Kobima
36 “Bezalele akosala elongo na Oholiabe mpe mobali nyonso oyo ayebi mosala malamu,* oyo Yehova apesi bwanya mpe mayele mpo na koyeba ndenge ya kosala mosala nyonso ya esika bosantu na kolanda mitindo oyo Yehova apesi.”+
2 Nsima na yango, Moize abengaki Bezalele ná Oholiabe mpe mobali nyonso oyo ayebi mosala malamu oyo Yehova atyaki bwanya na motema na ye,+ moto nyonso oyo motema etindaki ye asala mosala na bolingo na ye moko.+ 3 Bongo bazwaki epai ya Moize likabo nyonso+ oyo Bayisraele bamemaki mpo na mosala ya esika bosantu. Nzokande, ntɔngɔ nyonso bazalaki kaka komemela ye likabo na bolingo na bango moko.
4 Na yango, nsima ya kobanda kosala mosala mosantu, bato nyonso oyo bayebaki mosala malamu bazalaki koya, moko na moko, 5 mpe bazalaki koloba na Moize ete: “Bato bazali koya na biloko mingi koleka oyo esengeli mpo na mosala oyo Yehova apesi mitindo ete esalema.” 6 Bongo Moize apesaki mitindo ete bápesa liyebisi na kaa mobimba ete: “Mibali ná basi, bóya lisusu na biloko te mpo na likabo mosantu.” Na yango bapekisaki bato báya lisusu ata na eloko moko te. 7 Biloko ekokaki mpo na mosala nyonso oyo esengelaki kosalema, mpe elekaki kutu koleka.
8 Bongo bato nyonso oyo bayebi mosala malamu+ basalaki tabernakle+ na bilamba zomi ya hema ya lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá, na nsinga ya bulé, na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé mpe na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi; asalaki* mayemi ya bakeruba na bansinga likoló ya bilamba yango.+ 9 Elamba mokomoko ya hema ezalaki mapeko* 28 na molai mpe monene na yango mapeko 4. Bilamba nyonso ya hema ezalaki molai mpe monene ndenge moko. 10 Bongo akangisaki bilamba mitano ya hema esika moko, mpe akangisaki bilamba mitano mosusu ya hema esika moko. 11 Nsima na yango asalaki madusu na nsinga ya bulé na mopanzi ya elamba moko ya hema yango na esika oyo ekokangisama. Asalaki bongo na mopanzi ya elamba ya hema oyo ekokani na esika mosusu oyo ekokangisama. 12 Asalaki madusu 50 na elamba moko ya hema mpe madusu 50 na mopanzi mosusu ya elamba ya hema na esika oyo yango ekokangana mpo madusu yango etalana moko na mosusu. 13 Nsukansuka asalaki bakroshɛ ya wolo 50 mpe akangisaki elamba mokomoko ya hema na bakroshɛ yango, mpe tabernakle yango ekómaki eloko moko.
14 Na nsima asalaki bilamba ya nsuki ya ntaba mpo ezala hema likoló ya tabernakle. Asalaki bilamba 11 ya hema.+ 15 Elamba mokomoko ya hema ezalaki mapeko 30 na molai, mpe monene na yango mapeko 4. Bilamba yango 11 ya hema ezalaki molai mpe monene ndenge moko. 16 Na nsima akangisaki bilamba mitano ya hema esika moko mpe bilamba mosusu motoba ya hema esika moko. 17 Na nsima asalaki madusu 50 na mopanzi ya elamba moko ya hema oyo ebimi na esika oyo yango ekanganaki, mpe asalaki madusu 50 na mopanzi mosusu ya elamba ya hema oyo ekanganaki na yango. 18 Mpe asalaki bakroshɛ 50 ya kwivre mpo na kokangisa hema esika moko mpo ekóma eloko moko.
19 Asalaki ezipeli moko mpo na hema na mposo ya mpate-mobali, oyo epakolami langi ya motane mpe ezipeli moko na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ mpo eleka likoló na yango.+
20 Na nsima asalaki bakadrɛ mpo na tabernakle na nzete ya akasia,+ oyo etɛlɛmaki semba.+ 21 Kadrɛ mokomoko ezalaki mapeko zomi na molai, mpe monene na yango lipeko moko na ndambo. 22 Kadrɛ mokomoko ezalaki na matutu* mibale oyo ekangisamaki moko na mosusu. Bongo nde asalaki bakadrɛ nyonso ya tabernakle. 23 Bongo asalaki bakadrɛ mpo na ngámbo ya sudi ya tabernakle: bakadrɛ 20. 24 Na nsima, asalaki bitɛlɛmiselo 40 ya palata oyo ezali na mabulu, oyo ekotyama na nse ya bakadrɛ 20, bitɛlɛmiselo mibale oyo ezali na mabulu na nse ya kadrɛ moko mpo na matutu na yango mibale, mpe bitɛlɛmiselo mibale oyo ezali na mabulu na nse ya kadrɛ mokomoko oyo elandi mpo na matutu na yango mibale.+ 25 Mpo na ngámbo mosusu ya tabernakle, na ngámbo ya nɔrdi, asalaki bakadrɛ 20 26 ná bitɛlɛmiselo na yango 40 ya palata, oyo ezali na mabulu, bitɛlɛmiselo mibale oyo ezali na mabulu na nse ya kadrɛ moko mpe bitɛlɛmiselo mibale oyo ezali na mabulu na nse ya mokomoko ya bakadrɛ mosusu.
27 Na nsima ya tabernakle na wɛsti, asalaki bakadrɛ motoba.+ 28 Asalaki bakadrɛ mibale mpo ezala makonzí ya nsuka ya tabernakle na bansuka mibale ya nsima. 29 Makonzí ezalaki mibale kobanda na nse tii na likoló, emataki tii na lopɛtɛ ya liboso. Yango nde asalaki mpo na makonzí mibale ya nsuka. 30 Bongo yango nyonso ezalaki bakadrɛ mwambe ná bitɛlɛmiselo na yango 16 ya palata, oyo ezali na mabulu, bitɛlɛmiselo mibale oyo ezali na mabulu na nse ya kadrɛ mokomoko.
31 Nsima na yango, asalaki lisusu bikangiseli na nzete ya akasia: bikangiseli mitano mpo na bakadrɛ ya ngámbo moko ya tabernakle+ 32 mpe bikangiseli mitano mpo na bakadrɛ ya ngámbo mosusu ya tabernakle, mpe bikangiseli mitano mpo na bakadrɛ ya tabernakle na nsima, na wɛsti. 33 Asalaki ekangiseli ya katikati oyo ekozala na katikati ya bakadrɛ banda na nsuka oyo tii na nsuka mosusu. 34 Azipaki bakadrɛ yango na wolo, mpe asalaki bampɛtɛ na yango na wolo mpo ezala bisimbeli ya bikangiseli, mpe azipaki bikangiseli yango na wolo.+
35 Na nsima asalaki rido+ na nsinga ya bulé, na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé, na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi mpe na lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá. Asalaki mayemi ya bakeruba na bansinga likoló na yango.+ 36 Na nsima asalelaki yango makonzí minei ya akasia mpe azipaki yango na wolo, ná bakroshɛ na yango ya wolo, mpe anyangwisaki palata mpo na kosalela yango bitɛlɛmiselo minei, oyo ezali na mabulu. 37 Na nsima asalaki elamba ya kozipa* mpo na ekɔtelo ya hema na nsinga ya bulé, na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé, na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi mpe na lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá, oyo batongi yango esika moko,+ 38 ná makonzí na yango mitano mpe bakroshɛ na yango. Azipaki bansɔngɛ na yango mpe bikangiseli* na yango na wolo, kasi bitɛlɛmiselo na yango mitano oyo ezali na mabulu ezalaki ya kwivre.