Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 19
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Yehu apameli Yehoshafate (1-3)

      • Yehoshafate abongisi makambo (4-11)

2 Ntango 19:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “na kimya.”

  • *

    To, “ndako ya mokonzi.”

Mitindami

  • +2Nt 18:31, 32

2 Ntango 19:2

Mitindami

  • +1Ba 16:1
  • +2Nt 16:7
  • +1Ba 21:25
  • +Nz 139:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    10/2021, lok. 3

2 Ntango 19:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “motema na yo ekani.”

Mitindami

  • +1Ba 14:1, 13
  • +2Nt 17:3-6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2015, lok. 6

    1/12/2005, lok. 20

    1/7/2003, lok. 17

    Penepene na Yehova, lok. 245

2 Ntango 19:4

Mitindami

  • +Yos 17:14, 15
  • +2Nt 15:8

2 Ntango 19:5

Mitindami

  • +Mib 16:18

2 Ntango 19:6

Mitindami

  • +Mib 1:16, 17; Nz 82:1

2 Ntango 19:7

Mitindami

  • +Kob 18:21
  • +Eb 18:25; Mib 32:4
  • +Mis 10:34; Ro 2:11; 1Pe 1:17
  • +Mib 10:17; 16:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2011, lok. 28

2 Ntango 19:8

Mitindami

  • +Mib 17:9; 21:5; 25:1

2 Ntango 19:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “oyo emipesi mobimba.”

2 Ntango 19:10

Mitindami

  • +Mib 17:8

2 Ntango 19:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “azala na oyo ezali malamu.”

Mitindami

  • +Mal 2:7
  • +2Nt 15:2

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 19:12Nt 18:31, 32
2 Nt. 19:21Ba 16:1
2 Nt. 19:22Nt 16:7
2 Nt. 19:21Ba 21:25
2 Nt. 19:2Nz 139:21
2 Nt. 19:31Ba 14:1, 13
2 Nt. 19:32Nt 17:3-6
2 Nt. 19:4Yos 17:14, 15
2 Nt. 19:42Nt 15:8
2 Nt. 19:5Mib 16:18
2 Nt. 19:6Mib 1:16, 17; Nz 82:1
2 Nt. 19:7Kob 18:21
2 Nt. 19:7Eb 18:25; Mib 32:4
2 Nt. 19:7Mis 10:34; Ro 2:11; 1Pe 1:17
2 Nt. 19:7Mib 10:17; 16:19
2 Nt. 19:8Mib 17:9; 21:5; 25:1
2 Nt. 19:10Mib 17:8
2 Nt. 19:11Mal 2:7
2 Nt. 19:112Nt 15:2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 19:1-11

Mokanda ya mibale ya Ntango

19 Na nsima, Yehoshafate mokonzi ya Yuda azongaki malamu*+ na ndako na ye* na Yerusaleme. 2 Yehu+ mwana ya Hanani,+ momoni-bimonaneli, akendaki kokutana na Mokonzi Yehoshafate mpe alobaki na ye: “Osengelaki nde kokende kosalisa moto mabe?+ Mpe osengeli nde kolinga bato oyo bayinaka Yehova?+ Mpo na yango, Yehova asilikeli yo. 3 Atako bongo, Nzambe amoni makambo ya malamu epai na yo,+ mpo olongolaki banzete ya losambo* na ekólo mpe obongisi motema na yo* mpo na koluka Nzambe ya solo.”+

4 Yehoshafate akobaki kofanda na Yerusaleme. Mpe akendaki lisusu kotala bato, banda na Beere-sheba tii na etúká ya ngombangomba ya Efraime,+ mpo na kozongisa bango epai ya Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango.+ 5 Atyaki mpe basambisi na ekólo mobimba, na bingumba nyonso ya Yuda oyo ebatelami makasi, engumba na engumba.+ 6 Mpe alobaki na basambisi: “Bókeba na oyo bozali kosala, mpo bozali kosambisa mpo na moto te, kasi mpo na Yehova; mpe azali elongo na bino ntango bozali kokata makambo.+ 7 Sikoyo, tiká ete kobanga ya Yehova ekwela bino.+ Bókeba na oyo bozali kosala, mpo epai ya Yehova Nzambe na biso kozanga bosembo,+ kopona bilongi+ mpe kanyaka ezalaka te.”+

8 Na Yerusaleme mpe, Yehoshafate atyaki Balevi mosusu mpe banganga-nzambe ná bankumu mosusu ya mabota ya batata ya Yisraele mpo bázala basambisi na nkombo ya Yehova mpe bákataka makambo ya bato oyo bafandi na Yerusaleme.+ 9 Lisusu, apesaki bango mitindo oyo: “Talá oyo bokosala na kobanga Yehova, na bosembo mpe na motema mobimba:* 10 Mbala nyonso oyo bandeko na bino oyo bafandi na bingumba mosusu bakoyela bino likambo oyo etali kosopa makila,+ to bakoya na motuna mpo na mobeko moko, mitindo, malako to bikateli ya lisambisi, bosengeli kokebisa bango mpo bámema ngambo te na miso ya Yehova, soki te nkanda na ye ekongalela bino mpe bandeko na bino. Ndenge wana nde bokosala mpo bómema ngambo te. 11 Talá Amaria, nganga-nzambe mokonzi oyo atyami mpo na kotambwisa bino na makambo nyonso oyo etali Yehova.+ Zebadia mwana ya Yishimaele azali mokambi ya libota ya Yuda na makambo nyonso oyo etali mokonzi. Mpe Balevi bakozala basungi mpo na bino. Bózala makasi mpe bósala mosala na mpiko, mpe tiká Yehova azala na baoyo bazali kosala oyo ezali malamu.”*+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto