Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Samwele

      • Davidi asali ekobo ná Bate-sheba (1-13)

      • Davidi abomisi Uriya (14-25)

      • Davidi abali Bate-sheba (26, 27)

2 Samwele 11:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, na prɛnta.

Mitindami

  • +2Sa 12:26
  • +1Nt 20:1

2 Samwele 11:3

Mitindami

  • +2Sa 12:24; 1Ba 1:11
  • +1Nt 3:5, 9
  • +2Sa 23:8, 39; 1Ba 15:5
  • +Eb 10:15; Mib 20:17

2 Samwele 11:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Mbala mosusu ntango azalaki komona sanza.

Mitindami

  • +Kob 20:14, 17
  • +Le 18:20; 20:10; Mas 6:32; Ebr 13:4
  • +Le 12:2; 15:19; 18:19

2 Samwele 11:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “sukolá makolo na yo.”

  • *

    Mbala mosusu ezalaki bilei oyo nkolo-ndako atindelaka mopaya na ye ya lokumu.

2 Samwele 11:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Lokola molimo na yo ezali solo na bomoi.”

Mitindami

  • +2Sa 6:17; 7:2
  • +Le 15:16; 1Sa 21:5

2 Samwele 11:15

Mitindami

  • +Nz 51:14; Mas 3:29

2 Samwele 11:17

Mitindami

  • +2Sa 12:9

2 Samwele 11:21

Mitindami

  • +Bas 9:50-53
  • +Bas 6:32; 7:1

2 Samwele 11:24

Mitindami

  • +2Sa 11:17

2 Samwele 11:25

Mitindami

  • +2Sa 12:26

2 Samwele 11:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “liláká.”

  • *

    Lil., “ezalaki mabe na miso ya Yehova.”

Mitindami

  • +2Sa 5:13; 12:9
  • +Eb 39:7-9; 1Ba 15:5; Nz 5:6; 11:4; Ebr 13:4

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Sa. 11:12Sa 12:26
2 Sa. 11:11Nt 20:1
2 Sa. 11:32Sa 12:24; 1Ba 1:11
2 Sa. 11:31Nt 3:5, 9
2 Sa. 11:32Sa 23:8, 39; 1Ba 15:5
2 Sa. 11:3Eb 10:15; Mib 20:17
2 Sa. 11:4Kob 20:14, 17
2 Sa. 11:4Le 18:20; 20:10; Mas 6:32; Ebr 13:4
2 Sa. 11:4Le 12:2; 15:19; 18:19
2 Sa. 11:112Sa 6:17; 7:2
2 Sa. 11:11Le 15:16; 1Sa 21:5
2 Sa. 11:15Nz 51:14; Mas 3:29
2 Sa. 11:172Sa 12:9
2 Sa. 11:21Bas 9:50-53
2 Sa. 11:21Bas 6:32; 7:1
2 Sa. 11:242Sa 11:17
2 Sa. 11:252Sa 12:26
2 Sa. 11:272Sa 5:13; 12:9
2 Sa. 11:27Eb 39:7-9; 1Ba 15:5; Nz 5:6; 11:4; Ebr 13:4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Samwele 11:1-27

Mokanda ya mibale ya Samwele

11 Na ebandeli ya mbula,* na ntango oyo bakonzi babimaka mpo na etumba, Davidi atindaki Yoabe ná limpinga mobimba ya basoda ya Yisraele bákende kosilisa Baamone nyonso. Na yango, bakendaki kozinga Raba.+ Kasi Davidi atikalaki na Yerusaleme.+

2 Mokolo moko na mpokwa, Davidi alongwaki na mbeto na ye mpe abandaki kotambolatambola na nsamba ya ndako ya mokonzi. Longwa na nsamba yango, amonaki mwasi moko azali kosukola nzoto, mpe mwasi yango azalaki kitoko mingi mpenza. 3 Davidi atindaki moto akende kotuna soki mwasi yango azali nani. Na nsima moto yango alobaki: “Ezali Bate-sheba+ mwana ya Eliame+ mwasi ya Uria+ Mohiti.”+ 4 Nsima na yango, Davidi atindaki bato bákende kozwa ye.+ Bongo mwasi yango akɔtaki epai na ye mpe Davidi asangisaki na ye nzoto.+ (Yango esalemaki ntango Bate-sheba azalaki komipɛtola mpo na mbindo na ye.*)+ Na nsima, azongaki na ndako na ye.

5 Mwasi yango akómaki na zemi, mpe atindaki bato báyebisa Davidi ete: “Nazali na zemi.” 6 Na yango, Davidi atindelaki Yoabe maloba ete: “Tindelá ngai Uria Mohiti.” Bongo Yoabe atindaki Uria epai ya Davidi. 7 Ntango Uria akómaki, Davidi atunaki ye soki Yoabe azali ndenge nini, soki basoda bazali ndenge nini mpe soki etumba ezali koleka ndenge nini. 8 Na nsima Davidi alobaki na Uria: “Kende na ndako na yo mpo opema mwa moke.”* Ntango Uria abimaki na ndako ya mokonzi, mokonzi atindelaki ye likabo ya boboto.* 9 Kasi Uria alalaki na monɔkɔ ya ndako ya mokonzi, esika moko ná basaleli mosusu nyonso ya nkolo na ye, mpe akendaki na ndako na ye te. 10 Bongo bayebisaki Davidi ete: “Uria akendaki kolala na ndako na ye te.” Na yango, Davidi alobaki na Uria: “Outi mobembo, boye te? Mpo na nini okei kolala na ndako na yo te?” 11 Uria ayanolaki Davidi: “Sanduku+ ná bato ya Yisraele mpe ya Yuda bazali kofanda na bahema, lisusu nkolo na ngai Yoabe ná bato na ye bazali kolala libándá kuna na esobe. Bongo ngai nde nakende kokɔta na ndako na ngai mpo na kolya, komɛla mpe kolala na mwasi na ngai?+ Lokola ozali solo na bomoi,* nakosala likambo ya boye te!”

12 Bongo Davidi alobaki na Uria: “Fandá awa lelo lisusu, mpe lobi nakotika yo okende.” Na yango Uria afandaki na Yerusaleme na mokolo wana mpe mokolo oyo elandaki. 13 Na nsima, Davidi atindaki bábenga ye mpo alya mpe amɛla elongo na ye. Mpe alangwisaki ye. Kasi na mpokwa, Uria akendaki kolala esika moko na basaleli ya nkolo na ye; akendaki na ndako na ye te. 14 Na ntɔngɔ, Davidi akomelaki Yoabe mokanda mpe atindaki yango na mabɔkɔ ya Uria. 15 Akomaki boye: “Tyá Uria na molɔngɔ ya liboso, na esika oyo etumba ezali kondongwana makasi. Bongo ozonga nsima mpe otika ye mpo abɛtama mpe akufa.”+

16 Yoabe ná basoda na ye bazingaki engumba yango malamumalamu. Bongo atyaki Uria na esika oyo ayebaki ete bilombe ya etumba ya banguna bazalaki. 17 Ntango mibali ya engumba yango babimaki mpe babundaki na Yoabe, ndambo ya basoda ya Davidi bakufaki; Uria Mohiti azalaki mpe na kati ya baoyo bakufaki.+ 18 Yoabe atindaki momemi-nsango ayebisa Davidi ndenge makambo elekaki na etumba. 19 Apesaki momemi-nsango yango mitindo ete: “Ntango okosilisa koyebisa mokonzi makambo nyonso ya etumba, 20 soki mokonzi asiliki makasi mpe alobi na yo: ‘Mpo na nini bopusanaki pene na engumba yango mpo na kobunda? Boyebaki te ete bakokaki komata likoló ya efelo mpe kobwakela bino makula? 21 Nani abomaki Abimeleke+ mwana ya Yerubeshete?+ Longwa na likoló ya efelo, mwasi moko nde abwakelaki ye libanga ya likoló oyo banikaka na yango mbuma mpe akufaki na Tebeze, boye te? Mpo na nini bopusanaki penepene ya efelo?’ Bongo okoloba: ‘Mosaleli na yo Uria Mohiti mpe akufi.’”

22 Bongo momemi-nsango yango akendaki mpe ayebisaki Davidi makambo nyonso oyo Yoabe atindaki ye aloba. 23 Na nsima momemi-nsango yango alobaki na Davidi: “Bato yango balekaki biso na makasi mpe bayaki kobundisa biso na esobe; kasi tozongisaki bango nsima tii na esika ya kokɔta na porte ya engumba. 24 Mpe basoda na bango oyo bazalaki likoló ya efelo bazalaki na matimbo mpe bazalaki kobwakela biso makula. Ee mokonzi, basaleli na yo mosusu bakufi; mosaleli na yo Uria Mohiti mpe akufi.”+ 25 Na yango, Davidi alobaki na momemi-nsango ete: “Yebisá Yoabe boye: ‘Komitungisa te mpo na likambo oyo, mpo ntango mopanga ebomaka, eponaka moto te. Bundisá engumba yango na mpiko mpenza mpe kweisá yango.’+ Lendisá ye bongo.”

26 Ntango mwasi ya Uria ayokaki ete mobali na ye Uria akufi, abandaki kolela mobali na ye. 27 Ntango kaka matánga* esilaki, Davidi atindaki bato báya na mwasi yango na ndako na ye. Akómaki mwasi na ye+ mpe na nsima, abotelaki ye mwana mobali. Kasi likambo oyo Davidi asalaki esepelisaki Yehova ata moke te.*+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto