Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Babengani Mosambisi Yefeta, na nsima bakómisi ye mokambi (1-11)

      • Yefeta atindeli mokonzi ya Baamone maloba (12-28)

      • Elako ya Yefeta; mwana na ye ya mwasi (29-40)

        • Mwana ya Yefeta atikali monzemba bomoi mobimba (38-40)

Basambisi 11:1

Mitindami

  • +Bas 12:7; 1Sa 12:11; Ebr 11:32

Basambisi 11:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2016, nk. 4-5

Basambisi 11:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2007, lok. 8

Basambisi 11:4

Mitindami

  • +Bas 10:17

Basambisi 11:7

Mitindami

  • +Bas 11:2

Basambisi 11:8

Mitindami

  • +Bas 10:18

Basambisi 11:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2007, lok. 9

Basambisi 11:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “azala moto oyo azali koyoka.”

Basambisi 11:11

Mitindami

  • +Bas 10:17; 11:34

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2016, nk. 4-5

Basambisi 11:12

Mitindami

  • +Eb 19:36, 38

Basambisi 11:13

Mitindami

  • +Mit 21:23, 24
  • +Mit 21:26
  • +Mib 3:16, 17

Basambisi 11:15

Mitindami

  • +Eb 19:36, 37; Mib 2:9
  • +Mib 2:19, 37

Basambisi 11:16

Mitindami

  • +Mit 14:25
  • +Mit 20:1

Basambisi 11:17

Mitindami

  • +Eb 36:1; Mit 20:14; Mib 2:4
  • +Eb 19:36, 37
  • +Mit 20:22

Basambisi 11:18

Mitindami

  • +Mit 21:4
  • +Mit 21:11
  • +Mit 21:13

Basambisi 11:19

Mitindami

  • +Mit 21:21-26; Mib 2:26, 27

Basambisi 11:20

Mitindami

  • +Mib 2:32, 33

Basambisi 11:21

Mitindami

  • +Yos 13:15, 21

Basambisi 11:22

Mitindami

  • +Mib 2:36

Basambisi 11:23

Mitindami

  • +Ne 9:22

Basambisi 11:24

Mitindami

  • +1Ba 11:7
  • +Kob 23:28; 34:11; Mit 33:53; Mib 9:5; 18:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2007, lok. 9

Basambisi 11:25

Mitindami

  • +Mit 22:2, 3; Yos 24:9

Basambisi 11:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ezali zingazinga.”

Mitindami

  • +Mit 21:25
  • +Mit 21:26

Basambisi 11:27

Mitindami

  • +Yis 33:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2007, lok. 9

Basambisi 11:29

Mitindami

  • +Bas 3:9, 10; Zek 4:6
  • +Bas 10:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2007, lok. 9

Basambisi 11:30

Mitindami

  • +Mib 23:21

Basambisi 11:31

Mitindami

  • +1Sa 1:11
  • +1Sa 1:24

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2017, lok. 4

    Masolo ya Biblia, nk. 88-89

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2016, nk. 5-7

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2008, lok. 8

    15/8/2007, lok. 19

    15/5/2007, nk. 9-10

    15/1/2005, lok. 26

    “Makomami nyonso,” lok. 49

Basambisi 11:34

Mitindami

  • +Bas 10:17; 11:11

Basambisi 11:35

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Osali ete nagumbama mpenza.”

  • *

    Lil., “Ngai nafungolaki monɔkɔ na ngai.”

Mitindami

  • +Mit 30:2; Nz 15:4; Mos 5:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2017, lok. 4

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2016, nk. 6-7

Basambisi 11:36

Mitindami

  • +Bas 11:30, 31

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2016, nk. 7-8

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2007, lok. 10

Basambisi 11:37

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nalela elongo na baninga na ngai mpo nakobala soki moke te.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2017, lok. 4

Basambisi 11:39

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lilako.”

Mitindami

  • +1Sa 1:22, 24

Basambisi 11:40

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2007, lok. 10

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 11:1Bas 12:7; 1Sa 12:11; Ebr 11:32
Bas. 11:4Bas 10:17
Bas. 11:7Bas 11:2
Bas. 11:8Bas 10:18
Bas. 11:11Bas 10:17; 11:34
Bas. 11:12Eb 19:36, 38
Bas. 11:13Mit 21:23, 24
Bas. 11:13Mit 21:26
Bas. 11:13Mib 3:16, 17
Bas. 11:15Eb 19:36, 37; Mib 2:9
Bas. 11:15Mib 2:19, 37
Bas. 11:16Mit 14:25
Bas. 11:16Mit 20:1
Bas. 11:17Eb 36:1; Mit 20:14; Mib 2:4
Bas. 11:17Eb 19:36, 37
Bas. 11:17Mit 20:22
Bas. 11:18Mit 21:4
Bas. 11:18Mit 21:11
Bas. 11:18Mit 21:13
Bas. 11:19Mit 21:21-26; Mib 2:26, 27
Bas. 11:20Mib 2:32, 33
Bas. 11:21Yos 13:15, 21
Bas. 11:22Mib 2:36
Bas. 11:23Ne 9:22
Bas. 11:241Ba 11:7
Bas. 11:24Kob 23:28; 34:11; Mit 33:53; Mib 9:5; 18:12
Bas. 11:25Mit 22:2, 3; Yos 24:9
Bas. 11:26Mit 21:25
Bas. 11:26Mit 21:26
Bas. 11:27Yis 33:22
Bas. 11:29Bas 3:9, 10; Zek 4:6
Bas. 11:29Bas 10:17
Bas. 11:30Mib 23:21
Bas. 11:311Sa 1:11
Bas. 11:311Sa 1:24
Bas. 11:34Bas 10:17; 11:11
Bas. 11:35Mit 30:2; Nz 15:4; Mos 5:4
Bas. 11:36Bas 11:30, 31
Bas. 11:391Sa 1:22, 24
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 11:1-40

Basambisi

11 Nzokande, Yefeta+ moto ya Gileade azalaki elombe ya etumba; azalaki mwana ya mwasi moko ya ndumba, mpe tata na ye ezalaki Gileade. 2 Kasi mwasi ya Gileade abotelaki ye mpe bana mibali. Ntango bana ya mwasi na ye bakolaki, babenganaki Yefeta mpe balobaki na ye: “Okozwa libula na ndako ya tata na biso te, mpo ozali mwana ya mwasi mosusu.” 3 Na yango Yefeta akimaki liboso ya bandeko na ye mpe akómaki kofanda na mokili ya Tobe. Bongo bato oyo bazangá mosala ya kosala bayaki epai ya Yefeta, mpe bakómaki kolanda ye.

4 Nsima ya mwa ntango, Baamone babundisaki Yisraele.+ 5 Mpe ntango Baamone babundisaki Yisraele, bankulutu ya Gileade bakendaki nokinoki na mokili ya Tobe kosɛnga Yefeta azonga. 6 Balobaki na Yefeta: “Yaká mpe kómá komanda na biso, mpo tóbundisa Baamone.” 7 Kasi Yefeta alobaki na bankulutu ya Gileade: “Bino te bato boyinaki ngai mpe bobenganaki ngai na ndako ya tata na ngai?+ Sikoyo mpo na nini boyei epai na ngai ntango bokómi na mpasi?” 8 Na yango, bankulutu ya Gileade balobaki na Yefeta ete: “Yango nde ntina oyo tozongi sikoyo epai na yo. Soki okei elongo na biso mpo na kobundisa Baamone, okokóma mokambi na biso mpe ya bato nyonso oyo bafandi na Gileade.”+ 9 Bongo Yefeta alobaki na bankulutu ya Gileade boye: “Soki boyei kozongisa ngai mpo na kobundisa Baamone, mpe soki Yehova asalisi ngai nalonga bango, boye nakokóma mpenza mokambi na bino!” 10 Bankulutu ya Gileade balobaki na Yefeta boye: “Tiká Yehova azala motatoli kati na biso,* mpe asambisa biso soki tosali te ndenge olobi.” 11 Na yango Yefeta akendaki elongo na bankulutu ya Gileade, mpe bato bakómisaki ye mokambi mpe komanda na bango. Mpe Yefeta azongelaki maloba na ye nyonso liboso ya Yehova na Mizipa.+

12 Na nsima, Yefeta atindaki bamemi-nsango epai ya mokonzi ya Baamone,+ alobi: “Ngai ná yo likambo nini, mpo namoni oyei kobundisa mokili na ngai?” 13 Na yango mokonzi ya Baamone alobaki na bamemi-nsango ya Yefeta ete: “Ezali mpo Bayisraele bazwaki mokili na ngai ntango bautaki na Ezipito,+ banda na ebale Arnone+ tii na Yaboke mpe tii na Yordani.+ Sikoyo, zongiselá ngai yango na malɛmbɛ.” 14 Kasi Yefeta atindaki lisusu bamemi-nsango yango epai ya mokonzi ya Baamone 15 mpo báloba na ye:

“Talá oyo Yefeta alobi: ‘Bayisraele bazwaki mokili ya Bamoabe+ mpe ya Baamone te.+ 16 Mpo, ntango babimaki na Ezipito, Bayisraele batambolaki na esobe tii na Mbu Motane+ mpe bakómaki na Kadeshe.+ 17 Na nsima, Bayisraele batindaki bamemi-nsango epai ya mokonzi ya Edome+ ete: “Tobondeli yo, tiká biso tóleka na mokili na yo,” kasi mokonzi ya Edome aboyaki koyokela bango. Batindaki mpe maloba epai ya mokonzi ya Moabe,+ kasi ye mpe aboyaki. Na yango Bayisraele bakobaki kofanda na Kadeshe.+ 18 Ntango batambolaki lisusu na esobe, balekaki pembeni ya mokili ya Edome+ mpe ya mokili ya Moabe. Balekaki na ɛsti ya mokili ya Moabe+ mpe batyaki kaa na etúká ya Arnone; bakɔtaki na ndelo ya Moabe+ te, mpo Arnone ezalaki ndelo ya Moabe.

19 “‘Nsima na yango, Bayisraele batindaki bamemi-nsango epai ya Sihone mokonzi ya Baamore oyo azalaki koyangela na Heshibone, mpe Bayisraele balobaki na ye: “Tobondeli yo, tiká biso tóleka na mokili na yo mpo tókende na esika na biso moko.”+ 20 Kasi Sihone andimelaki Bayisraele te mpe aboyaki bákatisa na teritware na ye. Bongo Sihone ayanganisaki bato na ye nyonso, batyaki kaa na Yahaze mpe babundisaki Bayisraele.+ 21 Na yango Yehova Nzambe ya Yisraele apesaki Sihone ná bato na ye nyonso na lobɔkɔ ya Yisraele, mpe Bayisraele balongaki bango. Bongo nde bazwaki mokili mobimba ya Baamore, baoyo bazalaki kofanda na mokili yango.+ 22 Na ndenge yango, bazwaki teritware mobimba ya Baamore banda na Arnone tii na Yaboke mpe banda na esobe tii na Yordani.+

23 “‘Ezali Yehova Nzambe ya Yisraele nde abenganaki Baamore liboso ya bato na ye Yisraele,+ sikoyo olingi nde kobengana Bayisraele na mokili na bango? 24 Yo ozwaka eloko nyonso oyo nzambe na yo Kemoshe+ apesi yo, boye te? Biso mpe tokobengana moto nyonso oyo Yehova Nzambe na biso abengani liboso na biso.+ 25 Yo oleki nde Balake+ mwana ya Zipore, mokonzi ya Moabe? Nzokande ye awelaná na Yisraele ata moke te, mpe abundisá bango te. 26 Yisraele afandi mbula 300 na Heshibone mpe basité oyo esimbami na yango,*+ na Aroere mpe basité oyo esimbami na yango mpe na bingumba nyonso oyo ezali pembenipembeni ya ebale Arnone. Bongo mpo na nini bomekaki ata mokolo moko te kozwa bingumba yango banda ntango nyonso wana?+ 27 Ngai nasaleli yo lisumu te, kasi osali mabe ndenge ozali kobundisa ngai. Tiká Yehova Mosambisi,+ akata lelo likambo kati na Bayisraele mpe Baamone.’”

28 Kasi mokonzi ya Baamone aboyaki koyoka maloba oyo Yefeta atindelaki ye.

29 Elimo ya Yehova esalaki epai ya Yefeta,+ bongo alekaki na etúká ya Gileade mpe na teritware ya Manase mpo na kokende na Mizipe ya Gileade,+ mpe longwa na Mizipe ya Gileade akobaki mpo na kokende kobundisa Baamone.

30 Na nsima, Yefeta asalaki elako+ epai ya Yehova mpe alobaki: “Soki opesi Baamone na lobɔkɔ na ngai, 31 boye, moto nyonso oyo akobima na porte ya ndako na ngai mpo na kokutana na ngai ntango nakouta epai ya Baamone mpe nakozonga na kimya, akokóma moto ya Yehova,+ mpe ngai nakokaba ye lokola likabo ya kotumba.”+

32 Bongo Yefeta akendaki kobundisa Baamone, mpe Yehova apesaki bango na lobɔkɔ na ye. 33 Abomaki bango ebele mpenza, nzelanzela, banda na Aroere tii na Minite, bingumba 20, kino na Abele-keramime. Na ndenge yango, Baamone batyamaki na nse ya Bayisraele.

34 Nsukansuka, Yefeta azongaki na ndako na ye na Mizipa,+ mpe talá! mwana na ye ya mwasi azalaki kobima mpo na kokutana na ye, azali kobɛta mbonda moke mpe kobina! Nzokande azalaki na mwana kaka moko wana. Longola ye, azalaki na mwana mosusu te, ezala ya mobali to ya mwasi. 35 Ntango Yefeta amonaki ye, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki: “Aa, mwana na ngai! Ozokisi motema na ngai,* mpo okómi moto oyo nasengeli kolongola awa. Lokola nasalaki elako* epai ya Yehova, nakoki kozonga nsima te.”+

36 Kasi mwana na ye alobaki: “Tata na ngai, soki osalaki elako epai ya Yehova, salá epai na ngai ndenge olakaki,+ mpo Yehova asalisi yo ozongisa mabe epai ya banguna na yo Baamone.” 37 Alobaki lisusu na tata na ye: “Nasɛngi yo kaka likambo oyo: Tiká ngai nakende na bangomba mpe nalekisa sanza mibale kuna kaka ngai moko, mpe tiká ngai nalela bongɔndɔ na ngai ná baninga na ngai ya basi.”*

38 Na yango Yefeta alobaki na ye: “Kende!” Bongo atikaki ye akende sanza mibale. Akendaki na bangomba elongo na baninga na ye ya basi, mpo na kolela bongɔndɔ na ye. 39 Na nsuka ya sanza mibale, azongaki epai ya tata na ye, bongo tata na ye akokisaki elako oyo asalaki mpo na ye.+ Mwana yango asangisaki nzoto na mobali ata mokolo moko te. Mpe ekómaki momeseno* na Yisraele: 40 Mbula na mbula, bilenge basi ya Yisraele bazalaki kokende kopesa mwana mwasi ya Yefeta moto ya Gileade longonya, bazalaki kosala yango mikolo minei na mbula.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto