Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 19
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Kolimbola Mibeko

      • Ngambo ya makila mpe bingumba ya ekimelo (1-13)

      • Osengeli te kopusa bilembo ya ndelo ya mabele (14)

      • Batatoli na ntango ya kosamba (15-21)

        • Esɛngi batatoli mibale to misato (15)

Kolimbola Mibeko 19:1

Mitindami

  • +Mib 7:1; 9:1

Kolimbola Mibeko 19:2

Mitindami

  • +Mit 35:14; Yos 20:7, 9

Kolimbola Mibeko 19:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    11/2017, lok. 14

Kolimbola Mibeko 19:4

Mitindami

  • +Mit 35:15; Mib 4:42

Kolimbola Mibeko 19:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “sóka.”

Mitindami

  • +Mit 35:25

Kolimbola Mibeko 19:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “motema na ye ezali mɔtɔmɔtɔ.”

Mitindami

  • +Mit 35:12, 19
  • +Yos 20:4, 5

Kolimbola Mibeko 19:8

Mitindami

  • +Eb 15:18; Kob 23:31; Mib 11:24
  • +Eb 28:14

Kolimbola Mibeko 19:9

Mitindami

  • +Mib 11:22, 23
  • +Yos 20:7, 8

Kolimbola Mibeko 19:10

Mitindami

  • +Mas 6:16, 17
  • +Mib 21:6-9

Kolimbola Mibeko 19:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na ye.”

Mitindami

  • +1Yn 3:15

Kolimbola Mibeko 19:12

Mitindami

  • +Eb 9:6; Kob 21:12; Mit 35:16; Mib 27:24

Kolimbola Mibeko 19:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Liso na yo esengeli te.”

Mitindami

  • +Le 24:17, 21; Mit 35:33; 2Sa 21:1

Kolimbola Mibeko 19:14

Mitindami

  • +Mib 27:17

Kolimbola Mibeko 19:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “akotɛlɛma te mpo na kokweisa.”

  • *

    Lil., “monɔkɔ.”

Mitindami

  • +Mit 35:30; Mib 17:6
  • +Mt 18:16; Yn 8:17; 2Ko 13:1; 1Ti 5:19

Kolimbola Mibeko 19:16

Mitindami

  • +Kob 23:1; 1Ba 21:13; Mr 14:56

Kolimbola Mibeko 19:17

Mitindami

  • +Mib 17:8, 9

Kolimbola Mibeko 19:18

Mitindami

  • +Mib 13:14; 17:4; 2Nt 19:6

Kolimbola Mibeko 19:19

Mitindami

  • +Mas 19:5
  • +Mib 21:20, 21; 24:7; 1Ko 5:13

Kolimbola Mibeko 19:20

Mitindami

  • +Mib 13:11; 17:13; 1Ti 5:20

Kolimbola Mibeko 19:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Liso na yo esengeli.”

  • *

    To, “molimo.”

  • *

    To, “molimo.”

Mitindami

  • +Mib 19:13
  • +Kob 21:23-25; Le 24:20; Mt 5:38

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Biyano na mituna ya Biblia, lok. 149

    Penepene na Yehova, lok. 131

    Mokili mozangi bitumba?, lok. 14

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mib. 19:1Mib 7:1; 9:1
Mib. 19:2Mit 35:14; Yos 20:7, 9
Mib. 19:4Mit 35:15; Mib 4:42
Mib. 19:5Mit 35:25
Mib. 19:6Mit 35:12, 19
Mib. 19:6Yos 20:4, 5
Mib. 19:8Eb 15:18; Kob 23:31; Mib 11:24
Mib. 19:8Eb 28:14
Mib. 19:9Mib 11:22, 23
Mib. 19:9Yos 20:7, 8
Mib. 19:10Mas 6:16, 17
Mib. 19:10Mib 21:6-9
Mib. 19:111Yn 3:15
Mib. 19:12Eb 9:6; Kob 21:12; Mit 35:16; Mib 27:24
Mib. 19:13Le 24:17, 21; Mit 35:33; 2Sa 21:1
Mib. 19:14Mib 27:17
Mib. 19:15Mit 35:30; Mib 17:6
Mib. 19:15Mt 18:16; Yn 8:17; 2Ko 13:1; 1Ti 5:19
Mib. 19:16Kob 23:1; 1Ba 21:13; Mr 14:56
Mib. 19:17Mib 17:8, 9
Mib. 19:18Mib 13:14; 17:4; 2Nt 19:6
Mib. 19:19Mas 19:5
Mib. 19:19Mib 21:20, 21; 24:7; 1Ko 5:13
Mib. 19:20Mib 13:11; 17:13; 1Ti 5:20
Mib. 19:21Mib 19:13
Mib. 19:21Kob 21:23-25; Le 24:20; Mt 5:38
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Kolimbola Mibeko 19:1-21

Kolimbola Mibeko

19 “Ntango Yehova Nzambe na yo akobebisa bikólo ya mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, mpe okobengana bango, okofanda na bingumba na bango mpe na bandako na bango,+ 2 okopona bingumba misato na kati ya mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo mpo ozwa yango.+ 3 Okokabola na biteni misato teritware ya mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo akopesa yo mpo ezala ya yo, mpe okobongisa banzela mpo moto nyonso oyo abomi moto akima na moko ya bingumba yango.

4 “Talá oyo moto oyo abomi moto akoki kosala mpo atikala na bomoi: Soki abɛti mozalani na ye na nko te, mpe azalaki koyina ye te liboso;+ 5 to soki akei ná mozalani na ye na zamba mpo na kolɔkɔta nkoni, mpe atomboli lobɔkɔ na ye mpo na kokata nzete na epasola* mpe ebende elongwe na esimbeli na yango, ebɛti mozalani na ye mpe akufi, moto oyo abomi moto yango akokima na moko ya bingumba yango mpo atikala na bomoi.+ 6 Soki asali bongo te, lokola mozongisi mabe mpo na makila+ azali na nkanda,* akoki kolanda mobomi-moto yango, kozwa ye mpe koboma ye, mpo nzela ezalaki molai mpenza tii kokóma na engumba. Nzokande, asengelaki kokufa te, mpo azalaki koyina mozalani na ye te liboso.+ 7 Yango wana nazali kopesa yo mitindo oyo: ‘Poná bingumba misato.’

8 “Soki Yehova Nzambe na yo akómisi teritware na yo monene ndenge alapelaki bankɔkɔ na yo ndai,+ mpe apesi yo mokili mobimba oyo alakaki ete akopesa bankɔkɔ na yo+ 9 —soki otosi malamumalamu mitindo oyo nyonso, oyo nazali kopesa yo lelo, elingi koloba, kolinga Yehova Nzambe na yo mpe kotambola na banzela na ye ntango nyonso+—, bongo osengeli kobakisa bingumba misato mosusu na misato ya liboso.+ 10 Na ndenge yango makila ya moto oyo azali na likambo te ekosopama te+ na mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo libula, mpe okomema ngambo ya makila ata moko te.+

11 “Kasi soki moto moko ayinaki mozalani na ye,+ mpe azeli ye mpo na kobundisa ye mpe abɛti ye* mabe mpenza tii akufi, mpe moto yango akimi na moko ya bingumba yango, 12 bankulutu ya engumba na ye bakotinda moto aluka ye kuna, mpe bakopesa ye na lobɔkɔ ya mozongisi mabe mpo na makila, mpe asengeli kokufa.+ 13 Osengeli te* koyokela ye mawa, mpe osengeli kolongola ngambo ya makila ya moto oyo azali na likambo te na Yisraele,+ mpo ozala malamu.

14 “Ntango okozwa libula na yo na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo mpo ozwa yango, osengeli te kopusa bilembo ya ndelo ya mabele ya mozalani na yo,+ bilembo oyo bankɔkɔ basilá kotya.

15 “Motatoli moko mpamba akoki te kokweisa* moto mpo na libunga to lisumu nyonso oyo akoki kosala.+ Na maloba* ya batatoli mibale to misato nde likambo ekondimama.+ 16 Soki motatoli azali na likanisi ya kosala moto mabe mpe afundi moto yango ete asali likambo moko ya mabe,+ 17 bato yango mibale oyo bazali kowelana bakotɛlɛma liboso ya Yehova, liboso ya banganga-nzambe mpe ya basambisi oyo bakozala na mosala na mikolo yango.+ 18 Basambisi yango bakoluka koyeba likambo yango malamumalamu,+ mpe soki moto yango oyo apesi litatoli azali motatoli ya lokuta mpe likambo oyo afundi ndeko na ye ezali ya lokuta, 19 osengeli kosala ye kaka ndenge akanaki kosala ndeko na ye,+ mpe osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.+ 20 Baoyo batikali bakoyoka mpe bakobanga, mpe moto moko te kati na bino akosala lisusu likambo ya mabe bongo.+ 21 Osengeli* te koyoka mawa:+ bomoi* mpo na bomoi,* liso mpo na liso, lino mpo na lino, lobɔkɔ mpo na lobɔkɔ, lokolo mpo na lokolo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto