Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Kolimbola Mibeko

      • Balendisi Yisraele etosa (1-14)

        • Bóbosana te misala ya Nzambe (9)

      • Yehova asɛngaka kokangama kaka na ye (15-31)

      • Bokozala na banzambe mosusu te longola kaka Yehova (32-40)

      • Bingumba ya ekimelo na ɛsti ya Yordani (41-43)

      • Ebandeli ya mobeko (44-49)

Kolimbola Mibeko 4:1

Mitindami

  • +Le 18:5

Kolimbola Mibeko 4:2

Mitindami

  • +Mib 12:32; Mas 30:5, 6; Em 22:18, 19

Kolimbola Mibeko 4:3

Mitindami

  • +Mit 25:5, 9; Nz 106:28; Hos 9:10; 1Ko 10:7, 8

Kolimbola Mibeko 4:5

Mitindami

  • +Le 26:46; Mit 30:16; 36:13; Mib 6:1

Kolimbola Mibeko 4:6

Mitindami

  • +1Ba 2:3
  • +Nz 111:10
  • +Nz 119:98, 100
  • +1Ba 4:34; 10:4-7; Da 1:19, 20

Kolimbola Mibeko 4:7

Mitindami

  • +Kob 25:8; Le 26:12; Mib 5:26; 2Sa 7:23

Kolimbola Mibeko 4:8

Mitindami

  • +Nz 147:19, 20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/2002, nk. 14-15

    1/7/1992, nk. 11-12

Kolimbola Mibeko 4:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mpe bókeba mpenza mpo na milimo na bino.”

Mitindami

  • +Eb 18:19; Mib 6:6, 7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/2006, nk. 29-30

    Eteyelo ya mosala, lok. 20

Kolimbola Mibeko 4:10

Mitindami

  • +Kob 19:9
  • +Kob 20:20; Mib 5:29
  • +Mas 22:6; Ef 6:4

Kolimbola Mibeko 4:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “tii na motema ya likoló.”

Mitindami

  • +Kob 19:18; Ebr 12:18, 19

Kolimbola Mibeko 4:12

Mitindami

  • +Mib 9:10
  • +Yis 40:18; Yn 1:18; 4:24
  • +Kob 20:22

Kolimbola Mibeko 4:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Maloba Zomi.”

Mitindami

  • +Kob 19:5; Mib 5:2; 9:9; Ebr 9:19, 20
  • +Kob 20:1; 34:28; Mib 10:4
  • +Kob 24:12; 31:18; 32:19; 34:1

Kolimbola Mibeko 4:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bókeba mpenza mpo na milimo na bino.”

Kolimbola Mibeko 4:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekeko oyo eyemami.”

Mitindami

  • +Kob 20:4; Mib 27:15; Yis 40:18; Mis 17:29; 1Ko 10:14

Kolimbola Mibeko 4:17

Mitindami

  • +Mib 5:8; Ro 1:22, 23

Kolimbola Mibeko 4:18

Mitindami

  • +1Sa 5:4

Kolimbola Mibeko 4:19

Mitindami

  • +Mib 17:2, 3; 2Ba 17:16; Ezk 8:16

Kolimbola Mibeko 4:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bato ya libula na ye.”

Mitindami

  • +Kob 19:5

Kolimbola Mibeko 4:21

Mitindami

  • +Nz 106:32
  • +Mit 20:12; Mib 31:1, 2

Kolimbola Mibeko 4:22

Mitindami

  • +Mib 3:27

Kolimbola Mibeko 4:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekeko oyo eyemami.”

Mitindami

  • +Kob 24:3
  • +Kob 20:4

Kolimbola Mibeko 4:24

Mitindami

  • +Kob 24:17; Mib 9:3; Ebr 12:29
  • +Kob 20:5; 34:14; Mit 25:11; Lk 10:27

Kolimbola Mibeko 4:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekeko oyo eyemami.”

Mitindami

  • +Bas 18:30; 2Ba 21:1, 7
  • +2Ba 17:16, 17

Kolimbola Mibeko 4:26

Mitindami

  • +Le 18:24, 28; 26:27, 32

Kolimbola Mibeko 4:27

Mitindami

  • +Mib 28:64; Ne 1:8
  • +Mib 28:62

Kolimbola Mibeko 4:28

Mitindami

  • +Mib 28:15, 36; Yir 16:13; Ezk 20:39

Kolimbola Mibeko 4:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Tála Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mib 30:1-3, 8-10; 1Ba 8:48, 49; Yir 29:13; Yoe 2:12
  • +2Nt 15:4, 15

Kolimbola Mibeko 4:30

Mitindami

  • +2Nt 33:13; Ne 1:9

Kolimbola Mibeko 4:31

Mitindami

  • +Kob 34:6; Mib 30:3; 2Nt 30:9; Ne 9:31; Yis 54:7; 55:7
  • +Le 26:42

Kolimbola Mibeko 4:32

Mitindami

  • +Nz 44:1

Kolimbola Mibeko 4:33

Mitindami

  • +Mib 5:26

Kolimbola Mibeko 4:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “komekama.”

  • *

    Lil., “lobɔkɔ oyo esembolami.”

Mitindami

  • +Kob 7:3
  • +Kob 15:3
  • +Kob 13:3
  • +Mib 26:8; Nz 78:43-51

Kolimbola Mibeko 4:35

Mitindami

  • +Kob 6:7
  • +Kob 15:11; Mib 32:39; 1Sa 2:2; Yis 45:18; Mr 12:32

Kolimbola Mibeko 4:36

Mitindami

  • +Kob 19:18; 20:22

Kolimbola Mibeko 4:37

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Mib 10:15; Nz 105:6

Kolimbola Mibeko 4:38

Mitindami

  • +Kob 23:28; Mib 7:1; 9:1; Yos 3:10

Kolimbola Mibeko 4:39

Mitindami

  • +2Nt 20:6
  • +Yis 44:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 4

Kolimbola Mibeko 4:40

Mitindami

  • +Eb 48:3, 4

Kolimbola Mibeko 4:41

Mitindami

  • +Mit 35:14

Kolimbola Mibeko 4:42

Mitindami

  • +Mit 35:22-24
  • +Mit 35:11, 25; Mib 19:4, 5

Kolimbola Mibeko 4:43

Mitindami

  • +Yos 21:8, 36
  • +Yos 21:8, 38
  • +Yos 21:27
  • +Yos 20:8, 9

Kolimbola Mibeko 4:44

Mitindami

  • +Mib 17:18; 27:2, 3; Ga 3:24

Kolimbola Mibeko 4:45

Mitindami

  • +Le 26:46; Mib 4:1

Kolimbola Mibeko 4:46

Mitindami

  • +Mib 1:5; 3:29
  • +Mit 21:26
  • +Mit 21:23, 24

Kolimbola Mibeko 4:47

Mitindami

  • +Mit 21:33; Mib 3:4

Kolimbola Mibeko 4:48

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mib 2:36; 3:12
  • +Mib 3:8, 9

Kolimbola Mibeko 4:49

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, Mbu ya Mungwa, to Mbu Ekufá.

Mitindami

  • +Mib 3:16, 17; 34:1

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mib. 4:1Le 18:5
Mib. 4:2Mib 12:32; Mas 30:5, 6; Em 22:18, 19
Mib. 4:3Mit 25:5, 9; Nz 106:28; Hos 9:10; 1Ko 10:7, 8
Mib. 4:5Le 26:46; Mit 30:16; 36:13; Mib 6:1
Mib. 4:61Ba 2:3
Mib. 4:6Nz 111:10
Mib. 4:6Nz 119:98, 100
Mib. 4:61Ba 4:34; 10:4-7; Da 1:19, 20
Mib. 4:7Kob 25:8; Le 26:12; Mib 5:26; 2Sa 7:23
Mib. 4:8Nz 147:19, 20
Mib. 4:9Eb 18:19; Mib 6:6, 7
Mib. 4:10Kob 19:9
Mib. 4:10Kob 20:20; Mib 5:29
Mib. 4:10Mas 22:6; Ef 6:4
Mib. 4:11Kob 19:18; Ebr 12:18, 19
Mib. 4:12Mib 9:10
Mib. 4:12Yis 40:18; Yn 1:18; 4:24
Mib. 4:12Kob 20:22
Mib. 4:13Kob 19:5; Mib 5:2; 9:9; Ebr 9:19, 20
Mib. 4:13Kob 20:1; 34:28; Mib 10:4
Mib. 4:13Kob 24:12; 31:18; 32:19; 34:1
Mib. 4:16Kob 20:4; Mib 27:15; Yis 40:18; Mis 17:29; 1Ko 10:14
Mib. 4:17Mib 5:8; Ro 1:22, 23
Mib. 4:181Sa 5:4
Mib. 4:19Mib 17:2, 3; 2Ba 17:16; Ezk 8:16
Mib. 4:20Kob 19:5
Mib. 4:21Nz 106:32
Mib. 4:21Mit 20:12; Mib 31:1, 2
Mib. 4:22Mib 3:27
Mib. 4:23Kob 24:3
Mib. 4:23Kob 20:4
Mib. 4:24Kob 24:17; Mib 9:3; Ebr 12:29
Mib. 4:24Kob 20:5; 34:14; Mit 25:11; Lk 10:27
Mib. 4:25Bas 18:30; 2Ba 21:1, 7
Mib. 4:252Ba 17:16, 17
Mib. 4:26Le 18:24, 28; 26:27, 32
Mib. 4:27Mib 28:64; Ne 1:8
Mib. 4:27Mib 28:62
Mib. 4:28Mib 28:15, 36; Yir 16:13; Ezk 20:39
Mib. 4:29Mib 30:1-3, 8-10; 1Ba 8:48, 49; Yir 29:13; Yoe 2:12
Mib. 4:292Nt 15:4, 15
Mib. 4:302Nt 33:13; Ne 1:9
Mib. 4:31Kob 34:6; Mib 30:3; 2Nt 30:9; Ne 9:31; Yis 54:7; 55:7
Mib. 4:31Le 26:42
Mib. 4:32Nz 44:1
Mib. 4:33Mib 5:26
Mib. 4:34Kob 7:3
Mib. 4:34Kob 15:3
Mib. 4:34Kob 13:3
Mib. 4:34Mib 26:8; Nz 78:43-51
Mib. 4:35Kob 6:7
Mib. 4:35Kob 15:11; Mib 32:39; 1Sa 2:2; Yis 45:18; Mr 12:32
Mib. 4:36Kob 19:18; 20:22
Mib. 4:37Mib 10:15; Nz 105:6
Mib. 4:38Kob 23:28; Mib 7:1; 9:1; Yos 3:10
Mib. 4:392Nt 20:6
Mib. 4:39Yis 44:6
Mib. 4:40Eb 48:3, 4
Mib. 4:41Mit 35:14
Mib. 4:42Mit 35:22-24
Mib. 4:42Mit 35:11, 25; Mib 19:4, 5
Mib. 4:43Yos 21:8, 36
Mib. 4:43Yos 21:8, 38
Mib. 4:43Yos 21:27
Mib. 4:43Yos 20:8, 9
Mib. 4:44Mib 17:18; 27:2, 3; Ga 3:24
Mib. 4:45Le 26:46; Mib 4:1
Mib. 4:46Mib 1:5; 3:29
Mib. 4:46Mit 21:26
Mib. 4:46Mit 21:23, 24
Mib. 4:47Mit 21:33; Mib 3:4
Mib. 4:48Mib 2:36; 3:12
Mib. 4:48Mib 3:8, 9
Mib. 4:49Mib 3:16, 17; 34:1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
  • 44
  • 45
  • 46
  • 47
  • 48
  • 49
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Kolimbola Mibeko 4:1-49

Kolimbola Mibeko

4 “Sikoyo, Ee Yisraele, bóyoka malako mpe bikateli oyo nazali koteya bino mpo bótosa yango, mpo bózala na bomoi,+ bókɔta mpe bózwa mokili oyo Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino azali kopesa bino. 2 Na liloba oyo nazali kopesa bino mitindo, bosengeli kobakisa eloko te mpe kolongola eloko te,+ mpo bóbatela mitindo ya Yehova Nzambe na bino oyo nazali kopesa bino.

3 “Miso na bino moko emonaki oyo Yehova asalaki na likambo ya Baala ya Peore: Yehova Nzambe na bino asilisaki na kati na bino mobali nyonso oyo alandaki Baala ya Peore.+ 4 Kasi bino baoyo bokangami na Yehova Nzambe na bino, bino nyonso bozali na bomoi lelo oyo. 5 Talá: nateyi bino malako mpe bikateli,+ kaka ndenge Yehova Nzambe na ngai apesi ngai mitindo, mpo bótosa yango na mokili oyo bokozwa. 6 Bosengeli kotosa yango malamumalamu,+ mpo yango ekomonisa bwanya+ mpe mayele+ mpo na bino liboso ya bato ya bikólo oyo bakoyoka nsango ya malako oyo nyonso, mpe bakoloba ete: ‘Ekólo monene oyo ezali mpenza ekólo moko ya bato ya bwanya mpe ya mayele.’+ 7 Mpo ekólo nini ya monene ezali na banzambe pene na yango lokola Yehova Nzambe na biso azali pene na biso ntango nyonso oyo tobelelaka ye?+ 8 Mpe ekólo nini ya monene ezali na malako mpe na bikateli ya sembo lokola mobeko nyonso oyo nazali kopesa bino lelo oyo?+

9 “Kaka nde bókeba mpe bómibatela,* mpo bóbosana te makambo oyo miso na bino emoni mpe yango elongwa na motema na bino te mikolo nyonso ya bomoi na bino. Bosengeli mpe koyebisa yango na bana na bino mpe na bana ya bana na bino.+ 10 Na mokolo oyo otɛlɛmaki liboso ya Yehova Nzambe na yo na Horebe, Yehova alobaki na ngai ete: ‘Yanganisá bato epai na ngai mpo nayokisa bango maloba na ngai,+ mpo báyekola kobanga ngai+ mikolo nyonso oyo bakozala na bomoi na mabele mpe mpo báteya bana na bango.’+

11 “Bongo bopusanaki mpe botɛlɛmaki na nse ya ngomba, mpe ngomba ezalaki kopela mɔtɔ tii na likoló mpenza;* molili, lipata mpe molili makasi ezalaki.+ 12 Mpe Yehova abandaki koloba na bino na katikati ya mɔtɔ.+ Boyokaki lokito ya maloba, kasi bomonaki elilingi ata moko te+—kaka mongongo.+ 13 Mpe ayebisaki bino kondimana+ na ye, elingi koloba Mibeko Zomi,*+ oyo apesaki bino mitindo ete bótosa yango. Nsima na yango, akomaki yango na bitanda mibale ya mabanga.+ 14 Na ntango yango Yehova apesaki ngai mitindo mpo na koteya bino malako mpe bikateli oyo bosengeli kotosa na mokili oyo bokokɔta mpo na kozwa yango.

15 “Na yango, lokola bomonaki elilingi ata moko te na mokolo oyo Yehova alobaki na bino na Horebe na katikati ya mɔtɔ, bómibatela mpenza,* 16 mpo bósala makambo na kozanga bosembo te mpe bósala te mpo na bino ekeko* oyo ezali na elilingi ya elembo nyonso, elilingi ya mobali to ya mwasi,+ 17 elilingi ya nyama nyonso oyo ezali na mabele to elilingi ya ndɛkɛ nyonso oyo epumbwaka na likoló,+ 18 elilingi ya eloko nyonso oyo ebendanaka na libumu oyo ezali na mabele to elilingi ya mbisi nyonso oyo ezali na mai na nse ya mabele.+ 19 Mpe soki botomboli miso na bino na likoló mpe bomoni moi ná sanza mpe minzoto—limpinga nyonso ya likoló—, bótika te ete ebenda bino mpo na kogumbamela yango mpe kosalela yango.+ Yehova Nzambe na bino apesá yango na bato ya bikólo nyonso oyo bazali na mabele mobimba. 20 Kasi bino bozali bato oyo Yehova azwaki mpe abimisaki na ndako ya mɔtɔ makasi oyo enyangwisaka bibende, na Ezipito, mpo bókóma bato oyo bazali eloko na ye moko,*+ lokola na mokolo ya lelo.

21 “Yehova asilikelaki ngai makasi mpo na bino,+ mpe alapaki ndai ete nakokatisa Yordani te mpe nakokɔta te na mokili ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino azali kopesa bino lokola libula.+ 22 Mpo nasengeli kokufa na mokili oyo; nakokatisa Yordani te,+ kasi bino bokokatisa mpe bokozwa mokili malamu oyo. 23 Bókeba ete bóbosana te kondimana ya Yehova Nzambe na bino oyo asalaki ná bino,+ mpe bósala te ekeko mpo na bino,* elilingi ya eloko nyonso oyo Yehova Nzambe na bino apekisaki bino.+ 24 Mpo Yehova Nzambe na bino azali mɔtɔ oyo ezikisaka,+ Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.+

25 “Soki boboti bana, bozwi bankɔkɔ mpe bofandi ntango molai na mokili mpe bobebisi makambo mpe bosali mpo na bino ekeko* ya elilingi+ ya eloko nyonso, mpe bosali oyo ezali mabe na miso ya Yehova Nzambe na bino mpo na kosilikisa ye,+ 26 nazali lelo kozwa likoló ná mabele batatoli liboso na bino, ete bokokufa mpenza nokinoki na mokili epai bozali kokatisa Yordani mpo na kozwa yango. Bokoumela na mokili yango te, mpo bokosila bino nyonso.+ 27 Yehova akopanza bino na kati ya bato ya bikólo.+ Kaka bato moke kati na bino nde bakotikala na bomoi+ na bikólo oyo Yehova akomema bino. 28 Kuna bokosalela banzambe ya mabaya mpe ya mabanga oyo esalemi na mabɔkɔ ya moto,+ banzambe oyo bakoki komona te, koyoka te, kolya te mpe koyoka nsolo te.

29 “Soki kuna boluki Yehova Nzambe na bino, soki boluki ye na motema na bino mobimba mpe na molimo* na bino mobimba,+ bokomona ye mpenza.+ 30 Na mikolo ekoya, ntango bokozala na mitungisi makasi mpe makambo oyo nyonso ekokómela bino, bokozongela Yehova Nzambe na bino mpe bokoyoka mongongo na ye.+ 31 Mpo Yehova Nzambe na bino azali Nzambe ya motema mawa.+ Akosundola bino te, akosilisa bino te mpe akobosana te kondimana oyo alapelaki bankɔkɔ na bino ndai.+

32 “Sikoyo, bótuna mpo na mikolo ya kala oyo ezalaki liboso na bino, banda na mokolo oyo Nzambe azalisaki moto na mabele; bóluka banda na nsuka moko ya likoló tii na nsuka mosusu ya likoló. Eloko moko ya monene lokola oyo wana esalemá to bayoká eloko moko lokola oyo wana?+ 33 Ezali nde na bato mosusu oyo bayoká mongongo ya Nzambe ezali koloba na katikati ya mɔtɔ ndenge boyokaki yango, mpe batikalá na bomoi?+ 34 To ezali nde na Nzambe oyo amekaki kolongola ekólo moko mpo na ye na kati ya ekólo mosusu, na nzela ya bitumbu,* na bilembo, na makamwisi,+ na etumba,+ na nguya ya lobɔkɔ na ye,+ na makasi na ye* mpe na makambo minene ya nsɔmɔ,+ lokola oyo Yehova Nzambe na bino asalaki mpo na bino na Ezipito na miso na bino? 35 Bamonisaki bino makambo yango, mpo bóyeba ete Yehova azali Nzambe ya solo;+ mosusu azali te, kaka ye.+ 36 Ayokisaki bino mongongo na ye uta na likoló mpo na kosembola bino, mpe na mabele amonisaki bino mɔtɔ na ye monene, mpe boyokaki maloba na ye uta na katikati ya mɔtɔ.+

37 “Lokola alingaki bankɔkɔ na bino mpe aponaki libota* na bango nsima na bango,+ azalaki elongo na bino mpe abimisaki bino na Ezipito, na nguya na ye monene. 38 Abenganaki liboso na bino bikólo ya minene mpe ya makasi koleka bino, mpo na kokɔtisa bino na mokili na bango mpo ezala libula na bino, ndenge ezali na mokolo ya lelo.+ 39 Lisusu, lelo bóyeba mpe bóbosana te ete Yehova azali Nzambe ya solo na likoló mpe awa na mabele.+ Mosusu azali te.+ 40 Bosengeli kobatela malako na ye mpe mitindo na ye oyo nazali kopesa bino lelo, mpo makambo na bino mpe ya bana na bino nsima na bino etambola malamu, mpe mpo boumela mingi na mabele oyo Yehova Nzambe na bino azali kopesa bino.”+

41 Na ntango yango, Moize aponaki bingumba misato na ngámbo ya Yordani na ɛsti,+ 42 mpo moto oyo abomi moto mosusu na nko te mpe azalaki koyina ye te liboso,+ asengeli kokima na moko ya bingumba yango mpo atikala na bomoi.+ 43 Bingumba yango ezali: Bezere+ na esobe, na ngomba patatalu, mpo na Barubene, Ramote+ na Gileade mpo na Bagade, mpe Golane+ na Bashane mpo na Bamanase.+

44 Sikoyo, talá Mobeko+ oyo Moize alakisaki bato ya Yisraele. 45 Yango ezali makundoli, malako mpe bikateli oyo Moize apesaki Bayisraele nsima ya kobima na bango na Ezipito,+ 46 na etúká ya Yordani, na lobwaku oyo etalani na Bete-peore,+ na mokili ya Sihone, mokonzi ya Baamore, oyo azalaki kofanda na Heshibone,+ oyo Moize ná Bayisraele balongaki nsima ya kobima na Ezipito.+ 47 Mpe bazwaki mokili na ye mpe mokili ya Oge+ mokonzi ya Bashane, bakonzi mibale ya Baamore oyo bazalaki na etúká ya ɛsti ya Yordani, 48 banda na Aroere,+ oyo ezali pembenipembeni ya Lobwaku* ya Arnone tii na Ngomba Sione, elingi koloba, Heremone,+ 49 mpe na Araba mobimba na etúká ya ɛsti ya Yordani, tii na Mbu ya Araba,* na esika mopanzi ya Pisga ekiti, na nse.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto