Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Sambole ya mpongo mibale mpe ya nzete ya vinyo (1-21)

      • Etape ya pɛtɛpɛtɛ ekokóma nzete monene ya sɛdrɛ (22-24)

Ezekiele 17:2

Mitindami

  • +Hos 12:10

Ezekiele 17:3

Mitindami

  • +Mib 28:49, 50; Yir 4:13; Bil 4:19
  • +Yir 22:23
  • +2Ba 24:12; 2Nt 36:9, 10; Yir 24:1

Ezekiele 17:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mokili ya Kanana.”

Mitindami

  • +2Ba 24:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2007, nk. 12-13

Ezekiele 17:5

Mitindami

  • +2Ba 24:17; Yir 37:1

Ezekiele 17:6

Mitindami

  • +Ezk 17:13, 14
  • +2Nt 36:11

Ezekiele 17:7

Mitindami

  • +Ezk 17:15
  • +Yir 37:5, 7
  • +2Ba 24:20; 2Nt 36:11, 13

Ezekiele 17:8

Mitindami

  • +Yir 37:1

Ezekiele 17:9

Mitindami

  • +Yir 21:7
  • +2Ba 25:7

Ezekiele 17:12

Mitindami

  • +2Ba 24:12, 14; Yis 39:7; Yir 22:24, 25; 52:31, 32

Ezekiele 17:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +2Ba 24:17; Yir 37:1
  • +2Nt 36:11, 13
  • +2Ba 24:15; Yir 24:1

Ezekiele 17:14

Mitindami

  • +Yir 27:12; 38:17

Ezekiele 17:15

Mitindami

  • +2Ba 24:20; 2Nt 36:11, 13
  • +Mib 17:16
  • +Yir 37:5
  • +Yir 32:3, 4

Ezekiele 17:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “Nebukadenezare.”

  • *

    Elingi koloba, “Zidikiya.”

Mitindami

  • +Yir 34:2, 3; 52:11

Ezekiele 17:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “milimo.”

Mitindami

  • +Yir 37:7, 8; Bil 4:17; Ezk 29:6

Ezekiele 17:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “apesaki lobɔkɔ na ye.”

Ezekiele 17:19

Mitindami

  • +Mib 5:11

Ezekiele 17:20

Mitindami

  • +Ezk 12:13
  • +Ezk 20:36

Ezekiele 17:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na mipɛpɛ nyonso.”

Mitindami

  • +Ezk 12:14
  • +Ezk 6:13

Ezekiele 17:22

Mitindami

  • +Yis 11:1; Yir 23:5
  • +Yis 53:2
  • +Nz 2:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2007, nk. 12-13

Ezekiele 17:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2007, nk. 12-13

Ezekiele 17:24

Mitindami

  • +Yis 9:6; Ezk 21:26, 27; Da 4:17; Am 9:11
  • +1Sa 2:7, 8; Lk 1:52

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 17:2Hos 12:10
Ezk. 17:3Mib 28:49, 50; Yir 4:13; Bil 4:19
Ezk. 17:3Yir 22:23
Ezk. 17:32Ba 24:12; 2Nt 36:9, 10; Yir 24:1
Ezk. 17:42Ba 24:15
Ezk. 17:52Ba 24:17; Yir 37:1
Ezk. 17:6Ezk 17:13, 14
Ezk. 17:62Nt 36:11
Ezk. 17:7Ezk 17:15
Ezk. 17:7Yir 37:5, 7
Ezk. 17:72Ba 24:20; 2Nt 36:11, 13
Ezk. 17:8Yir 37:1
Ezk. 17:9Yir 21:7
Ezk. 17:92Ba 25:7
Ezk. 17:122Ba 24:12, 14; Yis 39:7; Yir 22:24, 25; 52:31, 32
Ezk. 17:132Ba 24:17; Yir 37:1
Ezk. 17:132Nt 36:11, 13
Ezk. 17:132Ba 24:15; Yir 24:1
Ezk. 17:14Yir 27:12; 38:17
Ezk. 17:152Ba 24:20; 2Nt 36:11, 13
Ezk. 17:15Mib 17:16
Ezk. 17:15Yir 37:5
Ezk. 17:15Yir 32:3, 4
Ezk. 17:16Yir 34:2, 3; 52:11
Ezk. 17:17Yir 37:7, 8; Bil 4:17; Ezk 29:6
Ezk. 17:19Mib 5:11
Ezk. 17:20Ezk 12:13
Ezk. 17:20Ezk 20:36
Ezk. 17:21Ezk 12:14
Ezk. 17:21Ezk 6:13
Ezk. 17:22Yis 11:1; Yir 23:5
Ezk. 17:22Yis 53:2
Ezk. 17:22Nz 2:6
Ezk. 17:24Yis 9:6; Ezk 21:26, 27; Da 4:17; Am 9:11
Ezk. 17:241Sa 2:7, 8; Lk 1:52
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 17:1-24

Ezekiele

17 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, pesá sambole mpe lobá lisese mpo na bato ya Yisraele.+ 3 Osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mpongo monene,+ ya mapapu minene, oyo azali na nsala milai na mapapu, oyo atondi na nsala ya langi ndenge na ndenge, ayaki na Liban+ mpe azwaki nsɔngɛ ya nzete ya sɛdrɛ.+ 4 Abukaki nsɔngɛ ya bitape na yango ya sika mpe amemaki yango na mokili ya bato ya mombongo* mpe atyaki yango na nse na engumba moko ya bato ya mombongo.+ 5 Na nsima, azwaki ndambo ya momboto ya mokili yango+ mpe atyaki yango na elanga oyo ebotaka malamu. Mpe atyaki yango lokola nzete ya sole pene ya mai minene. 6 Bongo ebimaki mpe ekómaki nzete ya vinyo ya molai mingi te oyo ezali kopanzana,+ nkasa na yango etalaki na kati mpe misisa na yango ebimaki na nse na yango. Na yango, ekómaki nzete ya vinyo, ebotaki bitape ya sika mpe ebimisaki bitape ya minene.+

7 “‘“Mpe mpongo mosusu ya monene+ ayaki, azalaki na mapapu minene mpe azalaki na nsala milai na mapapu.+ Nzete ya vinyo yango esembolaki misisa na yango na lokoso epai na ye, mosika na bilanga epai yango elonamaki. Ebimisaki nkasa na yango epai na ye mpo asopela yango mai.+ 8 Esilaki kolonama na elanga moko kitoko, pene na mai minene, mpo ebimisa bitape, ebota mbuma, mpe ekóma nzete monene ya vinyo.”’+

9 “Lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Yango ekokola? Moto moko akopikola misisa na yango te,+ akosala te ete mbuma na yango epɔla? Mpe bitape na yango ya sika ekauka?+ Ekokauka mpenza. Ekosɛnga te lobɔkɔ moko ya nguya to bato ebele mpo na kopikola misisa na yango. 10 Ata soki bapikoli yango mpe baloni yango epai mosusu, ekokola? Yango nyonso ekokauka te ntango mopɛpɛ ya ɛsti ekobɛta yango? Ekokauka na bilanga esika yango ekolaki.”’”

11 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 12 “Nabondeli yo, lobá na batomboki ete: ‘Boyebi te soki makambo oyo elakisi nini?’ Lobá ete: ‘Talá! Mokonzi ya Babilone ayaki na Yerusaleme, azwaki mokonzi na yango, bankumu na yango mpe amemaki bango epai na ye, na Babilone.+ 13 Lisusu, azwaki moto moko na libota* ya mokonzi,+ asalaki na ye kondimana mpe alapisaki ye ndai.+ Na nsima amemaki bato ya lokumu ya mboka,+ 14 mpo bokonzi ekita, ezala lisusu makasi te, mpo kaka soki bato batosi kondimana nde bokonzi ekoki kokoba kozala.+ 15 Kasi, nsukansuka, mokonzi atombokelaki ye+ na ndenge atindaki bamemi-nsango na ye na Ezipito, mpo azwa epai na bango bampunda+ mpe limpinga monene.+ Akolonga nde? Moto oyo azali kosala makambo ya boye, akozanga kozwa etumbu? Akoki nde kobuka kondimana mpe abika?’+

16 “‘“Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: “Lokola nazali solo na bomoi, akokufa na Babilone na esika oyo mokonzi* oyo akómisaki ye* mokonzi afandaka, mokonzi oyo ye atyolaki ndai, mpe oyo abukaki kondimana na ye.+ 17 Basoda nyonso ya limpinga ya Farao bakozala na likoki te ya kosalisa na etumba,+ ntango basoda ya Babilone bakotonga mwa bangomba ya mabele mpe bifelo mpo na kozinga engumba, mpo na koboma bato* ebele. 18 Atyoli ndai mpe abuki kondimana. Asali makambo nyonso wana atako apesaki elaka.* Akobika te.”’

19 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola nazali solo na bomoi, nakosala ete anyokwama ndenge atyoli ndai na ngai+ mpe abuki kondimana na ngai. 20 Nakobwaka likoló na ye monyama na ngai, mpe akokangama na monyama na ngai ya bokila.+ Nakomema ye na Babilone mpe nakosamba na ye kuna ndenge azangi bosembo epai na ngai.+ 21 Basoda na ye nyonso oyo bakimakimaka, bakokufa na mopanga, mpe baoyo batikali bakopalangana moto na moto na nzela na ye.*+ Bongo bokoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nde nalobi.”’+

22 “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakozwa mwa etape na nsɔngɛ ya nzete ya sɛdrɛ oyo etombwaná+ mpe nakolona yango; nakobuka mwa etape ya pɛtɛpɛtɛ na nsɔngɛ ya mwa bitape na yango+ mpe ngai moko nakolona yango na ngomba moko ya molai, oyo etombwaná.+ 23 Nakolona yango na ngomba molai ya Yisraele; bitape na yango ekokola, ekobota mbuma mpe ekokóma nzete ya sɛdrɛ ya monene. Bandɛkɛ ya ndenge nyonso ekofanda na nse na yango mpe ekofanda na elili ya nkasa na yango. 24 Mpe banzete nyonso ya esobe ekoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nakitisi nzete oyo etombwaná mpe natomboli nzete oyo ezalaki na nse;+ nakaukisi nzete oyo ezali naino mobesu mpe nasali ete nzete oyo ekauká ebimisa fololo.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi mpe nasali yango.”’”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto