Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 10
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Yisraele etombokeli Rehoboame (1-19)

2 Ntango 10:1

Mitindami

  • +Yos 20:7; 24:1; Bas 9:1
  • +1Ba 12:1-4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    6/2018, lok. 13

2 Ntango 10:2

Mitindami

  • +1Ba 11:28
  • +1Ba 11:40

2 Ntango 10:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mpasi.”

Mitindami

  • +1Sa 8:11-18; 1Ba 4:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    6/2018, lok. 13

2 Ntango 10:5

Mitindami

  • +1Ba 12:5-7

2 Ntango 10:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bankulutu.”

2 Ntango 10:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bankulutu.”

Mitindami

  • +1Ba 12:8-11

2 Ntango 10:12

Mitindami

  • +1Ba 12:12-15

2 Ntango 10:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bankulutu.”

2 Ntango 10:15

Mitindami

  • +Mib 2:30; 2Sa 17:14
  • +1Ba 11:29-31

2 Ntango 10:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bahema.”

Mitindami

  • +1Ba 11:32
  • +1Ba 12:16, 17

2 Ntango 10:17

Mitindami

  • +1Ba 11:35, 36

2 Ntango 10:18

Mitindami

  • +2Sa 20:24; 1Ba 4:6
  • +1Ba 12:18, 19

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 10:1Yos 20:7; 24:1; Bas 9:1
2 Nt. 10:11Ba 12:1-4
2 Nt. 10:21Ba 11:28
2 Nt. 10:21Ba 11:40
2 Nt. 10:41Sa 8:11-18; 1Ba 4:7
2 Nt. 10:51Ba 12:5-7
2 Nt. 10:81Ba 12:8-11
2 Nt. 10:121Ba 12:12-15
2 Nt. 10:15Mib 2:30; 2Sa 17:14
2 Nt. 10:151Ba 11:29-31
2 Nt. 10:161Ba 11:32
2 Nt. 10:161Ba 12:16, 17
2 Nt. 10:171Ba 11:35, 36
2 Nt. 10:182Sa 20:24; 1Ba 4:6
2 Nt. 10:181Ba 12:18, 19
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 10:1-19

Mokanda ya mibale ya Ntango

10 Rehoboame akendaki na Shekeme,+ mpo Yisraele mobimba eyaki na Shekeme mpo na kokómisa ye mokonzi.+ 2 Yeroboame+ mwana ya Nebate ayokaki likambo yango (na ntango wana azalaki naino na Ezipito mpo akimaki Mokonzi Salomo),+ na mbala moko Yeroboame alongwaki na Ezipito, mpe azongaki. 3 Bongo batindaki bato bábenga ye, mpe Yeroboame ná Yisraele mobimba bayaki epai ya Rehoboame mpe balobaki: 4 “Tata na yo akómisaki ekanganeli na biso makasi.+ Kasi yo, soki olɛmbisi mosala makasi oyo tata na yo atyelaki biso mpe okómisi pɛpɛlɛ ekanganeli ya kilo* oyo amemisaki biso, tokosalela yo.”

5 Na yango alobaki na bango: “Bózongela ngai nsima ya mikolo misato.” Bongo bato yango bakendaki.+ 6 Na nsima, Mokonzi Rehoboame asololaki na mikóló* oyo bazalaki kosalela tata na ye Salomo ntango azalaki naino na bomoi. Atunaki bango: “Bópesa ngai toli. Napesa bato oyo eyano nini?” 7 Bayanolaki ye: “Soki osaleli bato oyo bolamu, osepelisi bango mpe soki opesi bango eyano ya malamu, bakozala ntango nyonso basaleli na yo.”

8 Kasi aboyaki kolanda toli oyo mikóló* bapesaki ye, mpe akendaki kosolola na bilenge oyo bakolaki elongo na ye, mpe oyo bazalaki sikoyo basaleli na ye.+ 9 Atunaki bango: “Bato oyo balobi na ngai ete: ‘Lɛmbisá ekanganeli oyo tata na yo atyelaki biso,’ toli nini bokopesa ngai mpo napesa bango eyano?” 10 Bilenge oyo bakolaki na ye balobaki na ye: “Talá oyo osengeli koloba na bato oyo balobaki na yo: ‘Tata na yo akómisaki ekanganeli na biso kilo mingi, kasi yo osengeli kokómisa yango pɛpɛlɛ mpo na biso’; talá oyo osengeli koyebisa bango: ‘Mosapi na ngai ya moke ekozala monene koleka loketo ya tata na ngai. 11 Tata na ngai amemisaki bino ekanganeli ya kilo, kasi ngai nakobakisela bino kilo mosusu. Tata na ngai apesaki bino etumbu na fimbo, kasi ngai nakopesa bino etumbu na fimbo oyo ezali na banzubɛ.’”

12 Yeroboame ná bato nyonso bayaki epai ya Mokonzi Rehoboame na mokolo ya misato, kaka ndenge mokonzi alobaki ete: “Bózongela ngai na mokolo ya misato.”+ 13 Kasi mokonzi apesaki bango eyano na maloba makasi. Na ndenge yango Mokonzi Rehoboame aboyaki kolanda toli ya mikóló.* 14 Alandaki toli oyo bilenge bapesaki ye mpe alobaki na bango: “Nakokómisa ekanganeli na bino kilo koleka, mpe nakobakisa yango lisusu. Tata na ngai apesaki bino etumbu na fimbo, kasi ngai nakosala yango na fimbo oyo ezali na banzubɛ.” 15 Na yango mokonzi ayokelaki bato te, mpo Nzambe ya solo nde asalaki ete makambo esalema ndenge wana,+ mpo na kokokisa liloba oyo Yehova alobaki na Yeroboame mwana ya Nebate na nzela ya Ahiya+ moto ya engumba Shilo.

16 Kasi bato ya Yisraele mobimba, lokola mokonzi aboyaki koyokela bango, balobaki na ye: “Eloko nini esangisi biso na Davidi? Tokozwa ata libula moko te epai ya mwana ya Yese. Moto na moto akende epai ya banzambe na ye, Ee Yisraele! Sikoyo, tambwisá ndako na yo moko, Ee Davidi.”+ Na yango, Bayisraele nyonso bazongaki na bandako* na bango.+

17 Kasi Rehoboame akobaki koyangela Bayisraele oyo bazalaki kofanda na bingumba ya Yuda.+

18 Na nsima, Mokonzi Rehoboame atindaki Hadorame,+ mokambi ya misala ya makasi, akende na Yisraele mobimba. Kasi babambaki ye mabanga tii akufaki. Bongo Mokonzi Rehoboame amataki nokinoki na likalo na ye mpe akimaki na Yerusaleme.+ 19 Banda wana, Bayisraele batombokelá ndako ya Davidi tii na mokolo ya lelo.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto