Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 7
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Nsuka eyei (1-27)

        • Mpasi oyo ekokani na mosusu te (5)

        • Bakobwaka mbongo na babalabala (19)

        • Tempelo ekokómisama eloko mpamba (22)

Ezekiele 7:4

Mitindami

  • +Ezk 5:11
  • +Yir 16:18; Ezk 16:43
  • +Ezk 6:13

Ezekiele 7:5

Mitindami

  • +2Ba 21:12; Da 9:12

Ezekiele 7:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Ekolamukela yo.”

Ezekiele 7:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “motole ya fololo ebimi.”

Mitindami

  • +Sef 1:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2007, lok. 11

Ezekiele 7:8

Mitindami

  • +2Nt 34:21
  • +Yir 7:20; Ezk 5:13

Ezekiele 7:9

Mitindami

  • +Yir 13:14
  • +Yis 66:6; Ezk 33:29

Ezekiele 7:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “motole ya fololo ebimi.”

Mitindami

  • +Sef 1:14

Ezekiele 7:11

Mitindami

  • +Yis 59:6; Yir 6:7; Mik 6:12

Ezekiele 7:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “Ezala baoyo bazali kosomba biloko to baoyo bazali kotɛka yango, moko te akozwa litomba mpo libebi ekoyela bango nyonso.”

Mitindami

  • +Sef 1:18

Ezekiele 7:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “na libunga na bango.”

Ezekiele 7:14

Mitindami

  • +Yir 4:5
  • +Yir 7:20; 12:12

Ezekiele 7:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mopanga.”

Mitindami

  • +Le 26:25
  • +Yir 14:18; Ezk 5:12

Ezekiele 7:16

Mitindami

  • +Yis 59:11

Ezekiele 7:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, masuba oyo ebimi mpo na kobanga.

Mitindami

  • +Ezk 21:7

Ezekiele 7:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    Lil., “ezipi bango.”

  • *

    Elingi koloba, “bakokokola motó na bango lokola elembo ya mawa.”

Mitindami

  • +Yis 3:24
  • +Yis 22:12

Ezekiele 7:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bakotondisa milimo na bango te.”

  • *

    Elingi koloba, “palata ná wolo na bango.”

Mitindami

  • +Mas 11:4; Sef 1:18

Ezekiele 7:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “biloko na bango ya wolo mpe ya palata.”

Mitindami

  • +2Ba 21:1, 7; Yir 7:30

Ezekiele 7:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “palata mpe wolo na bango oyo basalaki na yango bikeko.”

Ezekiele 7:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Emonani ete ezali kolobela eteni ya kati mpenza ya esika mosantu ya Yehova.

Mitindami

  • +Yir 18:17
  • +2Nt 36:19; Bil 1:10

Ezekiele 7:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “minyɔlɔlɔ ya bokangami.”

Mitindami

  • +Yir 39:6, 7; Bil 3:7
  • +2Ba 21:16; 24:3, 4; Yir 2:34; Ezk 9:9
  • +Yis 59:6; Mik 2:2

Ezekiele 7:24

Mitindami

  • +Mib 28:48-51; Ezk 21:31; Hab 1:6
  • +Yir 6:12; Bil 5:2
  • +Ezk 21:2

Ezekiele 7:25

Mitindami

  • +Yis 57:21; Yir 8:15

Ezekiele 7:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mateya.”

Mitindami

  • +Yir 21:1, 2; 37:17
  • +Nz 74:9; Bil 2:9; Ezk 20:3

Ezekiele 7:27

Mitindami

  • +Yir 52:10
  • +Ezk 6:13

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 7:4Ezk 5:11
Ezk. 7:4Yir 16:18; Ezk 16:43
Ezk. 7:4Ezk 6:13
Ezk. 7:52Ba 21:12; Da 9:12
Ezk. 7:7Sef 1:14
Ezk. 7:82Nt 34:21
Ezk. 7:8Yir 7:20; Ezk 5:13
Ezk. 7:9Yir 13:14
Ezk. 7:9Yis 66:6; Ezk 33:29
Ezk. 7:10Sef 1:14
Ezk. 7:11Yis 59:6; Yir 6:7; Mik 6:12
Ezk. 7:12Sef 1:18
Ezk. 7:14Yir 4:5
Ezk. 7:14Yir 7:20; 12:12
Ezk. 7:15Le 26:25
Ezk. 7:15Yir 14:18; Ezk 5:12
Ezk. 7:16Yis 59:11
Ezk. 7:17Ezk 21:7
Ezk. 7:18Yis 3:24
Ezk. 7:18Yis 22:12
Ezk. 7:19Mas 11:4; Sef 1:18
Ezk. 7:202Ba 21:1, 7; Yir 7:30
Ezk. 7:22Yir 18:17
Ezk. 7:222Nt 36:19; Bil 1:10
Ezk. 7:23Yir 39:6, 7; Bil 3:7
Ezk. 7:232Ba 21:16; 24:3, 4; Yir 2:34; Ezk 9:9
Ezk. 7:23Yis 59:6; Mik 2:2
Ezk. 7:24Mib 28:48-51; Ezk 21:31; Hab 1:6
Ezk. 7:24Yir 6:12; Bil 5:2
Ezk. 7:24Ezk 21:2
Ezk. 7:25Yis 57:21; Yir 8:15
Ezk. 7:26Yir 21:1, 2; 37:17
Ezk. 7:26Nz 74:9; Bil 2:9; Ezk 20:3
Ezk. 7:27Yir 52:10
Ezk. 7:27Ezk 6:13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 7:1-27

Ezekiele

7 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Nde yo, mwana ya moto, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na mokili ya Yisraele: ‘Nsuka eyei! Nsuka ekómeli nsuka minei ya mokili. 3 Sikoyo, nsuka ekómeli yo, mpe nakokitisela yo nkanda na ngai, nakosambisa yo na kolanda etamboli na yo mpe nakosɛnga yo ozongisa monɔkɔ mpo na makambo nyonso eyinamá oyo osali. 4 Liso na ngai ekoyokela yo mawa te, nakomonisa mpe motema mawa te,+ mpo nakofuta yo na kolanda misala na yo, okonyokwama mpo na makama oyo misala na yo oyo eyinamá ekobimisa.+ Mpe okoyeba mpenza ete nazali Yehova.’+

5 “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Talá, mpasi! Mpasi oyo ekokani na mosusu te ezali koya.+ 6 Nsuka ezali koya; nsuka ekoya. Ekoyela yo na mbalakaka.* Ɛɛ, ezali koya! 7 Yo oyo ofandi na mokili, ngala na yo ekómi,* ntango ezali koya. Mokolo ekómi pene.+ Na bangomba mobulungano nde ezali, kasi koganga ya esengo ezali te.

8 “‘Mosika te, nakosopela yo nkanda na ngai,+ mpe nakokitisela yo mpenza nkanda na ngai,+ nakosambisa yo na kolanda etamboli na yo mpe nakosɛnga yo ozongisa monɔkɔ mpo na makambo nyonso eyinamá oyo osali. 9 Liso na ngai ekoyoka mawa te, nakomonisa mpe motema mawa te.+ Nakofuta yo na kolanda misala na yo, okonyokwama mpo na makama oyo misala na yo moko oyo eyinamá ekobimisa. Mpe okoyeba mpenza ete ngai Yehova nde nazali kobɛta yo.+

10 “‘Talá mokolo yango oyo! Talá ezali koya!+ Ngala na yo ekómi.* Lingenda ebimisi fololo. Mpe lofundo ebimisi nkasa. 11 Mobulu ekoli mpe ekómi lingenda ya makambo ya mabe.+ Ezala bango, bozwi na bango, bato na bango ebele to lokumu na bango, moko te akotikala. 12 Ntango yango ekoya, mokolo yango ekokóma. Mosombi asepela te, mpe motɛki alela te, mpo nkanda makasi ezali mpo na ebele ya bato na bango nyonso.*+ 13 Mpo motɛki akozongela te biloko oyo atɛkaki, ata soki atikali na bomoi, mpo emonaneli etali ebele ya bato yango nyonso. Moto moko te akozonga, mpe mpo na libunga na ye* moto moko te akotikala na bomoi.

14 “‘Babɛti kelelo+ mpe moto nyonso amibongisi, kasi moto moko te azali kokende etumba, mpo nazali na nkanda makasi ya ebele ya bato yango nyonso.+ 15 Etumba* ezali libándá,+ mpe maladi mabe ná nzala ezali na kati. Moto nyonso oyo azali na elanga, akokufa na etumba, mpe nzala ná maladi mabe ekolya bango na engumba.+ 16 Bato na bango oyo babiki bakokima mpe bakokende na bangomba. Mpe lokola bibenga ya mabwaku, moto na moto akolelalela ntango akokanisa libunga na ye.+ 17 Mabɔkɔ na bango nyonso ekolɛmba, mpe mabɔlɔngɔ na bango nyonso ekotangisa mai.*+ 18 Balati ngɔtɔ*+ mpe kolɛnga ekangi bango.* Moto nyonso akoyoka nsɔni mpe motó nyonso ekozala na libandi.*+

19 “‘Bakobwaka palata na bango na babalabala, mpe wolo na bango ekokóma eloko moko ya mpii na miso na bango. Ezala palata na bango to wolo na bango ekokoka te kobikisa bango na mokolo ya nkanda makasi ya Yehova.+ Bakotonda te,* mpe bakotondisa misɔpɔ na bango te, mpo ekómi* eloko oyo ebɛtisaka libaku, oyo esali ete básala lisumu. 20 Bazalaki komikumisa mpo na kitoko ya biloko na bango ya monzɛlɛ. Mpe basalaki na yango* bikeko na bango oyo eyinamá, bikeko na bango ya bosɔtɔ.+ Yango wana nakokómisa yango eloko oyo bakoyokela mpii. 21 Nakopesa yango* na lobɔkɔ ya bapaya mpo bápunza yango mpe na bato mabe ya mabele mpo ezala eloko oyo bakobɔtɔla, mpe bakokómisa yango eloko mpamba.

22 “‘Nakopesa bango mokɔngɔ,+ mpe bakokómisa mpamba esika na ngai oyo ebombaná,* miyibi bakokɔta na kati na yango mpe bakokómisa yango eloko mpamba.+

23 “‘Salá monyɔlɔlɔ,*+ mpo mokili etondi na lisambisi oyo ebebisami na makila+ mpe engumba etondi na mobulu.+ 24 Nakomema bato oyo baleki mpenza mabe ya bikólo,+ mpe bakozwa bandako na bango,+ nakosukisa lolendo ya bato ya makasi, mpe bisika na bango mosantu ekokóma eloko mpamba.+ 25 Ntango bakomona bwale, bakoluka kimya, kasi ekozala te.+ 26 Ekozala kaka likama na likama, mpe nsango na nsango, mpe bato bakoluka emonaneli epai ya mosakoli,+ kasi mobeko* ekozala lisusu te epai ya nganga-nzambe mpe toli ekozala lisusu te epai ya bankulutu.+ 27 Mokonzi akozala na mawa makasi,+ nkumu akoyoka nsɔmɔ mpe akolɛmba nzoto, mpe mabɔkɔ ya bato ya mokili ekolɛnga na nsɔmɔ. Nakosalela bango makambo na kolanda etamboli na bango, mpe nakosambisa bango na kolanda ndenge oyo basambisaki basusu. Bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto