Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 14
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Bakonzi

      • Esakweli ya Ahiya mpo na Yeroboame (1-20)

      • Boyangeli ya Rehoboame na Yuda (21-31)

        • Etumba ya Shishake (25, 26)

1 Bakonzi 14:2

Mitindami

  • +1Ba 11:30, 31

1 Bakonzi 14:4

Mitindami

  • +Yos 18:1; 1Sa 4:3

1 Bakonzi 14:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Osengeli koyebisa ye boye na boye.”

1 Bakonzi 14:7

Mitindami

  • +1Ba 11:30, 31; 12:20

1 Bakonzi 14:8

Mitindami

  • +1Ba 12:16
  • +1Ba 15:5; Mis 13:22

1 Bakonzi 14:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ya ebende oyo enyangwisami.”

Mitindami

  • +Mib 27:15; 2Nt 11:15
  • +Ne 9:26; Nz 50:17

1 Bakonzi 14:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “nakoboma.”

  • *

    Lil., “moto nyonso oyo asubaka na efelo.” Ezali maloba ya Ebre oyo esalemaka mpo na kotyola mibali.

Mitindami

  • +1Ba 15:25-29

1 Bakonzi 14:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Penepene na Yehova, lok. 244

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2010, lok. 29

    1/7/2005, lok. 31

    1/4/1995, lok. 12

1 Bakonzi 14:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “akoboma.”

Mitindami

  • +1Ba 15:25-29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Esakweli ya Yisaya I, nk. 133-134

1 Bakonzi 14:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, Efrate.

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mib 8:7-9; 29:28; Yos 23:15; 2Ba 17:6
  • +Mib 28:64; 2Ba 15:29; 18:11
  • +Mib 12:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Esakweli ya Yisaya I, nk. 133-134

1 Bakonzi 14:16

Mitindami

  • +1Ba 12:28-30; 13:33, 34

1 Bakonzi 14:19

Mitindami

  • +2Nt 12:15; 13:3

1 Bakonzi 14:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +2Nt 13:20
  • +1Ba 15:25

1 Bakonzi 14:21

Mitindami

  • +Nz 78:68; 132:13
  • +Kob 20:24; Mib 12:5, 6; 1Ba 8:16, 17
  • +1Ba 11:1; 2Nt 12:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/2011, lok. 10

1 Bakonzi 14:22

Mitindami

  • +1Ba 11:7; 2Nt 12:1
  • +Yis 65:2

1 Bakonzi 14:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Le 26:1
  • +Yis 65:7
  • +Mib 12:2, 3; Yis 57:5; Yir 2:20; Hos 4:13

1 Bakonzi 14:24

Mitindami

  • +Mib 23:17, 18; 1Ba 15:11, 12; 22:46; 2Ba 23:7; Hos 4:14

1 Bakonzi 14:25

Mitindami

  • +1Ba 11:40
  • +2Nt 12:2-4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 295

1 Bakonzi 14:26

Mitindami

  • +1Ba 7:51; 15:18; 2Ba 18:14, 15; 24:12, 13
  • +1Ba 10:16, 17; 2Nt 12:9-11

1 Bakonzi 14:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bapoti-mbangu.”

1 Bakonzi 14:29

Mitindami

  • +1Nt 27:24; 2Nt 12:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2009, lok. 32

1 Bakonzi 14:30

Mitindami

  • +1Ba 15:6

1 Bakonzi 14:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Bazalaki mpe kobenga ye Abiya.

Mitindami

  • +1Ba 11:43
  • +1Ba 11:1; 2Nt 12:13
  • +1Nt 3:10; Mt 1:7

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Bak. 14:21Ba 11:30, 31
1 Bak. 14:4Yos 18:1; 1Sa 4:3
1 Bak. 14:71Ba 11:30, 31; 12:20
1 Bak. 14:81Ba 12:16
1 Bak. 14:81Ba 15:5; Mis 13:22
1 Bak. 14:9Mib 27:15; 2Nt 11:15
1 Bak. 14:9Ne 9:26; Nz 50:17
1 Bak. 14:101Ba 15:25-29
1 Bak. 14:141Ba 15:25-29
1 Bak. 14:15Mib 8:7-9; 29:28; Yos 23:15; 2Ba 17:6
1 Bak. 14:15Mib 28:64; 2Ba 15:29; 18:11
1 Bak. 14:15Mib 12:3
1 Bak. 14:161Ba 12:28-30; 13:33, 34
1 Bak. 14:192Nt 12:15; 13:3
1 Bak. 14:202Nt 13:20
1 Bak. 14:201Ba 15:25
1 Bak. 14:21Nz 78:68; 132:13
1 Bak. 14:21Kob 20:24; Mib 12:5, 6; 1Ba 8:16, 17
1 Bak. 14:211Ba 11:1; 2Nt 12:13
1 Bak. 14:221Ba 11:7; 2Nt 12:1
1 Bak. 14:22Yis 65:2
1 Bak. 14:23Le 26:1
1 Bak. 14:23Yis 65:7
1 Bak. 14:23Mib 12:2, 3; Yis 57:5; Yir 2:20; Hos 4:13
1 Bak. 14:24Mib 23:17, 18; 1Ba 15:11, 12; 22:46; 2Ba 23:7; Hos 4:14
1 Bak. 14:251Ba 11:40
1 Bak. 14:252Nt 12:2-4
1 Bak. 14:261Ba 7:51; 15:18; 2Ba 18:14, 15; 24:12, 13
1 Bak. 14:261Ba 10:16, 17; 2Nt 12:9-11
1 Bak. 14:291Nt 27:24; 2Nt 12:15
1 Bak. 14:301Ba 15:6
1 Bak. 14:311Ba 11:43
1 Bak. 14:311Ba 11:1; 2Nt 12:13
1 Bak. 14:311Nt 3:10; Mt 1:7
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Bakonzi 14:1-31

Mokanda ya liboso ya Bakonzi

14 Na ntango wana, Abiya mwana ya Yeroboame abɛlaki. 2 Bongo Yeroboame alobaki na mwasi na ye: “Nabondeli yo, kende mpe salá na boye ete bato báyeba te ete ozali mwasi ya Yeroboame; na nsima kende na Shilo. Talá! mosakoli Ahiya azali kuna. Ye nde alobaki na ngai ete nakokóma mokonzi ya bato oyo.+ 3 Zwá mampa zomi, ná bagato, ná molangi moko ya mafuta ya nzoi, mpe kende epai na ye. Bongo ye akoyebisa yo nini ekokómela mwana na biso.”

4 Mwasi ya Yeroboame asalaki kaka ndenge alobaki na ye. Asimbaki nzela akei na Shilo,+ na ndako ya Ahiya. Nzokande, Ahiya azalaki komona lisusu te mpe miso na ye ezalaki koningana lisusu te mpo akómaki mokóló mingi.

5 Kasi Yehova ayebisaki Ahiya: “Talá, mwasi ya Yeroboame azali koya kotuna yo likambo nini ekokómela mwana na ye, mpo azali kobɛla. Nakoyebisa yo makambo oyo okoloba na ye.* Ntango akokóma, akosala ete bato báyeba ye te.”

6 Ntango kaka Ahiya ayokaki makɛlɛlɛ ya makolo ya mwasi yango, wana azalaki kopusana na esika ya kokɔta, alobaki na ye: “Kɔtá, mwasi ya Yeroboame. Mpo na nini osali ete bato báyeba yo te? Nzambe atindi ngai nayebisa yo nsango moko ya mabe. 7 Kende koyebisa Yeroboame ete: ‘Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: “Ngai nde naponaki yo na kati ya bato na yo mpe nakómisaki yo mokambi ya bato na ngai Yisraele.+ 8 Na nsima, nabɔtɔlaki bokonzi na libota ya Davidi mpe napesaki yo yango.+ Kasi osali makambo te lokola mosaleli na ngai Davidi. Mpo ye atosaki mibeko na ngai, alandaki ngai na motema na ye mobimba mpe azalaki kosala kaka oyo ezali malamu na miso na ngai.+ 9 Kasi osali makambo ya mabe mpenza koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki liboso na yo. Omisaleli nzambe mosusu mpe bikeko ya ebende* mpo na kopesa ngai nkanda.+ Ezali ngai nde opesi mokɔngɔ.+ 10 Yango wana, nazali komemela libota ya Yeroboame mpasi, mpe nakosilisa* mpenza mobali nyonso* na libota ya Yeroboame, ezala oyo azangi mpenza ntina na Yisraele. Lisusu, nakokɔmbɔla mpenza libota na ye+ kaka ndenge bakɔmbɔlaka nyɛi ya nyama tii nyonso ekosila. 11 Moto nyonso ya libota ya Yeroboame oyo akokufa na engumba, bambwa ekolya ye; mpe oyo akokufa na esobe, bandɛkɛ ya likoló ekolya ye, mpo Yehova nde alobi bongo.”’

12 “Sikoyo tɛlɛmá mpe kende na ndako na yo. Ntango kaka okotya makolo na yo na engumba, mwana na bino akokufa. 13 Bato nyonso ya Yisraele bakolela ye mpe bakokunda ye. Mpo, na bato nyonso ya libota ya Yeroboame, kaka ye nde bakokunda na lilita. Mpo, na libota mobimba ya Yeroboame, kaka epai na ye nde Yehova Nzambe ya Yisraele amoni eloko moko ya malamu. 14 Yehova akopona mokonzi moko oyo akoyangela Yisraele. Mokonzi yango akosilisa* libota mobimba ya Yeroboame+ banda na mokolo ya lelo; ɛɛ, kutu akosala yango ata sikoyo! 15 Yehova akobɛta Yisraele, kaka ndenge mai ebɛtaka matiti oyo ezalaka na ebale. Akopikola Yisraele na mokili kitoko oyo apesaki bankɔkɔ na bango,+ mpe akopanza bango tii koleka ngámbo ya Ebale,*+ mpo basali banzete ya losambo,*+ mpe basilikisi Yehova. 16 Mpe akosundola Yisraele mpo na masumu oyo Yeroboame asali mpe oyo asalisi Yisraele.”+

17 Na yango, mwasi ya Yeroboame atɛlɛmaki mpe asimbaki nzela akei na Tireza. Ntango akómaki liboso ya ekɔtelo ya ndako, mwana na bango akufaki. 18 Bongo bakundaki ye, mpe Yisraele mobimba elelaki ye, kaka ndenge Yehova alobaki yango na nzela ya mosaleli na ye mosakoli Ahiya.

19 Makambo mosusu ya lisolo ya Yeroboame, bitumba oyo abundaki+ mpe ndenge oyo ayangelaki, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yisraele. 20 Yeroboame ayangelaki mbula 22, na nsima akufaki.*+ Mpe mwana na ye Nadabe akómaki mokonzi na esika na ye.+

21 Nzokande, Rehoboame mwana ya Salomo azalaki mokonzi na Yuda. Azalaki na mbula 41 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 17 na Yerusaleme, engumba oyo Yehova aponaki+ na teritware ya mabota nyonso ya Yisraele mpo na kotya nkombo na ye kuna.+ Nkombo ya mama ya Rehoboame ezalaki Naama, Moamone.+ 22 Yuda ezalaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova.+ Mpo na masumu oyo basalaki, basilikisaki Nzambe mingi koleka ndenge oyo bankɔkɔ na bango basilikisaki ye.+ 23 Bango mpe bakobaki komitongela bisika oyo etombwaná, makonzí ya losambo mpe banzete ya losambo*+ na ngomba moke nyonso oyo etombwaná+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa.+ 24 Ezalaki mpe na mibali oyo basalaka bondumba na bisika ya losambo na mokili yango.+ Bato ya Yuda bazalaki kosala makambo nyonso ya bosɔtɔ ndenge moko na bato ya bikólo oyo Yehova abenganaki mpo na kopesa Bayisraele mokili na bango.

25 Na mbula ya mitano ya boyangeli ya Rehoboame, Shishake+ mokonzi ya Ezipito amataki kobundisa Yerusaleme.+ 26 Azwaki biloko ya motuya ya ndako ya Yehova mpe biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi.+ Azwaki eloko nyonso, ata mpe banguba nyonso ya wolo oyo Salomo asalaki.+ 27 Bongo na esika na yango, Mokonzi Rehoboame asalaki banguba ya kwivre, mpe apesaki yango na mabɔkɔ ya bakonzi ya bakɛngɛli* oyo bazalaki kokɛngɛla ekɔtelo ya ndako ya mokonzi. 28 Mbala nyonso oyo mokonzi azalaki koya na ndako ya Yehova, bakɛngɛli bazalaki komema banguba yango. Na nsima bazalaki kozongisa yango na mwa ndako ya bakɛngɛli.

29 Makambo mosusu ya lisolo ya Rehoboame, ná nyonso oyo asalaki, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yuda.+ 30 Etumba ezalaki ntango nyonso kati na Rehoboame ná Yeroboame.+ 31 Na nsima, Rehoboame akufaki mpe bakundaki ye esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi.+ Nkombo ya mama na ye ezalaki Naama, Moamone.+ Mpe mwana na ye Abiyame*+ akómaki mokonzi na esika na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto