Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 50
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Yozefe akundi Yakobo na Kanana (1-14)

      • Yozefe amonisi ete alimbisi mpenza bandeko na ye (15-21)

      • Mikolo ya nsuka ya Yozefe mpe liwa na ye (22-26)

        • Yozefe apesi etinda mpo na mikuwa na ye (25)

Ebandeli 50:1

Mitindami

  • +Eb 46:4

Ebandeli 50:2

Mitindami

  • +Eb 50:26

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2002, nk. 29-30

Ebandeli 50:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2002, nk. 29-30

Ebandeli 50:5

Mitindami

  • +Eb 47:29-31
  • +Eb 48:21
  • +Eb 46:4; 47:29
  • +Eb 23:17, 18; 49:29, 30

Ebandeli 50:6

Mitindami

  • +Eb 47:31

Ebandeli 50:7

Mitindami

  • +Nz 105:21, 22

Ebandeli 50:8

Mitindami

  • +Eb 46:27

Ebandeli 50:9

Mitindami

  • +Eb 41:43; 46:29

Ebandeli 50:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lilaka.”

  • *

    Elimboli, “matánga ya Baezipito.”

Ebandeli 50:12

Mitindami

  • +Eb 47:29

Ebandeli 50:13

Mitindami

  • +Eb 23:17, 18; 25:9, 10; 35:27; 49:29, 30

Ebandeli 50:15

Mitindami

  • +Eb 37:18, 28; 42:21; Nz 105:17

Ebandeli 50:18

Mitindami

  • +Eb 37:7, 9

Ebandeli 50:20

Mitindami

  • +Eb 37:18
  • +Eb 45:5; Nz 105:17

Ebandeli 50:21

Mitindami

  • +Eb 47:12

Ebandeli 50:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Babotamaki na mabɔlɔngɔ ya Yozefe.” Elingi koloba, azwaki bango lokola bana na ye moko mpe amoniselaki bango mpenza boboto.

Mitindami

  • +1Nt 7:20
  • +Yos 17:1; 1Nt 7:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/1995, lok. 21

Ebandeli 50:24

Mitindami

  • +Kob 4:31
  • +Eb 12:7; 17:8; 26:3; 28:13

Ebandeli 50:25

Mitindami

  • +Kob 13:19; Yos 24:32; Ebr 11:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/2007, lok. 28

Ebandeli 50:26

Mitindami

  • +Eb 50:2

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 50:1Eb 46:4
Eba. 50:2Eb 50:26
Eba. 50:5Eb 47:29-31
Eba. 50:5Eb 48:21
Eba. 50:5Eb 46:4; 47:29
Eba. 50:5Eb 23:17, 18; 49:29, 30
Eba. 50:6Eb 47:31
Eba. 50:7Nz 105:21, 22
Eba. 50:8Eb 46:27
Eba. 50:9Eb 41:43; 46:29
Eba. 50:12Eb 47:29
Eba. 50:13Eb 23:17, 18; 25:9, 10; 35:27; 49:29, 30
Eba. 50:15Eb 37:18, 28; 42:21; Nz 105:17
Eba. 50:18Eb 37:7, 9
Eba. 50:20Eb 37:18
Eba. 50:20Eb 45:5; Nz 105:17
Eba. 50:21Eb 47:12
Eba. 50:231Nt 7:20
Eba. 50:23Yos 17:1; 1Nt 7:14
Eba. 50:24Kob 4:31
Eba. 50:24Eb 12:7; 17:8; 26:3; 28:13
Eba. 50:25Kob 13:19; Yos 24:32; Ebr 11:22
Eba. 50:26Eb 50:2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 50:1-26

Ebandeli

50 Bongo Yozefe amibwakaki na nzoto ya tata na ye,+ alelaki ye mpe apwɛpwaki ye. 2 Na nsima, Yozefe apesaki etinda na minganga oyo bazalaki basaleli na ye ete bátya tata na ye nkisi mpo apɔla te.+ Bongo minganga batyaki Yisraele nkisi mpo apɔla te, 3 mpe bazwaki mikolo 40 mobimba mpo na ye, mpo bazwaka mikolo mingi boye mpo na kotya moto nkisi mpo apɔla te, mpe Baezipito bakobaki kolela ye mikolo 70.

4 Ntango mikolo ya kolela ye elekaki, Yozefe alobaki na bato ya ndako ya Farao ete: “Soki bolingi kosalela ngai boboto, bóyebisa Farao ete: 5 ‘Tata na ngai alapisaki ngai ndai+ ete: “Talá! Nazali kokufa.+ Osengeli kokunda ngai na lilita na ngai,+ oyo natimolaki na mokili ya Kanana.”+ Nabondeli yo, tiká namata mpe nakunda tata na ngai, nsima na yango nakozonga.’” 6 Farao ayanolaki ete: “Kende mpe kundá tata na yo kaka ndenge alapisaki yo ndai.”+

7 Bongo Yozefe amataki mpo na kokunda tata na ye, mpe basaleli nyonso ya Farao bakendaki elongo na ye, bankulutu+ ya ndako ya Farao mpe bankulutu nyonso ya mokili ya Ezipito 8 ná bato nyonso ya ndako ya Yozefe ná bandeko na ye mpe bato ya ndako ya tata na ye.+ Kaka bana na bango ya mike mpe bitonga na bango ya bampate mpe bitonga na bango ya bangɔmbɛ nde batikalaki na mokili ya Goshene. 9 Makalo+ ná basoda oyo batambolaka na mpunda bamataki mpe elongo na ye, mpe kaa yango ezalaki na bato ebele. 10 Bongo bakómaki na esika ya kotutatuta mbuma na Atade, oyo ezali na etúká ya Yordani, mpe kuna balelaki kolela moko monene mpe makasi, mpe Yozefe akobaki kolela tata na ye mikolo nsambo. 11 Mpe Bakanana, oyo bafandaki na mokili yango, bamonaki bango bazali kolela na esika ya kotutatuta mbuma na Atade, mpe bagangaki ete: “Oyo ezali matánga* moko monene mpo na Baezipito!” Yango wana bapesaki esika yango nkombo Abele-miziraime,* oyo ezali na etúká ya Yordani.

12 Mpe bana na ye basalelaki ye kaka ndenge apesaki bango malako.+ 13 Bana na ye bamemaki ye na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na mobenga ya elanga ya Makapela, oyo etalani na Mamare, elanga oyo Abrahama asombaki epai ya Efrone Mohiti, mpo ezala esika na ye ya kokunda bibembe.+ 14 Nsima ya kokunda tata na ye, Yozefe azongaki na Ezipito ná bandeko na ye mpe baoyo nyonso bakendaki elongo na ye mpo na kokunda tata na ye.

15 Ntango bandeko ya Yozefe bamonaki ete tata na bango akufi, balobaki ete: “Mbala mosusu Yozefe azali kobombela biso nkanda na motema mpe akozongisela biso mabe nyonso oyo tosalelaki ye.”+ 16 Bongo batindelaki Yozefe nsango, balobi: “Tata na yo apesaki mitindo liboso akufa ete: 17 ‘Talá oyo bokoloba na Yozefe: “Nabondeli yo, mpe nasɛngi yo, limbisá libunga ya bandeko na yo mpe lisumu na bango na ndenge basalelaki yo mabe.”’ Sikoyo, nabondeli yo, limbisá libunga ya basaleli ya Nzambe ya tata na yo.” Mpe Yozefe alelaki ntango balobaki na ye bongo. 18 Na nsima, bandeko na ye mpe bayaki mpe bakweaki liboso na ye mpe balobaki ete: “Biso oyo, tokómi baombo na yo!”+ 19 Kasi Yozefe alobaki na bango ete: “Bóbanga te. Nazali nde na esika ya Nzambe? 20 Atako bokanisaki kosala ngai mabe,+ Nzambe akanisaki kobongola mabe yango ekóma malamu mpo na kobatela bato mingi na bomoi, ndenge azali kosala lelo.+ 21 Sikoyo bóbanga te. Nakokoba kopesa bino mpe bana na bino ya mike bilei.”+ Na yango, abɔndisaki bango mpe akitisaki bango motema na maloba na ye.

22 Mpe Yozefe akobaki kofanda na Ezipito, ye ná bato ya ndako ya tata na ye, mpe bomoi mobimba ya Yozefe ezalaki mbula 110. 23 Yozefe amonaki bana ya Efraime tii na libota ya misato,+ amonaki mpe bana ya Makire,+ mwana ya Manase. Azwaki bango lokola bana na ye moko.* 24 Nsukansuka Yozefe alobaki na bandeko na ye ete: “Nazali kokufa, kasi na ntembe te Nzambe akotyela bino likebi,+ akolongola bino na mokili oyo mpe bokokende na mokili oyo alapaki ndai epai ya Abrahama, Yisaka mpe Yakobo.”+ 25 Bongo Yozefe alapisaki bana ya Yisraele ndai ete: “Na ntembe te Nzambe akotyela bino likebi. Bosengeli komema mikuwa na ngai elongwa na esika oyo.”+ 26 Mpe Yozefe akufaki ntango azalaki na mbula 110, mpe batyaki ye nkisi mpo apɔla te,+ mpe batyaki ye na kati ya sanduku na Ezipito.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto