moko te akobomama lelo,+ mpo Yehova abikisi Yisraele na mokolo ya lelo.”
14 Na nsima, Samwele alobaki na bato boye: “Bóya, tókende na Gilgale+ mpo na komonisa lisusu ete Saulo azali mokonzi.”+ 15 Na yango, bato nyonso ya ekólo bakendaki na Gilgale, mpe kuna, batyaki Saulo mokonzi liboso ya Yehova. Bongo bapesaki bambeka ya kimya* kuna, liboso ya Yehova,+ mpe Saulo ná mibali nyonso ya Yisraele basepelaki mingi.+