Yisaya
18 Mawa na mboka ya nyama-nkɛkɛ oyo mapapu na yango esalaka makɛlɛlɛ,
Oyo ezali na etúká ya bibale ya Etiopi!+
2 Ezali kotinda bato na nzela ya mbu,
Na nzela ya bamasuwa ya papirisi oyo ekatisaka mai, elobi:
“Bino bamemi-nsango ya lombangu, bókende
Epai ya ekólo ya bato ya milaimilai mpe ya loposo sɛlisɛli,*
Bato oyo babangisaka na esika nyonso,+
Na ekólo ya makasi mpe oyo elongaka,*
Oyo bibale ekɔmbɔlá mabele na yango.”
3 Bino nyonso, bato oyo bofandi na mokili, mpe bino baoyo bofandi na mabele,
Oyo bokomona ekozala lokola elembo oyo batɛlɛmisi na bangomba,
Mpe bokoyoka lokito lokola na ntango bayulaka liseke.
4 Mpo talá oyo Yehova alobi na ngai:
“Nakotikala kimya mpe nakotala* esika na ngai ya libela,
Lokola molunge ná kongɛnga ya moi,
Lokola lipata ya mamwɛ* na molunge ya ntango ya kobuka mbuma.
5 Mpo liboso ya ntango ya kobuka mbuma,
Ntango fololo esilaka mpe fololo ekómaka mbuma ya vinyo oyo eteli,
Bitape ya mike ekokatama na makwangola ya kokata matiti
Mpe bitape oyo elíngamalíngamá, ekokatama mpe ekolongolama.
6 Bango nyonso bakotikala mpo na bandɛkɛ oyo ekangaka banyama na bangomba
Mpe mpo na banyama ya mabele.
Bandɛkɛ oyo ekangaka banyama ekolekisa eleko ya molunge likoló na bango,
Mpe banyama nyonso ya mabele ekolekisa ntango ya kobuka mbuma likoló na bango.
7 Na ntango yango, bakomemela Yehova ya mampinga likabo,
Oyo euti na ekólo ya bato ya milaimilai mpe ya loposo sɛlisɛli,*
Euti epai ya bato oyo babangisaka na esika nyonso,
Euti na ekólo ya makasi mpe oyo elongaka,*
Oyo bibale ekɔmbɔlá mabele na yango,
Bakoya na yango esika nkombo ya Yehova ya mampinga ezali, Ngomba Siona.”+