Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 30
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Bila aboti Dani ná Nafatali (1-8)

      • Zilipa aboti Gade ná Ashere (9-13)

      • Lea aboti Isakare ná Zebulone (14-21)

      • Rashele aboti Yozefe (22-24)

      • Bitonga ya Yakobo ekómi ebele (25-43)

Ebandeli 30:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “akangi mbuma ya libumu na yo?”

Ebandeli 30:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “abota na mabɔlɔngɔ na ngai.”

Mitindami

  • +Eb 29:29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, nk. 10-11

Ebandeli 30:4

Mitindami

  • +Eb 35:22

Ebandeli 30:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “mosambisi.”

Mitindami

  • +Eb 35:25; 46:23; 49:16

Ebandeli 30:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “líbanda na ngai.”

Mitindami

  • +Eb 35:25; 46:24; 49:21; Mib 33:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2002, nk. 29-30

Ebandeli 30:9

Mitindami

  • +Eb 35:26

Ebandeli 30:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “libaku malamu.”

Mitindami

  • +Eb 49:19; Mit 32:33

Ebandeli 30:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “esengo; bolamu.”

Mitindami

  • +Lk 1:46, 48
  • +Eb 35:26; 46:17; 49:20; Mib 33:24

Ebandeli 30:14

Mitindami

  • +Eb 29:32

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, lok. 11

    15/1/2004, lok. 28

Ebandeli 30:15

Mitindami

  • +Eb 29:30

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, lok. 11

    15/1/2004, lok. 28

Ebandeli 30:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “azali lifuti.”

Mitindami

  • +Eb 35:23; 46:13; 49:14; Mib 33:18

Ebandeli 30:19

Mitindami

  • +Rt 4:11

Ebandeli 30:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “kotika nzela.”

Mitindami

  • +Eb 29:32
  • +Eb 35:23; 46:15; Nz 127:3
  • +Eb 46:14; 49:13; Mib 33:18

Ebandeli 30:21

Mitindami

  • +Eb 34:1

Ebandeli 30:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mpe Nzambe ayokaki ye mpe afungolaki libumu na ye.”

Mitindami

  • +Eb 29:31

Ebandeli 30:23

Mitindami

  • +Lk 1:24, 25

Ebandeli 30:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ebengeli ya mokuse ya Yosifia, oyo elimboli, “tiká Yah abakisa (akolisa).”

Mitindami

  • +Eb 35:24; 45:4; Mib 33:13; Mis 7:9

Ebandeli 30:25

Mitindami

  • +Eb 28:15; 31:13

Ebandeli 30:26

Mitindami

  • +Eb 31:41; Hos 12:12

Ebandeli 30:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bilembo ya makambo oyo ekoya.”

Ebandeli 30:28

Mitindami

  • +Eb 31:7

Ebandeli 30:29

Mitindami

  • +Eb 31:38

Ebandeli 30:30

Mitindami

  • +Eb 32:9, 10

Ebandeli 30:31

Mitindami

  • +Hos 12:12

Ebandeli 30:32

Mitindami

  • +Eb 31:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2003, lok. 30

Ebandeli 30:34

Mitindami

  • +Eb 31:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2003, lok. 30

Ebandeli 30:35

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2003, lok. 30

Ebandeli 30:36

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2003, lok. 30

Ebandeli 30:42

Mitindami

  • +Eb 31:9

Ebandeli 30:43

Mitindami

  • +Eb 32:5; 36:6, 7

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 30:3Eb 29:29
Eba. 30:4Eb 35:22
Eba. 30:6Eb 35:25; 46:23; 49:16
Eba. 30:8Eb 35:25; 46:24; 49:21; Mib 33:23
Eba. 30:9Eb 35:26
Eba. 30:11Eb 49:19; Mit 32:33
Eba. 30:13Lk 1:46, 48
Eba. 30:13Eb 35:26; 46:17; 49:20; Mib 33:24
Eba. 30:14Eb 29:32
Eba. 30:15Eb 29:30
Eba. 30:18Eb 35:23; 46:13; 49:14; Mib 33:18
Eba. 30:19Rt 4:11
Eba. 30:20Eb 29:32
Eba. 30:20Eb 35:23; 46:15; Nz 127:3
Eba. 30:20Eb 46:14; 49:13; Mib 33:18
Eba. 30:21Eb 34:1
Eba. 30:22Eb 29:31
Eba. 30:23Lk 1:24, 25
Eba. 30:24Eb 35:24; 45:4; Mib 33:13; Mis 7:9
Eba. 30:25Eb 28:15; 31:13
Eba. 30:26Eb 31:41; Hos 12:12
Eba. 30:28Eb 31:7
Eba. 30:29Eb 31:38
Eba. 30:30Eb 32:9, 10
Eba. 30:31Hos 12:12
Eba. 30:32Eb 31:7
Eba. 30:34Eb 31:8
Eba. 30:42Eb 31:9
Eba. 30:43Eb 32:5; 36:6, 7
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 30:1-43

Ebandeli

30 Ntango Rashele amonaki ete aboteli Yakobo mwana te, ayokelaki ndeko na ye ya mwasi zuwa mpe abandaki koloba na Yakobo ete: “Pesá ngai bana, soki te nakokufa.” 2 Yakobo asilikelaki Rashele makasi mpe alobaki ete: “Ngai nazali nde na esika ya Nzambe, oyo asali ete obota te?”* 3 Na yango, Rashele alobaki ete: “Bila+ moombo na ngai ya mwasi ye oyo. Sangisá na ye nzoto, mpo abotela ngai* bana mpe na nzela na ye, ngai mpe nazwa bana.” 4 Mpe apesaki ye Bila mosaleli na ye mpo azala mwasi na ye, mpe Yakobo asangisaki na ye nzoto.+ 5 Bila akómaki na zemi mpe na nsima abotelaki Yakobo mwana mobali. 6 Bongo Rashele alobaki ete: “Nzambe asambisi likambo na ngai, ayoki mpe mongongo na ngai, na ndenge apesi ngai mwana mobali.” Yango wana apesaki ye nkombo Dani.*+ 7 Bila, mosaleli ya Rashele azwaki lisusu zemi mpe na nsima abotelaki Yakobo mwana mobali ya mibale. 8 Na nsima, Rashele alobaki ete: “Nabundi líbanda moko ya makasi ná ndeko na ngai. Mpe nalongi!” Na yango, apesaki ye nkombo Nafatali.*+

9 Ntango Lea amonaki ete atiki kobota, azwaki Zilipa mosaleli na ye mpe apesaki ye na Yakobo mpo azala mwasi na ye.+ 10 Na nsima, Zilipa mosaleli ya Lea, abotelaki Yakobo mwana mobali. 11 Bongo Lea alobaki ete: “Oyo nde libaku malamu!” Mpe apesaki ye nkombo Gade.*+ 12 Nsima na yango, Zilipa mosaleli ya Lea, abotelaki Yakobo mwana mobali ya mibale. 13 Bongo Lea alobaki ete: “Oyo nde esengo nazali na yango! Mpo bana basi bakotánga ngai moto ya esengo.”+ Mpe apesaki ye nkombo Ashere.*+

14 Mokolo moko Rubene+ azalaki kotambola na mikolo ya kobuka mbuma ya blé, mpe amonaki mbuma ya mandragɔre na esobe. Mpe amemelaki yango Lea mama na ye. Na nsima, Rashele alobaki na Lea ete: “Nabondeli yo, pesá ngai mwa bambuma ya mandragɔre ya mwana na yo.” 15 Na yango, alobaki na ye ete: “Ezali likambo ya moke ndenge ozwá mobali na ngai?+ Olingi lisusu ozwa mbuma ya mandragɔre ya mwana na ngai?” Bongo Rashele alobaki ete: “Malamu. Akolala na yo butu ya lelo mpo na kofuta mbuma ya mandragɔre ya mwana na yo.”

16 Ntango Yakobo azalaki kouta na esobe na mpokwa, Lea akendaki kokutana na ye mpe alobaki ete: “Okosangisa nzoto nde na ngai, mpo nafuti Rashele mbuma ya mandragɔre ya mwana na ngai mpo na kozwa yo.” Na yango, alalaki na ye butu wana. 17 Mpe Nzambe ayokelaki Lea, azwaki zemi mpe na nsima abotelaki Yakobo mwana mobali ya mitano. 18 Bongo Lea alobaki ete: “Nzambe apesi ngai lifuti ya moto oyo asali mosala, mpo napesaki mosaleli na ngai epai ya mobali na ngai.” Na yango, apesaki ye nkombo Isakare.*+ 19 Mpe Lea azwaki lisusu zemi mpe na nsima abotelaki Yakobo+ mwana mobali ya motoba. 20 Na nsima, Lea alobaki ete: “Nzambe apesi ngai, ɛɛ, apesi ngai likabo moko ya malamu. Sikoyo, mobali na ngai akondima ngai mpenza,+ mpo naboteli ye bana mibali motoba.”+ Mpe apesaki ye nkombo Zebulone.*+ 21 Mpe na nsima, abotaki mwana mwasi mpe apesaki ye nkombo Dina.+

22 Nsukansuka, Nzambe akanisaki Rashele, mpe Nzambe ayokaki mpe ayanolaki ye na ndenge asalaki ete azwa zemi.*+ 23 Azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Bongo alobaki ete: “Nzambe alongoli nsɔni na ngai!”+ 24 Mpe apesaki ye nkombo Yozefe,*+ alobaki ete: “Yehova abakiseli ngai mwana mobali mosusu.”

25 Ntango Rashele abotaki Yozefe, na mbala moko Yakobo alobaki na Labana ete: “Tiká ngai nakende epai na ngai, na mboka na ngai.+ 26 Pesá ngai basi na ngai, oyo mpo na bango nasalelaki yo mosala ná bana na ngai, mpe nakende, mpo oyebi malamu ndenge oyo nasalelaki yo.”+ 27 Bongo Labana alobaki na ye ete: “Nabondeli yo, tikalá elongo na ngai. Mpo bilembo* oyo namoni elakisi ete Yehova azali kopambola ngai mpo na yo.” 28 Mpe abakisaki ete: “Yebisá ngai lifuti na yo mpe nakopesa yo yango.”+ 29 Na yango, Yakobo alobaki na ye ete: “Oyebi mpenza ndenge nasaleli yo mosala mpe ndenge etonga na yo ekoli na mabɔkɔ na ngai;+ 30 liboso naya etonga na yo ezalaki moke mpenza, mpe ebakisamaki tii ekómi ebele, mpe Yehova apamboli yo banda nayaki. Sikoyo ntango nini nakosala eloko mpo na ndako na ngai moko?”+

31 Bongo alobaki ete: “Napesa yo eloko nini?” Mpe Yakobo alobaki ete: “Okopesa ngai eloko moko te! Soki okosalela ngai likambo oyo, wana nde nakozongela koleisa etonga na yo mpe kobatela yango.+ 32 Nakoleka lelo na etonga na yo mobimba. Na bana-mpate ya mibali, tyá pembeni mpate nyonso ya matɔnɔmatɔnɔ mpe ya matɔnɔ ya langilangi, mpe mpate nyonso ya langi ya shokola; mpe na bantaba-basi, tyá pembeni oyo nyonso ya matɔnɔ ya langilangi mpe ya matɔnɔmatɔnɔ. Banda sikoyo yango esengeli kokóma lifuti na ngai.+ 33 Mpe bosembo na ngai ekolobela ngai, ezala mokolo nini oyo okoya kotala lifuti na ngai; na bantaba-basi nyonso, oyo nyonso ekozala ya matɔnɔmatɔnɔ te mpe ya matɔnɔ ya langilangi te, mpe na bana-mpate ya mibali, oyo nyonso ekozala na langi ya shokola te, ekotalelama lokola eloko eyibami soki yango ezali epai na ngai.”

34 Na yango, Labana alobaki ete: “Malamu! Esalema ndenge olobi.”+ 35 Bongo na mokolo yango, atyaki pembeni bantaba-mibali ya nzelanzela mpe ya matɔnɔ ya langilangi mpe bantaba-basi nyonso ya matɔnɔmatɔnɔ mpe ya matɔnɔ ya langilangi, nyonso oyo ezalaki na langi ya mpɛmbɛ mpe nyonso oyo ezalaki na langi ya shokola kati na bana-mpate ya mibali, mpe apesaki yango bana na ye mpo bábatela yango. 36 Nsima na yango, akendaki na esika oyo ekabolaki ye na Yakobo na ntaka ya mobembo ya mikolo misato, mpe Yakobo azalaki koleisa bitonga ya Labana oyo etikalaki.

37 Bongo Yakobo akataki bitape ya mobesu ya nzete ya sitirakisi, nzete ya amande mpe nzete ya platane, mpe apalolaki bitape ya banzete yango mpo ezala na matɔnɔ ya mpɛmbɛ, mpe atikaki polele bisika ya mpɛmbɛ na bitape yango. 38 Na nsima, atyaki mangenda oyo apalolaki liboso ya etonga, na esika oyo bamɛlisaka banyama mai, epai bitonga ezalaki koya komɛla mai, mpo ete eyoka mposa ya kosangisa nzoto liboso ya mangenda yango, na ntango oyo yango ezalaki koya komɛla mai.

39 Na yango, banyama ya bitonga ezalaki koyoka mposa ya kosangisa nzoto liboso ya mangenda yango, mpe banyama ya bitonga ezalaki kobota bana ya nzelanzela, ya matɔnɔmatɔnɔ mpe ya matɔnɔ ya langilangi. 40 Mpe Yakobo akabolaki bana-mpate ya mibali, mpe na nsima abalolaki banyama ya bitonga etala oyo ya nzelanzela, mpe nyonso oyo ya langi ya shokola oyo ezalaki na bitonga ya Labana. Na nsima, atyaki bitonga na ye pembeni mpe asangisaki yango te na bitonga ya Labana. 41 Mpe ntango nyonso oyo banyama ya makasi ya bitonga ezalaki koyoka mposa ya kosangisa nzoto, Yakobo azalaki kotya mangenda na bisika ya komɛla mai liboso ya bitonga, mpo yango ekóma na ntango ya kosangisa nzoto pene na mangenda. 42 Kasi ntango banyama ezalaki ya makasi te, azalaki kotya mangenda yango kuna te. Na bongo, oyo ya makasi te ezalaki ntango nyonso ya Labana, oyo ya makasi ekómaki ya Yakobo.+

43 Mpe Yakobo azalaki se kokóma mozwi, mpe akómaki na bitonga minene ná basaleli ya basi ná basaleli ya mibali, ná bakamela mpe bampunda.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto