Ebandeli
43 Sikoyo, nzala ezalaki makasi na mokili.+ 2 Mpe ntango basilisaki kolya bilei* oyo bautaki na yango na Ezipito,+ tata na bango alobaki na bango ete: “Bózonga mpe bósombela biso mwa bilei.” 3 Bongo Yuda alobaki na ye ete: “Mobali yango akebisaki biso polele mpenza ete: ‘Bokomona elongi na ngai lisusu te soki ndeko na bino azali elongo na bino te.’+ 4 Soki otindi ndeko na biso elongo na biso, tokokita mpe tokosombela yo bilei. 5 Kasi soki akei elongo na biso te, tokokita te, mpo mobali yango alobaki na biso ete: ‘Bokomona elongi na ngai lisusu te soki ndeko na bino azali elongo na bino te.’”+ 6 Bongo Yisraele+ atunaki bango ete: “Mpo na nini botye ngai na mpasi boye, ndenge boyebisi mobali yango ete bozali na ndeko mosusu?” 7 Bayanolaki ete: “Mobali yango atunaki biso na mbala moko makambo na biso mpe ya bandeko na biso, ete: ‘Tata na bino azali naino na bomoi? Bozali na ndeko mosusu?’ mpe toyebisaki ye makambo yango.+ Ndenge nini tokokaki mpenza koyeba ete akoloba na biso, ‘Bókita elongo na ndeko na bino’?”+
8 Na yango Yuda alobaki na Yisraele tata na ye ete: “Tiká mwana aya elongo na ngai,+ mpe tókende, mpo biso ná yo mpe bana na biso+ tótikala na bomoi mpe tókufa te.+ 9 Likambo nyonso ekokómela ye ekozala na motó na ngai.+ Okotuna ye epai na ngai. Soki nazongiseli yo ye te mpe nalakisi yo ye te, wana nakosalela yo lisumu mpo na libela. 10 Kasi soki tolekisaki ntango te, mbɛlɛ tokendaki kuna mpe tozongi mpo na mbala ya mibale.”
11 Bongo Yisraele tata na bango alobaki na bango ete: “Soki ezali bongo, bósala boye, bótya biloko oyo eleki kitoko ya mokili oyo na basaki na bino* mpe bókita na yango epai ya mobali yango, bópesa ye likabo:+ mwa balsame,+ mwa mafuta ya nzoi, ladanume, mposo ya nzete oyo ebimisaka mpaka,+ mbuma ya pisitashe mpe mbuma ya amande. 12 Bózwa mbala mibale motángo ya mbongo oyo bozwaki liboso; bózwa mpe mbongo oyo ezongisamaki na monɔkɔ ya basaki na bino mpe bózongisa yango.+ Mbala mosusu ezalaki libunga. 13 Bózwa ndeko na bino mpe bókende, bózonga epai ya mobali yango. 14 Tiká ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso asala ete mobali yango ayokela bino mawa, mpo abimisela bino ndeko na bino mosusu mpe Benyamina. Kasi, soki ngai nakozanga bana, nazanga bango kaka!”+
15 Bongo mibali yango bazwaki likabo yango, mpe bazwaki na lobɔkɔ na bango motángo ya mbongo mbala mibale, mpe Benyamina. Batɛlɛmaki, bakitaki na Ezipito mpe batɛlɛmaki lisusu liboso ya Yozefe.+ 16 Ntango Yozefe amonaki Benyamina elongo na bango, na mbala moko alobaki na mobali oyo azalaki kokamba ndako na ye ete: “Memá mibali oyo na ndako mpe bomá banyama mpe bongisá bilei, mpo mibali oyo bakolya elongo na ngai na midi.” 17 Na mbala moko, mobali yango asalaki kaka ndenge Yozefe alobaki,+ mpe amemaki bango na ndako ya Yozefe. 18 Kasi babangaki ntango bamemaki bango na ndako ya Yozefe, mpe babandaki koloba ete: “Ezali mpo na mbongo oyo bazongiselaki biso na kati ya basaki na biso na mbala oyo elekaki nde bamemi biso awa. Sikoyo bakokanga biso mpe bakokómisa biso baombo mpe bakozwa bampunda na biso!”+
19 Na yango, bapusanaki epai ya mobali oyo azalaki kokamba ndako ya Yozefe mpe basololaki na ye na porte ya ndako. 20 Balobaki ete: “Limbisá biso, nkolo na ngai! Mbala oyo elekaki tokitaki mpo na kosomba bilei.+ 21 Kasi ntango tokómaki na esika ya kolala mpe tobandaki kofungola basaki na biso, talá mbongo ya moto na moto ezalaki na monɔkɔ ya saki na ye, mbongo nyonso oyo tozalaki na yango.+ Tolingi mpenza kozongisa yango. 22 Mpe tomemi mbongo mosusu mpo na kosomba bilei. Toyebi te nani atyaki mbongo na biso na basaki na biso.”+ 23 Bongo alobaki ete: “Bókitisa motema. Bóbanga te, Nzambe na bino mpe Nzambe ya tata na bino atyelaki bino bomɛngo kati na basaki na bino. Mbongo na bino ekómaki liboso epai na ngai.” Nsima na yango, abimiselaki bango Simeone.+
24 Bongo mobali yango akɔtisaki bango na ndako ya Yozefe, apesaki bango mai ya kosukola makolo mpe apesaki bampunda na bango bilei. 25 Babongisaki likabo+ mpo na Yozefe ntango akoya na midi, mpo bayokaki ete bakolya kuna.+ 26 Ntango Yozefe akɔtaki na ndako, bamemelaki ye likabo na bango na ndako mpe bafukamaki bilongi na nse liboso na ye.+ 27 Nsima na yango, atunaki bango soki bazali malamu mpe alobaki ete: “Tata na bino ya mobange oyo bolobelaki, azali malamu? Azali naino na bomoi?”+ 28 Na yango, balobaki ete: “Mosaleli na yo, tata na biso azali malamu. Azali naino na bomoi.” Bongo bagumbamaki mpe bafukamaki bilongi na nse.+
29 Ntango atalaki bango mpe amonaki Benyamina ndeko na ye, mwana ya mama na ye,+ alobaki ete: “Oyo nde ndeko na bino, leki na bino oyo boyebisaki ngai?”+ Abakisaki ete: “Tiká Nzambe amonisela yo boboto na ye, mwana na ngai.” 30 Yozefe abimaki mbangumbangu, mpo akokaki lisusu kokanga motema te mpo na ndeko na ye, bongo alukaki esika mpo na kolela. Na yango, akɔtaki na shambrɛ ya kati mpe kuna alelaki, abimisi mai ya miso.+ 31 Nsima na yango asukolaki elongi na ye, abimaki, akangaki motema mpe alobaki ete: “Bótya bilei.” 32 Batyelaki Yozefe bilei ye moko, bandeko na ye bango na bango mpe Baezipito oyo bazalaki kolya elongo na ye bango na bango, mpo Baezipito bakokaki te kolya esika moko na Baebre, mpo ezali likambo oyo Baezipito bayinaka.+
33 Bandeko na ye bafandaki liboso na ye, mwana ya liboso na esika ya mwana ya liboso+ mpe oyo ya nsuka na esika ya mwana ya nsuka; mpe bazalaki kotalana mpe kokamwa. 34 Azalaki kotinda bázwa biloko na mesa na ye mpo bápesa bango, kasi biloko oyo azalaki kobakisela Benyamina elekaki ya baoyo mosusu nyonso mbala mitano.+ Na bongo balyaki lokola na fɛti, bamɛlaki elongo na ye mpe batondaki.