Mokanda ya liboso ya Samwele
23 Na nsima, bayebisaki Davidi ete: “Bafilistia bazali kobundisa engumba Keila,+ mpe bazali kopunza bisika oyo batutatutaka mbuma.” 2 Na yango Davidi atunaki Yehova:+ “Nasengeli kokende koboma Bafilistia wana?” Yehova alobaki na Davidi: “Kende koboma Bafilistia yango mpe bikisá Keila.” 3 Kasi bato ya Davidi balobaki na ye: “Talá! Tozali naino awa na Yuda,+ kasi tozali kobanga; sikoyo ekozala boni soki tokei na Keila kobunda na limpinga ya basoda ya Bafilistia?”+ 4 Na yango, Davidi atunaki lisusu Yehova.+ Yehova ayanolaki ye: “Tɛlɛmá mpe kende na Keila, mpo nakopesa Bafilistia na lobɔkɔ na yo.”+ 5 Bongo Davidi akendaki ná bato na ye na Keila mpe abundaki na Bafilistia. Davidi abomaki ebele mpenza ya Bafilistia mpe azwaki bibwɛlɛ na bango; na ndenge yango, abikisaki bato ya Keila.+
6 Ntango Abiatare+ mwana ya Ahimeleke akimaki epai ya Davidi na Keila, azalaki na efode moko. 7 Bayebisaki Saulo ete: “Davidi ayei na Keila.” Bongo Saulo alobaki: “Nzambe atɛki ye na lobɔkɔ na ngai,+ mpo amitye na motambo na ndenge akɔti na engumba oyo ezali na baporte mpe na bikangiseli.” 8 Na yango Saulo abengisaki basoda na ye nyonso mpo bákita na Keila mpe bázinga Davidi ná bato na ye. 9 Ntango Davidi ayokaki ete Saulo azali kokana kosala ye mabe, alobaki na nganga-nzambe Abiatare: “Yaká na efode awa.”+ 10 Na nsima, Davidi abondelaki boye: “Ee Yehova Nzambe ya Yisraele, mosaleli na yo ayoki ete Saulo alingi koya na Keila mpo na kobebisa engumba oyo mpo na ngai.+ 11 Bankumu* ya Keila bakokaba ngai na lobɔkɔ na ye? Saulo akokita mpenza awa, ndenge mosaleli na yo ayoki nsango? Ee Yehova Nzambe ya Yisraele, nabondeli yo, yanolá mosaleli na yo.” Bongo Yehova alobaki: “Akokita.” 12 Davidi atunaki: “Bankumu ya Keila bakokaba ngai ná bato na ngai na lobɔkɔ ya Saulo?” Yehova ayanolaki: “Ɛɛ, bakokaba bino.”
13 Na mbala moko Davidi atɛlɛmaki elongo na bato na ye soki 600,+ balongwaki na Keila, mpe bakómaki koyengayenga epai na epai. Ntango Saulo ayokaki ete Davidi alongwe na Keila mpe akimi, abimaki lisusu te mpo na kolanda ye. 14 Davidi afandaki na etúká ya ngombangomba na esobe ya Zife,+ na bisika oyo ezali mpasi mpo na kokóma kuna. Saulo akobaki kaka koluka ye,+ kasi Yehova apesaki Davidi na lobɔkɔ na ye te. 15 Davidi ayebaki ete* Saulo abimi mpo na koluka koboma ye.* Na ntango yango, Davidi azalaki na esobe ya Zife, na Horeshe.
16 Sikoyo Yonatane mwana ya Saulo akendaki epai ya Davidi na Horeshe mpo na kolendisa ye akoba kotyela Yehova motema.*+ 17 Alobaki na ye: “Kobanga te, mpo tata na ngai Saulo akozwa yo te. Yo, okokóma mokonzi ya Yisraele,+ mpe ngai, nakokóma moto ya mibale, nsima na yo. Ata tata na ngai Saulo mpe ayebi likambo yango.”+ 18 Na yango, bango mibale basalaki kondimana+ liboso ya Yehova. Davidi atikalaki na Horeshe, kasi Yonatane azongaki na ndako na ye.
19 Na nsima, mibali ya engumba Zife bamataki epai ya Saulo, na Gibea+ mpe balobaki: “Davidi abombani+ na Horeshe,+ na ngomba moke ya Hakila,+ oyo ezali na sudi* ya Yeshimone,*+ na bisika oyo ezali mpasi mpo na kokóma kuna. Esika yango ezali pene na engumba na biso. 20 Ee mokonzi, mokolo nyonso oyo okolinga* kokita awa, kitá mpe biso tokokaba ye na lobɔkɔ ya mokonzi.”+ 21 Na yango Saulo alobaki: “Tiká Yehova apambola bino, mpo boyokeli ngai mawa. 22 Nabondeli bino, bókende mpe bóluka koyeba malamumalamu esika oyo azali mpe moto oyo amonaki ye kuna, mpo bayebisi ngai ete azali mpenza na mayele mabe. 23 Bóluka koyeba malamumalamu bisika nyonso oyo abombanaka, mpe soki bomoni mpenza bisika yango, boyá koyebisa ngai. Na nsima nakokende elongo na bino. Soki azali na mokili yango, nakoluka ye kati na mabota* nyonso ya Yuda.”
24 Na yango, balongwaki wana mpe bakendaki na Zife+ liboso ya Saulo. Na ntango yango, Davidi ná bato na ye bazalaki na esobe ya Maone,+ oyo ezali na Araba,+ na sudi ya Yeshimone. 25 Na nsima, Saulo ayaki elongo na basoda na ye mpo na koluka ye.+ Ntango bayebisaki yango Davidi, na mbala moko akendaki na libanga moko+ oyo ezalaki na esobe ya Maone mpe afandaki kuna. Ntango Saulo ayokaki bongo, alandaki Davidi na esobe ya Maone. 26 Ntango Saulo akómaki na ngámbo moko ya ngomba, Davidi ná bato na ye bazalaki na ngámbo mosusu ya ngomba yango. Davidi azalaki kosala mbangumbangu mpo na kokima+ Saulo, kasi na ntango yango, Saulo ná basoda na ye babandaki kozinga Davidi ná bato na ye mpo na kokanga bango.+ 27 Kasi momemi-nsango moko ayaki epai ya Saulo, alobi: “Yaká noki, mpo Bafilistia bayei kobundisa mboka!” 28 Na yango Saulo atikaki kolanda Davidi+ mpe akendaki kobunda na Bafilistia. Yango wana bapesaki esika yango nkombo: Libanga ya Bokabwani.
29 Na nsima Davidi alongwaki kuna, asimbi nzela, akei kofanda na Ene-gedi,+ na bisika oyo ezali mpasi mpo na kokóma kuna.