Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 14
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Amazia, mokonzi ya Yuda (1-6)

      • Etumba ná Edome, mpe ná Yisraele (7-14)

      • Liwa ya Yehoashe, mokonzi ya Yisraele (15, 16)

      • Liwa ya Amazia (17-22)

      • Yeroboame II, mokonzi ya Yisraele (23-29)

2 Bakonzi 14:1

Mitindami

  • +2Ba 13:10

2 Bakonzi 14:2

Mitindami

  • +2Nt 25:1-4

2 Bakonzi 14:3

Mitindami

  • +1Ba 15:5
  • +2Nt 24:2

2 Bakonzi 14:4

Mitindami

  • +1Ba 15:14
  • +2Ba 12:1, 3

2 Bakonzi 14:5

Mitindami

  • +2Ba 12:20; 2Nt 24:25

2 Bakonzi 14:6

Mitindami

  • +Mib 24:16

2 Bakonzi 14:7

Mitindami

  • +2Ba 8:20
  • +2Sa 8:13; 1Nt 18:12
  • +2Nt 25:11, 12

2 Bakonzi 14:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “tótalana bilongi.”

Mitindami

  • +2Nt 25:17-19

2 Bakonzi 14:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ndako ya mokonzi.”

Mitindami

  • +2Ba 14:7

2 Bakonzi 14:11

Mitindami

  • +2Nt 25:15, 16
  • +Yos 15:10, 12; 21:8, 16
  • +2Nt 25:20-24

2 Bakonzi 14:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “hema.”

2 Bakonzi 14:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Soki 178 m. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +Ne 8:16; 12:38, 39
  • +Yir 31:38; Zek 14:10

2 Bakonzi 14:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

  • *

    Elingi koloba, Yeroboame II.

Mitindami

  • +2Ba 10:35; 13:9
  • +Hos 1:1; Am 1:1; 7:10

2 Bakonzi 14:17

Mitindami

  • +2Ba 14:1
  • +2Ba 13:10
  • +2Nt 25:25-28

2 Bakonzi 14:19

Mitindami

  • +2Ba 12:20

2 Bakonzi 14:20

Mitindami

  • +1Ba 2:10

2 Bakonzi 14:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “Yehova asalisi.” Abengami Uzia na 2Bak 15:13; 2Nt 26:1-23; Yis 6:1; mpe Zek 14:5.

Mitindami

  • +Mt 1:8
  • +2Ba 15:1, 2
  • +2Nt 26:1

2 Bakonzi 14:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, tata na ye Amazia.

  • *

    To, “kolala na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +Mib 2:8; 1Ba 9:26; 2Ba 16:6
  • +2Nt 26:2

2 Bakonzi 14:23

Mitindami

  • +Hos 1:1; Am 1:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 153

2 Bakonzi 14:24

Mitindami

  • +1Ba 12:28-30; 13:34; Nz 106:20

2 Bakonzi 14:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekɔtelo ya Hamate.”

  • *

    Elingi koloba, Mbu ya Mungwa, to Mbu Ekufá.

Mitindami

  • +Mit 13:21; 34:2, 7, 8
  • +Mib 3:16, 17
  • +Yon 1:1; Mt 12:39
  • +Yos 19:10, 13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 108-109

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2009, lok. 25

    “Makomami nyonso,” lok. 153

2 Bakonzi 14:26

Mitindami

  • +Kob 3:7; Bas 10:16; Nz 106:43, 44

2 Bakonzi 14:27

Mitindami

  • +Yir 31:20
  • +2Ba 13:4, 5

2 Bakonzi 14:28

Mitindami

  • +2Sa 8:6
  • +2Nt 8:3

2 Bakonzi 14:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +2Ba 15:8

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 14:12Ba 13:10
2 Bak. 14:22Nt 25:1-4
2 Bak. 14:31Ba 15:5
2 Bak. 14:32Nt 24:2
2 Bak. 14:41Ba 15:14
2 Bak. 14:42Ba 12:1, 3
2 Bak. 14:52Ba 12:20; 2Nt 24:25
2 Bak. 14:6Mib 24:16
2 Bak. 14:72Ba 8:20
2 Bak. 14:72Sa 8:13; 1Nt 18:12
2 Bak. 14:72Nt 25:11, 12
2 Bak. 14:82Nt 25:17-19
2 Bak. 14:102Ba 14:7
2 Bak. 14:112Nt 25:15, 16
2 Bak. 14:11Yos 15:10, 12; 21:8, 16
2 Bak. 14:112Nt 25:20-24
2 Bak. 14:13Ne 8:16; 12:38, 39
2 Bak. 14:13Yir 31:38; Zek 14:10
2 Bak. 14:162Ba 10:35; 13:9
2 Bak. 14:16Hos 1:1; Am 1:1; 7:10
2 Bak. 14:172Ba 14:1
2 Bak. 14:172Ba 13:10
2 Bak. 14:172Nt 25:25-28
2 Bak. 14:192Ba 12:20
2 Bak. 14:201Ba 2:10
2 Bak. 14:21Mt 1:8
2 Bak. 14:212Ba 15:1, 2
2 Bak. 14:212Nt 26:1
2 Bak. 14:22Mib 2:8; 1Ba 9:26; 2Ba 16:6
2 Bak. 14:222Nt 26:2
2 Bak. 14:23Hos 1:1; Am 1:1
2 Bak. 14:241Ba 12:28-30; 13:34; Nz 106:20
2 Bak. 14:25Mit 13:21; 34:2, 7, 8
2 Bak. 14:25Mib 3:16, 17
2 Bak. 14:25Yon 1:1; Mt 12:39
2 Bak. 14:25Yos 19:10, 13
2 Bak. 14:26Kob 3:7; Bas 10:16; Nz 106:43, 44
2 Bak. 14:27Yir 31:20
2 Bak. 14:272Ba 13:4, 5
2 Bak. 14:282Sa 8:6
2 Bak. 14:282Nt 8:3
2 Bak. 14:292Ba 15:8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 14:1-29

Mokanda ya mibale ya

14 Na mbula ya mibale ya boyangeli ya Yehoashe+ mwana ya Yehoahaze mokonzi ya Yisraele, Amazia mwana ya Yehoashe mokonzi ya Yuda akómaki mokonzi. 2 Amazia azalaki na mbula 25 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 29 na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Yehoadine, moto ya Yerusaleme.+ 3 Amazia akobaki kosala makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova, kasi te lokola nkɔkɔ na ye Davidi.+ Alandaki kaka lokolo ya tata na ye Yehoashe.+ 4 Kasi bisika oyo etombwaná elongwaki te na ekólo.+ Bato bazalaki se kopesa mbeka mpe kobimisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná.+ 5 Ntango kaka Amazia afandisaki bokonzi na ye makasi, abomaki basaleli na ye oyo babomaki mokonzi, tata na ye.+ 6 Kasi abomaki bana ya babomi yango te, na boyokani na mitindo ya Yehova oyo ekomami na buku ya Mobeko ya Moize: “Batata bakobomama te mpo na masumu ya bana na bango, mpe bana bakobomama te mpo na masumu ya batata na bango; kasi moto na moto akobomama mpo na lisumu na ye moko.”+ 7 Mokolo moko Amazia abomaki Baedome+ 10 000 na Lobwaku ya Mungwa.+ Na etumba yango, abɔtɔlaki engumba Sela+ mpe ekómaki kobengama Yokoteele, tii na mokolo ya lelo.

8 Na nsima Amazia atindaki bamemi-nsango epai ya Yehoashe mwana ya Yehoahaze mwana ya Yehu mokonzi ya Yisraele, alobi: “Yaká tóbunda.”*+ 9 Yehoashe mokonzi ya Yisraele atindelaki Amazia mokonzi ya Yuda maloba oyo: “Lititi ya nzubɛnzubɛ ya Liban etindelaki sɛdrɛ ya Liban maloba ete: ‘Pesá mwana na ngai ya mobali mwana na yo ya mwasi mpo abala ye.’ Nzokande, nyama moko ya zamba ya Liban elekaki wana mpe enyataki lititi yango ya nzubɛnzubɛ. 10 Ya solo olongi Edome,+ yango wana motema na yo ekómi na lolendo. Sepelá na nkembo na yo, kasi fandá na ndako na yo.* Mpo na nini olingi komilukela mpasi mpe kokwea, yo elongo na Yuda?” 11 Kasi Amazia ayokaki te.+

Na yango, Yehoashe mokonzi ya Yisraele akendaki kobunda na Amazia mokonzi ya Yuda na Bete-shemeshe,+ oyo ezali na Yuda.+ 12 Yisraele elongaki Yuda. Bongo basoda ya Yuda bakimaki moto na moto na ndako* na ye. 13 Na Bete-shemeshe, Yehoashe mokonzi ya Yisraele akangaki Amazia mokonzi ya Yuda mwana ya Yehoashe mwana ya Ahazia. Na nsima ayaki na Yerusaleme, mpe kuna abukaki ndambo ya efelo ya Yerusaleme, banda na Porte ya Efraime+ tii na Porte ya Litumu;+ esika oyo etikalaki polele ezalaki mapeko 400.* 14 Azwaki wolo nyonso mpe palata nyonso ná biloko nyonso oyo ezalaki na ndako ya Yehova mpe na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi. Azwaki mpe bakangami. Na nsima, azongaki na Samaria.

15 Makambo mosusu ya lisolo ya Yehoashe, ná nyonso oyo asalaki, ná nguya na ye nyonso, ná ndenge abundaki na Amazia mokonzi ya Yuda, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yisraele. 16 Na nsima Yehoashe akufaki* mpe bakundaki ye na Samaria+ esika moko na bakonzi ya Yisraele; mpe mwana na ye Yeroboame*+ akómaki mokonzi na esika na ye.

17 Amazia+ mwana ya Yehoashe mokonzi ya Yuda aumelaki lisusu na bomoi mbula 15 nsima ya liwa ya Yehoashe+ mwana ya Yehoahaze mokonzi ya Yisraele.+ 18 Makambo mosusu ya lisolo ya Amazia, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yuda. 19 Na nsima basalelaki Amazia likita+ na Yerusaleme, mpe akimaki na Lakishi; kasi batindaki bato bálanda ye na Lakishi mpe babomaki ye kuna. 20 Bongo bamemaki ebembe na ye na Yerusaleme, na likalo oyo bampunda ezalaki kobenda, mpe bakundaki ye esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi.+ 21 Na nsima bato nyonso ya Yuda bazwaki Azaria,*+ oyo azalaki na mbula 16,+ mpe batyaki ye mokonzi na esika ya tata na ye Amazia.+ 22 Ye atongaki lisusu engumba Elate+ mpe azongiselaki yango Yuda, wana mokonzi* asilaki kokufa.*+

23 Na mbula ya 15 ya boyangeli ya Amazia mokonzi ya Yuda mwana ya Yehoashe, Yeroboame+ mwana ya Yehoashe mokonzi ya Yisraele akómaki mokonzi na Samaria. Mpe ayangelaki mbula 41. 24 Akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova. Atikaki te kosala masumu nyonso oyo Yeroboame mwana ya Nebate asalisaki Yisraele.+ 25 Azongisaki ndelo ya Yisraele banda na Lebo-hamate*+ tii na Mbu ya Araba,*+ ndenge kaka Yehova Nzambe ya Yisraele alobaki na nzela ya mosaleli na ye Yona+ mwana ya Amitai, mosakoli oyo azalaki moto ya Gate-efere.+ 26 Mpo Yehova amonaki mpasi makasi oyo Yisraele ekómaki na yango.+ Ezalaki ata na moto moko te mpo na kosalisa Yisraele, ezala moto oyo azangi makoki to oyo azangi ntina. 27 Kasi Yehova alakaki ete akolongola nkombo ya Yisraele te na mabele.+ Na yango, abikisaki bango na nzela ya lobɔkɔ ya Yeroboame mwana ya Yehoashe.+

28 Makambo mosusu ya lisolo ya Yeroboame, ná nyonso oyo asalaki, ná nguya na ye nyonso, ná ndenge abundaki mpe atyaki lisusu Damasi+ mpe Hamate+ na nse ya bokonzi ya Yuda na Yisraele, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yisraele. 29 Na nsima Yeroboame akufaki* mpe bakundaki ye esika moko na bankɔkɔ na ye, bakonzi ya Yisraele. Mpe mwana na ye Zekaria+ akómaki mokonzi na esika na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto