Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Yehoahaze, mokonzi ya Yisraele (1-9)

      • Yehoashe, mokonzi ya Yisraele (10-13)

      • Elisha ameki molende ya Yehoashe (14-19)

      • Elisha akufi; mikuwa na ye esekwisi mobali moko (20, 21)

      • Esakweli ya nsuka ya Elisha ekokisami (22-25)

2 Bakonzi 13:1

Mitindami

  • +2Ba 11:2, 21
  • +2Ba 8:26; 9:27
  • +2Ba 10:30, 35

2 Bakonzi 13:2

Mitindami

  • +1Ba 12:28-30; 13:33; 14:16

2 Bakonzi 13:3

Mitindami

  • +Ebr 12:29
  • +Le 26:14, 17
  • +1Ba 19:17; 2Ba 8:12
  • +2Ba 13:24

2 Bakonzi 13:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “akitisaki Yehova motema.”

Mitindami

  • +Kob 3:7; Bas 10:16; 2Ba 14:26, 27

2 Bakonzi 13:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, na kimya mpe kozanga kobanga.

Mitindami

  • +Ne 9:27

2 Bakonzi 13:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “atambolaki na yango.”

  • *

    Tála Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +2Ba 10:29; 17:21
  • +Mib 7:5; 1Ba 14:15; 16:33

2 Bakonzi 13:7

Mitindami

  • +2Ba 8:12; 10:32
  • +Am 1:3

2 Bakonzi 13:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +2Ba 10:35

2 Bakonzi 13:10

Mitindami

  • +2Ba 14:1

2 Bakonzi 13:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Atambolaki na.”

Mitindami

  • +2Ba 10:29

2 Bakonzi 13:12

Mitindami

  • +2Ba 14:8, 13

2 Bakonzi 13:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

  • *

    Elingi koloba, Yeroboame II.

Mitindami

  • +2Ba 10:35; 13:9
  • +2Ba 14:28

2 Bakonzi 13:14

Mitindami

  • +1Ba 19:16
  • +2Ba 2:11, 12

2 Bakonzi 13:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lobiko.”

  • *

    To, “Okolonga.”

Mitindami

  • +1Sa 29:1; 1Ba 20:26

2 Bakonzi 13:19

Mitindami

  • +2Ba 13:25

2 Bakonzi 13:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, prɛnta.

Mitindami

  • +2Ba 1:1; 24:2

2 Bakonzi 13:21

Mitindami

  • +Yn 11:44; Ebr 11:35

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    12/2017, lok. 5

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2005, lok. 11

    15/11/1991, lok. 5

2 Bakonzi 13:22

Mitindami

  • +1Ba 19:15
  • +2Ba 8:12; 10:32

2 Bakonzi 13:23

Mitindami

  • +2Ba 14:26, 27
  • +Eb 13:14-16
  • +Eb 26:3
  • +Eb 28:13; Nz 105:8; Mik 7:20

2 Bakonzi 13:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “abɛtaki ye.”

Mitindami

  • +2Ba 13:19

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 13:12Ba 11:2, 21
2 Bak. 13:12Ba 8:26; 9:27
2 Bak. 13:12Ba 10:30, 35
2 Bak. 13:21Ba 12:28-30; 13:33; 14:16
2 Bak. 13:3Ebr 12:29
2 Bak. 13:3Le 26:14, 17
2 Bak. 13:31Ba 19:17; 2Ba 8:12
2 Bak. 13:32Ba 13:24
2 Bak. 13:4Kob 3:7; Bas 10:16; 2Ba 14:26, 27
2 Bak. 13:5Ne 9:27
2 Bak. 13:62Ba 10:29; 17:21
2 Bak. 13:6Mib 7:5; 1Ba 14:15; 16:33
2 Bak. 13:72Ba 8:12; 10:32
2 Bak. 13:7Am 1:3
2 Bak. 13:92Ba 10:35
2 Bak. 13:102Ba 14:1
2 Bak. 13:112Ba 10:29
2 Bak. 13:122Ba 14:8, 13
2 Bak. 13:132Ba 10:35; 13:9
2 Bak. 13:132Ba 14:28
2 Bak. 13:141Ba 19:16
2 Bak. 13:142Ba 2:11, 12
2 Bak. 13:171Sa 29:1; 1Ba 20:26
2 Bak. 13:192Ba 13:25
2 Bak. 13:202Ba 1:1; 24:2
2 Bak. 13:21Yn 11:44; Ebr 11:35
2 Bak. 13:221Ba 19:15
2 Bak. 13:222Ba 8:12; 10:32
2 Bak. 13:232Ba 14:26, 27
2 Bak. 13:23Eb 13:14-16
2 Bak. 13:23Eb 26:3
2 Bak. 13:23Eb 28:13; Nz 105:8; Mik 7:20
2 Bak. 13:252Ba 13:19
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 13:1-25

Mokanda ya mibale ya

13 Na mbula ya 23 ya boyangeli ya Yehoashe+ mwana ya Ahazia+ mokonzi ya Yuda, Yehoahaze mwana ya Yehu,+ akómaki mokonzi ya Yisraele na Samaria, mpe ayangelaki mbula 17. 2 Akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova, mpe atikaki te kosala lisumu oyo Yeroboame mwana ya Nebate asalisaki Yisraele.+ Alongwaki na yango te. 3 Bongo nkanda ya Yehova+ engalelaki Yisraele,+ mpe apesaki bango na lobɔkɔ ya Hazaele+ mokonzi ya Siri mpe na lobɔkɔ ya Bene-hadade+ mwana ya Hazaele. Yango eumelaki ntango molai.

4 Na nsima Yehoahaze abondelaki Yehova mpo amonisela ye boboto.* Mpe Yehova ayokaki libondeli na ye, mpo amonaki ndenge mokonzi ya Siri azalaki konyokola Yisraele.+ 5 Bongo Yehova apesaki Bayisraele mobikisi+ moko mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Siri. Mpe Bayisraele bakómaki kofanda na bandako na bango ndenge bafandaki liboso.* 6 (Kasi balongwaki te na lisumu oyo libota ya Yeroboame esalaki mpe oyo Yeroboame asalisaki Yisraele.+ Bakobaki kosala lisumu yango,* mpe nzete ya losambo*+ elongwaki te na Samaria.) 7 Yehoahaze atikalaki kaka na basoda 50 oyo batambolaka na mpunda, makalo 10, mpe basoda 10 000 oyo batambolaka na makolo, mpo mokonzi ya Siri abomaki basoda mosusu nyonso,+ anyatanyataki bango lokola putulu oyo ebimaka ntango bazali kotutatuta mbuma.+

8 Makambo mosusu ya lisolo ya Yehoahaze, ná nyonso oyo asalaki, ná nguya na ye nyonso, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yisraele. 9 Na nsima, Yehoahaze akufaki* mpe bakundaki ye na Samaria.+ Mpe Yehoashe mwana na ye akómaki mokonzi na esika na ye.

10 Na mbula ya 37 ya boyangeli ya Yehoashe mokonzi ya Yuda, Yehoashe+ mwana ya Yehoahaze akómaki mokonzi ya Yisraele na Samaria, mpe ayangelaki mbula 16. 11 Akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova. Atikaki te kosala masumu nyonso oyo Yeroboame mwana ya Nebate asalisaki Yisraele.+ Akobaki kosala* masumu yango.

12 Makambo mosusu ya lisolo ya Yehoashe, ná nyonso oyo asalaki, ná nguya na ye nyonso, ná ndenge abundaki na Amazia mokonzi ya Yuda,+ ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yisraele. 13 Na nsima Yehoashe akufaki* mpe bakundaki ye na Samaria, esika moko na bakonzi ya Yisraele.+ Mpe Yeroboame*+ afandaki na kiti na ye ya bokonzi.

14 Ntango Elisha+ abɛlaki maladi oyo ememaki ye na liwa, Yehoashe mokonzi ya Yisraele ayaki epai na ye. Mokonzi ayambaki ye mpe abandaki kolela, alobi: “Tata na ngai, tata na ngai! Likalo ya Yisraele mpe ya bato na ye oyo batambolaka na mpunda!”+ 15 Na nsima Elisha alobaki na ye: “Zwá litimbo ná makula.” Bongo azwaki litimbo ná makula. 16 Mpe Elisha alobaki lisusu na mokonzi ya Yisraele ete: “Simbá litimbo yango na lobɔkɔ na yo.” Bongo, Yehoashe asimbaki litimbo yango na lobɔkɔ na ye. Na nsima, Elisha atyaki mabɔkɔ na ye likoló ya mabɔkɔ ya mokonzi. 17 Bongo alobaki: “Fungolá fɛnɛtrɛ na ngámbo ya ɛsti.” Mpe afungolaki yango. Elisha alobaki na ye: “Bɛtá likula!” Mpe abɛtaki yango. Bongo Elisha alobaki: “Likula oyo elakisi elonga* ya Yehova, ɛɛ likula mpo na kolonga Siri! Okobɛta* Siri na Afeke+ tii okosilisa yango nyɛɛ.”

18 Alobaki na ye lisusu: “Zwá makula.” Mpe mokonzi ya Yisraele azwaki yango. Na nsima alobaki na ye: “Bɛtá yango na mabele.” Bongo abɛtaki yango na mabele mbala misato mpe atikaki. 19 Na yango, moto ya Nzambe ya solo asilikelaki ye mpe alobaki na ye: “Osengelaki kobɛta na mabele mbala mitano to motoba! Boye olingaki mpenza kolonga Siri tii kosilisa yango nyɛɛ. Kasi sikoyo okolonga Siri kaka mbala misato.”+

20 Nsima na yango Elisha akufaki mpe bakundaki ye. Bituluku ya bapunzi+ ya Bamoabe ezalaki koya na Yisraele na ebandeli ya mbula.* 21 Mokolo moko, bato bazalaki kokunda ebembe. Ntango bamonaki etuluku moko ya bapunzi, babwakaki ebembe yango nokinoki na kati ya lilita ya Elisha mpe bakimaki. Ntango kaka ebembe yango etutaki mikuwa ya Elisha, moto yango azongaki na bomoi+ mpe atɛlɛmaki.

22 Hazaele+ mokonzi ya Siri anyokolaki Yisraele+ mikolo nyonso ya boyangeli ya Yehoahaze. 23 Kasi, Yehova amoniselaki bango boboto mpe ayokelaki bango mawa+ mpe atyelaki bango likebi mpo na kondimana oyo asalaki ná Abrahama,+ Yisaka,+ mpe Yakobo.+ Alingaki te kobebisa bango, mpe abwakaki bango te mosika na elongi na ye tii sikoyo. 24 Ntango Hazaele mokonzi ya Siri akufaki, mwana na ye Bene-hadade akómaki mokonzi na esika na ye. 25 Na nsima Yehoashe mwana ya Yehoahaze azwaki lisusu na lobɔkɔ ya Bene-hadade mwana ya Hazaele bingumba oyo Hazaele abɔtɔlaki tata na ye Yehoahaze na etumba. Yehoashe alongaki ye* mbala misato,+ mpe azwaki lisusu bingumba ya Yisraele.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto