Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 18
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Ezekiasi, mokonzi ya Yuda (1-8)

      • Makambo etali kokwea ya Yisraele (9-12)

      • Senakeribe ayei kobundisa Yuda (13-18)

      • Rabashake atumoli Yehova (19-37)

2 Bakonzi 18:1

Mitindami

  • +2Ba 15:30; 17:1
  • +2Nt 28:27; Mt 1:9
  • +2Ba 16:2, 20

2 Bakonzi 18:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ebengeli ya mokuse ya nkombo Abiya.

Mitindami

  • +2Nt 29:1, 2

2 Bakonzi 18:3

Mitindami

  • +2Ba 20:3; 2Nt 31:20, 21; Nz 119:128
  • +1Ba 15:5

2 Bakonzi 18:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “kotumbela yango mbeka mpo na kobimisa milinga ya mbeka.”

  • *

    To, “bazalaki kobenga yango Nehusutana.”

Mitindami

  • +Mit 33:52; 1Ba 3:2; 2Ba 14:1, 4
  • +Mib 7:5; 12:3; 2Nt 31:1
  • +Mit 21:8, 9

2 Bakonzi 18:5

Mitindami

  • +2Ba 19:15; 2Nt 32:7, 8

2 Bakonzi 18:6

Mitindami

  • +Mib 10:20; Yos 23:8

2 Bakonzi 18:7

Mitindami

  • +2Ba 16:7

2 Bakonzi 18:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, na bisika nyonso, ezala na esika oyo ezali na bato moke to bato ebele.

Mitindami

  • +2Nt 28:18, 19; Yis 14:28, 29

2 Bakonzi 18:9

Mitindami

  • +2Ba 17:1
  • +2Ba 17:3-6

2 Bakonzi 18:10

Mitindami

  • +Hos 13:16; Am 3:11; Mik 1:6

2 Bakonzi 18:11

Mitindami

  • +Yis 8:4; Am 6:1, 7
  • +2Ba 17:6; 1Nt 5:26

2 Bakonzi 18:12

Mitindami

  • +Mib 8:20; 1Ba 14:15

2 Bakonzi 18:13

Mitindami

  • +Yis 10:5
  • +2Nt 32:1; Yis 36:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/1993, nk. 5-6

    “Makomami nyonso,” lok. 156

2 Bakonzi 18:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talanta moko = 34,2 kg. Talá Ap. B14.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Esakweli ya Yisaya I, nk. 383-385

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/1993, nk. 5-6

2 Bakonzi 18:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

Mitindami

  • +2Ba 12:18; 16:8; 2Nt 16:2, 3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/1993, lok. 6

2 Bakonzi 18:16

Mitindami

  • +1Ba 6:33-35
  • +2Nt 29:1, 3

2 Bakonzi 18:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “komanda.”

  • *

    To, “mokonzi ya basali ya ndako na ye.”

  • *

    To, “kapita ya bapesi-masanga.”

Mitindami

  • +Yos 15:20, 39; 2Nt 11:5, 9
  • +2Nt 32:9
  • +Yis 36:2, 3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Esakweli ya Yisaya I, lok. 386

2 Bakonzi 18:18

Mitindami

  • +2Ba 19:2; Yis 22:20-24
  • +Yis 22:15-19

2 Bakonzi 18:19

Mitindami

  • +2Nt 32:10; Yis 36:4-10

2 Bakonzi 18:20

Mitindami

  • +2Ba 18:7

2 Bakonzi 18:21

Mitindami

  • +Yis 30:1, 2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2010, nk. 12-13

    1/8/2005, lok. 11

2 Bakonzi 18:22

Mitindami

  • +2Nt 32:8
  • +2Nt 31:1
  • +Mib 12:11, 13; 2Nt 32:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2010, lok. 13

2 Bakonzi 18:23

Mitindami

  • +Yis 10:12, 13

2 Bakonzi 18:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ya Siri.”

  • *

    Elingi koloba, “Ebre.”

Mitindami

  • +2Ba 18:18
  • +2Ba 18:17
  • +Ezr 4:7; Da 2:4
  • +Yis 36:11, 12

2 Bakonzi 18:28

Mitindami

  • +Yis 36:13-20

2 Bakonzi 18:29

Mitindami

  • +2Nt 32:15

2 Bakonzi 18:30

Mitindami

  • +2Ba 19:32-34

2 Bakonzi 18:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Bósala ná ngai lipamboli mpe bóbima epai na ngai.”

2 Bakonzi 18:32

Mitindami

  • +2Ba 17:6

2 Bakonzi 18:34

Mitindami

  • +Mit 13:21
  • +2Ba 17:24
  • +2Ba 17:6

2 Bakonzi 18:35

Mitindami

  • +2Ba 19:17-19; 2Nt 32:15; Yis 37:23

2 Bakonzi 18:36

Mitindami

  • +Yis 36:21, 22

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 18:12Ba 15:30; 17:1
2 Bak. 18:12Nt 28:27; Mt 1:9
2 Bak. 18:12Ba 16:2, 20
2 Bak. 18:22Nt 29:1, 2
2 Bak. 18:32Ba 20:3; 2Nt 31:20, 21; Nz 119:128
2 Bak. 18:31Ba 15:5
2 Bak. 18:4Mit 33:52; 1Ba 3:2; 2Ba 14:1, 4
2 Bak. 18:4Mib 7:5; 12:3; 2Nt 31:1
2 Bak. 18:4Mit 21:8, 9
2 Bak. 18:52Ba 19:15; 2Nt 32:7, 8
2 Bak. 18:6Mib 10:20; Yos 23:8
2 Bak. 18:72Ba 16:7
2 Bak. 18:82Nt 28:18, 19; Yis 14:28, 29
2 Bak. 18:92Ba 17:1
2 Bak. 18:92Ba 17:3-6
2 Bak. 18:10Hos 13:16; Am 3:11; Mik 1:6
2 Bak. 18:11Yis 8:4; Am 6:1, 7
2 Bak. 18:112Ba 17:6; 1Nt 5:26
2 Bak. 18:12Mib 8:20; 1Ba 14:15
2 Bak. 18:13Yis 10:5
2 Bak. 18:132Nt 32:1; Yis 36:1
2 Bak. 18:152Ba 12:18; 16:8; 2Nt 16:2, 3
2 Bak. 18:161Ba 6:33-35
2 Bak. 18:162Nt 29:1, 3
2 Bak. 18:17Yos 15:20, 39; 2Nt 11:5, 9
2 Bak. 18:172Nt 32:9
2 Bak. 18:17Yis 36:2, 3
2 Bak. 18:182Ba 19:2; Yis 22:20-24
2 Bak. 18:18Yis 22:15-19
2 Bak. 18:192Nt 32:10; Yis 36:4-10
2 Bak. 18:202Ba 18:7
2 Bak. 18:21Yis 30:1, 2
2 Bak. 18:222Nt 32:8
2 Bak. 18:222Nt 31:1
2 Bak. 18:22Mib 12:11, 13; 2Nt 32:12
2 Bak. 18:23Yis 10:12, 13
2 Bak. 18:262Ba 18:18
2 Bak. 18:262Ba 18:17
2 Bak. 18:26Ezr 4:7; Da 2:4
2 Bak. 18:26Yis 36:11, 12
2 Bak. 18:28Yis 36:13-20
2 Bak. 18:292Nt 32:15
2 Bak. 18:302Ba 19:32-34
2 Bak. 18:322Ba 17:6
2 Bak. 18:34Mit 13:21
2 Bak. 18:342Ba 17:24
2 Bak. 18:342Ba 17:6
2 Bak. 18:352Ba 19:17-19; 2Nt 32:15; Yis 37:23
2 Bak. 18:36Yis 36:21, 22
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 18:1-37

Mokanda ya mibale ya

18 Na mbula ya misato ya boyangeli ya Hoshea+ mwana ya Ela mokonzi ya Yisraele, Ezekiasi+ mwana ya Ahaze+ mokonzi ya Yuda akómaki mokonzi. 2 Azalaki na mbula 25 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 29 na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Abi* mwana ya Zekaria.+ 3 Ezekiasi azalaki kosala makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova,+ kaka ndenge nkɔkɔ na ye Davidi asalaki.+ 4 Ye nde alongolaki bisika oyo etombwaná,+ abukabukaki makonzí ya losambo, mpe akataki nzete ya losambo.*+ Abukaki mpe nyoka ya kwivre oyo Moize asalaki;+ mpo tii na ntango wana, bato ya Yisraele bazalaki kotumba mbeka liboso na yango,* mpe bazalaki kobenga yango ekeko ya nyoka ya kwivre.* 5 Ezekiasi atyelaki Yehova+ Nzambe ya Yisraele motema. Na bakonzi nyonso ya Yuda oyo bayangelaki liboso to nsima na ye, ata moko te azalaki lokola ye. 6 Ezekiasi akangamaki makasi na Yehova.+ Apesaki ye mokɔngɔ te. Akobaki kotosa mitindo oyo Yehova apesaki Moize. 7 Mpe Yehova azalaki elongo na ye. Ezekiasi azalaki kosala makambo nyonso na bwanya. Atombokelaki mokonzi ya Asiri mpe aboyaki kosalela ye.+ 8 Abundisaki Bafilistia+ tii na Gaza mpe bateritware na yango, banda na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli tii na engumba oyo ebatelami makasi,* mpe alongaki bango.

9 Na mbula ya minei ya boyangeli ya Mokonzi Ezekiasi, elingi koloba, mbula ya nsambo ya boyangeli ya Hoshea+ mwana ya Ela mokonzi ya Yisraele, Shalmanesere mokonzi ya Asiri amataki kobundisa Samaria mpe abandaki kozinga yango.+ 10 Na nsuka ya mbula misato Baasiri bazwaki Samaria.+ Ezalaki na mbula ya motoba ya boyangeli ya Ezekiasi, elingi koloba, mbula ya libwa ya boyangeli ya Hoshea mokonzi ya Yisraele. 11 Na nsima, mokonzi ya Asiri amemaki bato ya Yisraele na mboka mopaya+ na Asiri. Afandisaki bango na Hala mpe na Habore pene na ebale Gozane, mpe na bingumba ya Bamede.+ 12 Esalemaki bongo mpo Bayisraele baboyaki koyoka mongongo ya Yehova Nzambe na bango. Bazalaki se kobuka kondimana na ye, mpe koboya kolanda mitindo nyonso oyo Moize mosaleli ya Yehova apesaki bango.+ Baboyaki koyoka mpe kotosa.

13 Na mbula ya 14 ya boyangeli ya Mokonzi Ezekiasi, Senakeribe mokonzi ya Asiri+ amataki kobundisa bingumba nyonso ya Yuda oyo ebatelami makasi mpe azwaki yango.+ 14 Bongo Ezekiasi mokonzi ya Yuda atindelaki mokonzi ya Asiri, oyo azalaki na Lakishi, maloba oyo: “Nasali libunga. Nabondeli yo, tiká kobundisa ngai, mpe nakopesa yo nyonso oyo okosɛnga ngai.” Na yango, mokonzi ya Asiri ayebisaki Ezekiasi mokonzi ya Yuda afuta talanta* 300 ya palata mpe talanta 30 ya wolo. 15 Bongo Ezekiasi apesaki ye palata nyonso oyo ezalaki na tempelo* ya Yehova mpe na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi.+ 16 Na ntango yango, Ezekiasi alongolaki baporte ya tempelo+ ya Yehova mpe makonzí ya porte oyo ye moko Ezekiasi mokonzi ya Yuda azipaki na wolo,+ mpe apesaki yango mokonzi ya Asiri.

17 Na nsima, longwa na Lakishi,+ mokonzi ya Asiri atindaki Tartane,* Rabasarise,* ná Rabashake* elongo na limpinga monene ya basoda epai ya Mokonzi Ezekiasi na Yerusaleme.+ Bamataki na Yerusaleme mpe batɛlɛmaki pene na nzela oyo elekisaka mai ya liziba ya likoló, oyo ezali na balabala monene ya elanga ya mosukoli-bilamba.+ 18 Ntango babelelaki mokonzi mpo abima, Eliakime+ mwana ya Hilikiya, oyo azalaki kokamba bato ya ndako ya mokonzi, Shebena+ oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ, mpe Yoa mwana ya Asafe mokomi-makambo, babimaki mpo na kokutana na bango.

19 Bongo Rabashake alobaki na bango: “Nasɛngi bino, bóloba na Ezekiasi boye: ‘Talá oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi: “Ozali kotya motema na nini?+ 20 Olobi: ‘Nazali na mayele mpe na nguya ya kobunda etumba.’ Kasi wana ezali kaka maloba ya mpamba. Nani yango otyeli motema, mpo otombokela ngai?+ 21 Talá! Otyeli Ezipito+ motema, mongendu oyo ebukanabukaná, oyo soki moto asimbi yango mpo na koyekama, ekokɔta na lobɔkɔ na ye mpe ekotɔbɔla yango. Farao mokonzi ya Ezipito azali ndenge wana epai ya baoyo nyonso batyelaka ye motema. 22 Mpe soki olobi na ngai: ‘Totyeli Yehova Nzambe na biso motema.’+ Bongo bisika oyo etombwaná mpe bitumbelo oyo Ezekiasi alongoli ezali ya ye te?+ Alobaki na bato ya Yuda mpe ya Yerusaleme: ‘Bokogumbama liboso ya etumbelo oyo, na Yerusaleme.’”’+ 23 Sikoyo, tótala nani akolonga kati na yo ná nkolo na ngai mokonzi ya Asiri; nakopesa yo bampunda 2 000, mpe tótala soki okokoka kozwa bato ya kotambwisa yango.+ 24 Awa ozali kotyela Ezipito motema mpo na makalo mpe basoda na yango oyo batambolaka na mpunda, ndenge nini okokoka kobengana ata guvɛrnɛrɛ oyo aleki moke kati na basaleli ya nkolo na ngai? 25 Okanisi ete namati kobundisa esika oyo mpe kobebisa yango kozanga ndingisa ya Yehova? Yehova ye moko alobaki na ngai: ‘Matá kobundisa mokili yango, mpe bebisá yango.’”

26 Bongo Eliakime mwana ya Hilikiya, Shebena+ ná Yoa balobaki na Rabashake:+ “Tobondeli yo, lobá na basaleli na yo na monɔkɔ ya Aramɛyɛ,*+ mpo toyokaka mpe yango. Koloba na biso te na monɔkɔ ya Bayuda,* noki bato oyo bazali likoló ya efelo báyoka.”+ 27 Kasi Rabashake alobaki na bango: “Ezali kaka mpo na nkolo na yo mpe mpo na yo nde nkolo na ngai atindi ngai naloba maloba oyo? Maloba yango etali mpe te bato oyo bafandi likoló ya efelo, oyo mosika te bakolya nyɛi na bango moko mpe bakomɛla masuba na bango moko elongo na bino?”

28 Na nsima Rabashake agangaki na mongongo makasi na monɔkɔ ya Bayuda, alobi: “Bóyoka liloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri.+ 29 Mokonzi alobi boye: ‘Ezekiasi akosa bino te, mpo akokoka te kobikisa bino na lobɔkɔ na ngai.+ 30 Mpe Ezekiasi atinda bino te ete bótyela Yehova motema na maloba oyo: “Kozanga ntembe, Yehova akobikisa biso, mokonzi ya Asiri akokoka te kobɔtɔla engumba oyo.”+ 31 Bóyokela Ezekiasi te, mpo mokonzi ya Asiri alobi: “Bóluka kosala ná ngai boyokani ya kimya mpe bómitika epai na ngai.* Boye, moto na moto akolya mbuma ya nzete na ye ya vinyo mpe mbuma ya nzete na ye ya figi mpe akomɛla mai ya libulu na ye ya kobomba mai, 32 tii nakoya mpe nakomema bino na mokili moko oyo ezali lokola mokili na bino,+ mokili ya mbuma mpe ya vinyo ya sika, mokili ya limpa mpe ya bilanga ya vinyo, mokili ya banzete ya olive mpe ya mafuta ya nzoi. Boye bokotikala na bomoi mpe bokokufa te. Bóyokela Ezekiasi te, mpo azali kokosa bino na ndenge azali koloba: ‘Yehova akobikisa biso.’ 33 Ezali nde na nzambe moko ya bikólo oyo asilá kobikisa mokili na ye na lobɔkɔ ya mokonzi ya Asiri? 34 Wapi banzambe ya Hamate+ mpe ya Arpade? Wapi banzambe ya Sefarvaime,+ ya Hena, mpe ya Iva? Babikisaki Samaria na lobɔkɔ na ngai?+ 35 Nani kati na banzambe nyonso ya mikili yango abikisá mokili na bango na lobɔkɔ na ngai, mpo Yehova abikisa Yerusaleme na lobɔkɔ na ngai?”’”+

36 Kasi bato bafandaki kaka nyɛɛ mpe bazongiselaki ye ata liloba te, mpo mokonzi apesaki mitindo ete: “Bópesa ye eyano te.”+ 37 Kasi Eliakime mwana ya Hilikiya, oyo azalaki kokamba ndako ya mokonzi, Shebena oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ, mpe Yoa mwana ya Asafe mokomi-makambo, bapasolaki bilamba na bango mpe bakendaki epai ya Ezekiasi mpe bayebisaki ye maloba ya Rabashake.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto