Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 20
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Bakonzi

      • Bato ya Siri babundisi Ahaba (1-12)

      • Ahaba alongi bato ya Siri (13-34)

      • Esakweli mpo na Ahaba (35-43)

1 Bakonzi 20:1

Mitindami

  • +2Ba 8:7
  • +2Sa 8:6; 2Ba 5:2; Yis 9:12
  • +Mib 28:52
  • +2Ba 6:24; 17:5

1 Bakonzi 20:2

Mitindami

  • +1Ba 16:29

1 Bakonzi 20:4

Mitindami

  • +Mib 28:15, 48

1 Bakonzi 20:11

Mitindami

  • +Mas 16:18; 27:1; Mos 7:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2005, lok. 31

1 Bakonzi 20:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bandako ya matiti.”

1 Bakonzi 20:13

Mitindami

  • +1Ba 16:29
  • +Kob 14:18; Nz 37:20

1 Bakonzi 20:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bitúká oyo eyangelami.”

1 Bakonzi 20:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mwa ndako ya matiti.”

1 Bakonzi 20:20

Mitindami

  • +Le 26:8; Mib 28:7

1 Bakonzi 20:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, eleko ya prɛnta oyo ezali koya.

Mitindami

  • +1Ba 20:13
  • +Mas 20:18
  • +2Sa 11:1

1 Bakonzi 20:24

Mitindami

  • +1Ba 20:1, 16

1 Bakonzi 20:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “tángá.”

1 Bakonzi 20:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, eleko ya prɛnta.

Mitindami

  • +2Ba 13:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Lamuká!,

    7/1994, lok. 29

1 Bakonzi 20:27

Mitindami

  • +Bas 6:5, 6; 1Sa 13:5; 2Nt 32:7

1 Bakonzi 20:28

Mitindami

  • +Mib 32:26, 27; Ezk 20:9; 36:22
  • +Kob 6:7; 7:5; Nz 83:18; Ezk 6:14; 39:7

1 Bakonzi 20:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “balongaki.”

1 Bakonzi 20:30

Mitindami

  • +1Ba 20:26

1 Bakonzi 20:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bamonisaka bolingo ya sembo.”

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “akobatela molimo na yo.”

Mitindami

  • +Yon 3:8, 9

1 Bakonzi 20:32

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “tiká molimo na ngai na bomoi.”

1 Bakonzi 20:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kozwa babalabala.”

  • *

    To, “kondimana.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2005, lok. 31

1 Bakonzi 20:35

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Maloba “bana ya basakoli” ekoki kozala kelasi ya koteya basakoli, to lisangá ya basakoli.

Mitindami

  • +2Ba 2:3

1 Bakonzi 20:39

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na yo ekozwa esika ya molimo na ye.”

  • *

    Talanta moko = 34,2 kg. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +2Ba 10:24; Mis 12:19; 16:27

1 Bakonzi 20:41

Mitindami

  • +1Ba 20:35

1 Bakonzi 20:42

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na yo ekozwa esika ya molimo na ye.”

Mitindami

  • +Le 27:29; 1Sa 15:9; Yir 48:10
  • +1Ba 22:31, 35; 2Nt 18:33
  • +2Ba 6:24; 8:12; 2Nt 18:16

1 Bakonzi 20:43

Mitindami

  • +1Ba 16:29

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Bak. 20:12Ba 8:7
1 Bak. 20:12Sa 8:6; 2Ba 5:2; Yis 9:12
1 Bak. 20:1Mib 28:52
1 Bak. 20:12Ba 6:24; 17:5
1 Bak. 20:21Ba 16:29
1 Bak. 20:4Mib 28:15, 48
1 Bak. 20:11Mas 16:18; 27:1; Mos 7:8
1 Bak. 20:131Ba 16:29
1 Bak. 20:13Kob 14:18; Nz 37:20
1 Bak. 20:20Le 26:8; Mib 28:7
1 Bak. 20:221Ba 20:13
1 Bak. 20:22Mas 20:18
1 Bak. 20:222Sa 11:1
1 Bak. 20:241Ba 20:1, 16
1 Bak. 20:262Ba 13:17
1 Bak. 20:27Bas 6:5, 6; 1Sa 13:5; 2Nt 32:7
1 Bak. 20:28Mib 32:26, 27; Ezk 20:9; 36:22
1 Bak. 20:28Kob 6:7; 7:5; Nz 83:18; Ezk 6:14; 39:7
1 Bak. 20:301Ba 20:26
1 Bak. 20:31Yon 3:8, 9
1 Bak. 20:352Ba 2:3
1 Bak. 20:392Ba 10:24; Mis 12:19; 16:27
1 Bak. 20:411Ba 20:35
1 Bak. 20:42Le 27:29; 1Sa 15:9; Yir 48:10
1 Bak. 20:421Ba 22:31, 35; 2Nt 18:33
1 Bak. 20:422Ba 6:24; 8:12; 2Nt 18:16
1 Bak. 20:431Ba 16:29
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Bakonzi 20:1-43

Mokanda ya liboso ya Bakonzi

20 Mokolo moko, Bene-hadade+ mokonzi ya Siri+ ayanganisaki limpinga mobimba ya basoda na ye, ná bakonzi mosusu 32 elongo na ye, ná bampunda mpe makalo na bango. Amataki mpe azingaki+ Samaria+ mpo na kobundisa yango. 2 Bongo atindaki bamemi-nsango na engumba epai ya Ahaba+ mokonzi ya Yisraele mpe alobaki na ye: “Talá oyo Bene-hadade alobi: 3 ‘Palata na yo ná wolo na yo ezali ya ngai, mpe basi na yo oyo baleki kitoko ná bana na yo oyo baleki kitoko, bazali ya ngai.’” 4 Na yango, mokonzi ya Yisraele ayanolaki: “Nkolo na ngai mokonzi, nandimi nyonso oyo olobi. Ngai nazali mosaleli na yo, mpe nyonso oyo nazali na yango ezali ya yo.”+

5 Na nsima bamemi-nsango yango bazongaki lisusu epai ya Ahaba mpe balobaki na ye: “Talá oyo Bene-hadade alobi, ‘Natindelaki yo nsango oyo: “Okopesa ngai palata na yo, wolo na yo, basi na yo, mpe bana na yo.” 6 Kasi lobi, pene na ntango oyo, nakotinda basaleli na ngai epai na yo. Bakoya koluka malamumalamu na ndako na yo mpe na bandako ya basaleli na yo. Bakozwa biloko na yo nyonso ya motuya mpe bakokende na yango.’”

7 Na yango Ahaba mokonzi ya Yisraele abengaki bankulutu nyonso ya mboka mpe alobaki: “Nabondeli bino, bótala bino moko ndenge mobali oyo akani komemela biso mpasi. Atindaki bato mpo na kosɛnga ngai basi na ngai, bana na ngai, palata na ngai, ná wolo na ngai, mpe nandimaki ete nakopesa ye yango.” 8 Bongo bankulutu mpe bato nyonso balobaki na ye: “Kotosa ye te, mpe kopesa ye ata eloko moko te.” 9 Na yango, Ahaba alobaki na bamemi-nsango ya Bene-hadade ete: “Bóyebisa nkolo na ngai mokonzi ete, ‘Nyonso oyo osɛngaki liboso ete mosaleli na yo asala, nakosala. Kasi likambo oyo osɛngi ngai sikoyo, nakoki kosala yango te.’” Bongo bamemi-nsango bakendaki mpe bayebisaki Bene-hadade makambo yango.

10 Bongo Bene-hadade atindaki bato báyebisa ye: “Tiká banzambe bápesa ngai etumbu ya makasi soki nabebisi Samaria te! Kutu limpinga ya basoda na ngai ezali monene mingi, yango wana soda na ngai mokomoko akokoka te kotondisa na lobɔkɔ na ye putulu ya Samaria, mpo ekozala moke.” 11 Mokonzi ya Yisraele ayanolaki: “Bóyebisa ye ete, ‘Moto oyo azali kolata molato ya etumba amikumisa te lokola moto oyo azali kolongola yango.’”+ 12 Ntango Bene-hadade ayokaki nsango yango, azalaki komɛla ná bakonzi mosusu na kati ya bahema* na bango. Na mbala moko, alobaki na basaleli na ye: “Bómibongisa mpo na etumba!” Bongo, bamibongisaki mpo na kobundisa engumba yango.

13 Kasi mosakoli moko ayaki epai ya Ahaba+ mokonzi ya Yisraele mpe alobaki na ye: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Omoni ebele ya bato oyo? Talá, nakopesa bango lelo na lobɔkɔ na yo, bongo okoyeba ete nazali Yehova.’”+ 14 Ahaba atunaki ye: “Nakolonga na nzela ya nani?” Mosakoli yango ayanolaki: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Na nzela ya basaleli ya bankumu ya bitúká na yo.’”* Bongo Ahaba atunaki ye: “Nani akobanda etumba?” Mosakoli ayanolaki: “Ezali yo!”

15 Bongo Ahaba atángaki basaleli ya bankumu ya bitúká: bazalaki 232. Na nsima, atángaki mpe mibali nyonso ya Yisraele: bazalaki 7 000. 16 Balongwaki na engumba na midi, wana Bene-hadade azalaki kolangwa masanga na kati ya bahema* elongo na bakonzi 32 oyo bazalaki kosalisa ye. 17 Ntango basaleli ya bankumu ya bitúká babimaki na engumba, Bene-hadade atindaki bato bákende kotala nini ezali koleka. Bato yango bayebisaki ye: “Basoda babimi na Samaria.” 18 Bongo Bene-hadade alobaki: “Soki babimi mpo na koluka kimya, bókanga bango kaka, bóboma bango te. Soki mpe babimi mpo na etumba, bókanga bango mpe kaka, bóboma bango te.” 19 Kasi ntango basaleli ya bankumu ya bitúká mpe mampinga ya basoda oyo ezalaki kolanda bango babimaki na engumba, 20 mokomoko na bango abomaki monguna. Bongo bato ya Siri bakimaki,+ mpe Bayisraele balandaki bango. Bene-hadade mokonzi ya Siri akimaki likoló ya mpunda, elongo na basoda na ye mosusu oyo batambolaka na mpunda. 21 Kasi mokonzi ya Yisraele abimaki na engumba mpe azalaki koboma basoda ya Siri oyo batambolaka na bampunda mpe na makalo. Abomaki ebele mpenza ya bato ya Siri.

22 Na nsima, mosakoli+ yango akendaki kokutana na mokonzi ya Yisraele mpe alobaki na ye: “Kende komibongisa lisusu malamu, mpe kanisá malamu oyo okosala.+ Mpo na ebandeli ya mbula oyo ezali koya,* mokonzi ya Siri akoya lisusu kobundisa yo.”+

23 Bongo, bapesi-toli ya mokonzi ya Siri balobaki na ye: “Nzambe na bango azali Nzambe moko ya bangomba. Yango wana balongi biso. Kasi soki tobundisi bango na mabele ya patatalu, tokolonga bango. 24 Lisusu, salá boye: Longolá bakonzi nyonso+ oyo bazalaki na etumba, mpe tyá baguvɛrnɛrɛ na esika na bango. 25 Na nsima, yanganisá* limpinga ya basoda oyo ekokani na limpinga ya basoda oyo bakweaki na etumba. Esengeli kozala na bampunda mpe makalo ndenge moko na limpinga ya liboso. Soki tobundisi bango na mabele ya patatalu, na ntembe te tokolonga bango.” Na yango, Bene-hadade ayokaki toli na bango mpe asalaki kaka bongo.

26 Na ebandeli ya mbula,* Bene-hadade ayanganisaki basoda ya Siri mpe akendaki na Afeke+ mpo na kobundisa Yisraele. 27 Mokonzi ya Yisraele mpe ayanganisaki basoda na ye, apesaki bango bilei oyo esengeli, mpe bakendaki kobunda na basoda ya Siri. Ntango basoda ya Yisraele batyaki kaa liboso na bango, bazalaki lokola mwa bitonga mike mibale ya bantaba, nzokande basoda ya Siri batondaki na mboka.+ 28 Bongo moto ya Nzambe ya solo akendaki epai ya mokonzi ya Yisraele mpe alobaki na ye: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Lokola bato ya Siri balobi: “Yehova azali Nzambe ya bangomba, kasi Nzambe ya mokili patatalu te,” nakopesa mpenza ebele ya bato oyo na lobɔkɔ na yo.+ Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”+

29 Limpinga mokomoko efandaki na kaa na yango na boumeli ya mikolo nsambo. Kaa ya basoda ya Yisraele etalanaki na kaa ya basoda ya Siri. Na mokolo ya nsambo, etumba ebandaki. Kaka na mokolo moko, basoda ya Yisraele babomaki* basoda ya Siri 100 000 oyo batambolaka na makolo. 30 Mpe baoyo batikalaki bakimaki na engumba Afeke.+ Kasi efelo ekwelaki bato 27 000 kati na mibali oyo batikalaki. Bene-hadade mpe akimaki mpe akɔtaki na engumba. Akendaki komibomba na shambrɛ ya kati mpenza.

31 Bongo bapesi-toli na ye balobaki na ye: “Talá, toyoki ete bakonzi ya Yisraele bayokelaka bato mawa.* Tobondeli yo, tiká tólata ngɔtɔ* na loketo na biso mpe bansinga na mitó na biso, mpe tókende epai ya mokonzi ya Yisraele. Mbala mosusu akotika yo na bomoi.”*+ 32 Na yango, balataki ngɔtɔ* na loketo na bango ná bansinga na mitó na bango, mpe bakendaki epai ya mokonzi ya Yisraele mpe balobaki na ye: “Mosaleli na yo Bene-hadade alobi: ‘Nabondeli yo, tiká ngai na bomoi.’”* Ahaba alobaki: “Bene-hadade azali naino na bomoi? Azali ndeko na ngai.” 33 Mibali wana bazwaki yango lokola elembo moko ya malamu mpe bamonaki mbala moko ete mokonzi ayebi makambo oyo azali koloba, bongo balobaki na ye: “Bene-hadade azali ndeko na yo.” Na yango, Ahaba alobaki: “Bókende kozwa ye mpe bóya na ye.” Bongo Bene-hadade abimaki mpe ayaki epai ya Ahaba, mpe Ahaba amatisaki ye na likalo na ye.

34 Bongo Bene-hadade alobaki na ye: “Nakozongisa bingumba oyo tata na ngai abɔtɔlaki tata na yo, mpe okoki kosala bazando* na Damasi, kaka ndenge tata na ngai asalaki yango na Samaria.”

Ahaba ayanolaki: “Lokola tosali boyokani,* nakotika yo okende.”

Na ndenge wana nde Ahaba asalaki kondimana na Bene-hadade mpe atikaki ye akende.

35 Na etinda ya Yehova, moko ya bana ya basakoli*+ alobaki na moninga na ye: “Nabondeli yo, bɛtá ngai.” Kasi moninga na ye aboyaki kobɛta ye. 36 Bongo alobaki na moninga yango ete: “Lokola oboyi koyoka mongongo ya Yehova, ntango kaka okolongwa epai na ngai, nkɔsi moko ekoboma yo.” Na yango, ntango kaka alongwaki epai na ye, nkɔsi moko elandaki ye mpe ebomaki ye.

37 Na nsima, amonaki moto mosusu mpe alobaki na ye: “Nabondeli yo, bɛtá ngai.” Bongo moto yango abɛtaki ye mpe azokisaki ye.

38 Na nsima, mosakoli yango akendaki kozela mokonzi pembeni ya nzela. Akangaki eteni ya elamba na miso na ye mpo báyeba ye te. 39 Ntango mokonzi azalaki koleka, mosakoli yango abelelaki mokonzi mpe alobaki: “Mosaleli na yo azalaki kokende na esika oyo etumba ezalaki konginda makasi, bongo soda moko alongwaki na esika ya etumba mpe amemelaki ngai mokangami moko, alobi: ‘Kɛngɛlá moto oyo. Soki kaka akimi, okokufa na esika na ye,*+ to okofuta talanta moko* ya palata.’ 40 Mpe ntango nazalaki kosala mosala epai na epai, moto yango akimaki.” Na yango Mokonzi ya Yisraele alobaki na ye: “Yo moko okati likambo na yo; etumbu na yo yango wana!” 41 Bongo alongolaki nokinoki eteni ya elamba oyo ezalaki na miso na ye, mpe mokonzi ya Yisraele ayebaki ete azali moko ya basakoli.+ 42 Alobaki na mokonzi boye: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Lokola okimisi moto oyo nalobaki ete asengeli kobomama,+ okokufa na esika na ye*+ mpe bato na yo bakokufa na esika ya bato na ye.’”+ 43 Na yango mokonzi ya Yisraele akendaki na ndako na ye na Samaria,+ na nkanda mpe na mawa.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto