Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Hoshea, mokonzi ya Yisraele (1-4)

      • Kokwea ya Yisraele (5, 6)

      • Yisraele ememami na mboka mopaya mpo na lipɛngwi (7-23)

      • Bapaya bakómi kofanda na bingumba ya Samaria (24-26)

      • Samaria esangisi losambo ndenge na ndenge (27-41)

2 Bakonzi 17:1

Mitindami

  • +2Ba 15:30

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 149

2 Bakonzi 17:3

Mitindami

  • +2Ba 18:9; Yis 10:5, 6; Hos 10:14, 15
  • +2Ba 18:14

2 Bakonzi 17:4

Mitindami

  • +Yis 31:1

2 Bakonzi 17:6

Mitindami

  • +Hos 13:16
  • +Le 26:32, 33; Mib 4:27; 28:64; 1Ba 14:15
  • +1Nt 5:26
  • +2Ba 18:9-11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” nk. 145, 156

2 Bakonzi 17:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kobanga.”

Mitindami

  • +Kob 20:2
  • +Kob 20:5

2 Bakonzi 17:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, na bisika nyonso, ezala na esika oyo ezali na bato moke to bato ebele.

Mitindami

  • +Hos 12:11

2 Bakonzi 17:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Kob 34:13; Mib 16:21, 22
  • +Mib 12:2; Yis 57:5

2 Bakonzi 17:11

Mitindami

  • +Le 20:23

2 Bakonzi 17:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Liloba ya Ebre oyo basaleli awa ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela “nyɛi.” Basalelaka mpe liloba yango mpo na kotyola.

Mitindami

  • +1Ba 12:28-30; 21:25, 26
  • +Kob 20:3-5; Le 26:1; Mib 4:23

2 Bakonzi 17:13

Mitindami

  • +2Nt 24:18, 19; 36:15, 16; Yir 25:4
  • +Yis 55:7

2 Bakonzi 17:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bazalaki se kokómisa bankingo na bango makasi.”

Mitindami

  • +Mib 1:32; 31:27

2 Bakonzi 17:15

Mitindami

  • +Mib 5:2; 29:12
  • +Hos 4:6
  • +Mib 32:21; 1Sa 12:21
  • +Nz 115:4-8; Yis 44:9
  • +Mib 12:30

2 Bakonzi 17:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ya ebende oyo enyangwisami.”

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    Elingi koloba, biloko lokola: minzoto, sanza mpe moi.

Mitindami

  • +1Ba 12:28-30
  • +1Ba 14:15; 16:33
  • +Mib 4:19; Yir 8:2
  • +1Ba 16:30, 31; 22:51, 53; 2Ba 10:21; 23:4, 5

2 Bakonzi 17:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “komitɛka mpo na kosala.”

Mitindami

  • +2Ba 16:1, 3
  • +Mib 18:10; Mik 5:12

2 Bakonzi 17:18

Mitindami

  • +Yos 23:12, 13; Yis 42:24

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 145

2 Bakonzi 17:19

Mitindami

  • +1Ba 14:22; Yir 3:8
  • +Ezk 23:4, 11

2 Bakonzi 17:21

Mitindami

  • +1Ba 12:20

2 Bakonzi 17:22

Mitindami

  • +1Ba 12:28-30

2 Bakonzi 17:23

Mitindami

  • +Mib 28:45, 63; 1Ba 14:16; Hos 1:4; Am 5:27; Mik 1:6
  • +2Ba 18:11

2 Bakonzi 17:24

Mitindami

  • +2Ba 19:11, 13

2 Bakonzi 17:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kosambela.”

Mitindami

  • +Kob 23:29

2 Bakonzi 17:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mimeseno ya losambo.”

2 Bakonzi 17:28

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kosambela.”

Mitindami

  • +Eb 28:18, 19; Yos 16:1; 1Ba 12:28, 29
  • +Yn 4:20-22

2 Bakonzi 17:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “banzambe.”

2 Bakonzi 17:30

Mitindami

  • +2Ba 17:24

2 Bakonzi 17:31

Mitindami

  • +2Ba 18:34

2 Bakonzi 17:32

Mitindami

  • +1Ba 12:31, 32; 13:33

2 Bakonzi 17:33

Mitindami

  • +2Ba 17:24, 41

2 Bakonzi 17:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kobanga.”

Mitindami

  • +Eb 32:28

2 Bakonzi 17:35

Mitindami

  • +Kob 19:5; 24:7; Mib 29:1
  • +Kob 20:3-5; 23:24; 34:14; Mib 5:9

2 Bakonzi 17:36

Mitindami

  • +Mib 6:12, 13
  • +Kob 6:6

2 Bakonzi 17:37

Mitindami

  • +Mib 31:9

2 Bakonzi 17:38

Mitindami

  • +Mib 4:23

2 Bakonzi 17:40

Mitindami

  • +2Ba 17:34

2 Bakonzi 17:41

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bikeko na bango oyo eyemami.”

Mitindami

  • +Ezr 4:1, 2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/1990, nk. 3-4

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 17:12Ba 15:30
2 Bak. 17:32Ba 18:9; Yis 10:5, 6; Hos 10:14, 15
2 Bak. 17:32Ba 18:14
2 Bak. 17:4Yis 31:1
2 Bak. 17:6Hos 13:16
2 Bak. 17:6Le 26:32, 33; Mib 4:27; 28:64; 1Ba 14:15
2 Bak. 17:61Nt 5:26
2 Bak. 17:62Ba 18:9-11
2 Bak. 17:7Kob 20:2
2 Bak. 17:7Kob 20:5
2 Bak. 17:9Hos 12:11
2 Bak. 17:10Kob 34:13; Mib 16:21, 22
2 Bak. 17:10Mib 12:2; Yis 57:5
2 Bak. 17:11Le 20:23
2 Bak. 17:121Ba 12:28-30; 21:25, 26
2 Bak. 17:12Kob 20:3-5; Le 26:1; Mib 4:23
2 Bak. 17:132Nt 24:18, 19; 36:15, 16; Yir 25:4
2 Bak. 17:13Yis 55:7
2 Bak. 17:14Mib 1:32; 31:27
2 Bak. 17:15Mib 5:2; 29:12
2 Bak. 17:15Hos 4:6
2 Bak. 17:15Mib 32:21; 1Sa 12:21
2 Bak. 17:15Nz 115:4-8; Yis 44:9
2 Bak. 17:15Mib 12:30
2 Bak. 17:161Ba 12:28-30
2 Bak. 17:161Ba 14:15; 16:33
2 Bak. 17:16Mib 4:19; Yir 8:2
2 Bak. 17:161Ba 16:30, 31; 22:51, 53; 2Ba 10:21; 23:4, 5
2 Bak. 17:172Ba 16:1, 3
2 Bak. 17:17Mib 18:10; Mik 5:12
2 Bak. 17:18Yos 23:12, 13; Yis 42:24
2 Bak. 17:191Ba 14:22; Yir 3:8
2 Bak. 17:19Ezk 23:4, 11
2 Bak. 17:211Ba 12:20
2 Bak. 17:221Ba 12:28-30
2 Bak. 17:23Mib 28:45, 63; 1Ba 14:16; Hos 1:4; Am 5:27; Mik 1:6
2 Bak. 17:232Ba 18:11
2 Bak. 17:242Ba 19:11, 13
2 Bak. 17:25Kob 23:29
2 Bak. 17:28Eb 28:18, 19; Yos 16:1; 1Ba 12:28, 29
2 Bak. 17:28Yn 4:20-22
2 Bak. 17:302Ba 17:24
2 Bak. 17:312Ba 18:34
2 Bak. 17:321Ba 12:31, 32; 13:33
2 Bak. 17:332Ba 17:24, 41
2 Bak. 17:34Eb 32:28
2 Bak. 17:35Kob 19:5; 24:7; Mib 29:1
2 Bak. 17:35Kob 20:3-5; 23:24; 34:14; Mib 5:9
2 Bak. 17:36Mib 6:12, 13
2 Bak. 17:36Kob 6:6
2 Bak. 17:37Mib 31:9
2 Bak. 17:38Mib 4:23
2 Bak. 17:402Ba 17:34
2 Bak. 17:41Ezr 4:1, 2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 17:1-41

Mokanda ya mibale ya

17 Na mbula ya 12 ya boyangeli ya Ahaze mokonzi ya Yuda, Hoshea+ mwana ya Ela akómaki mokonzi ya Yisraele na Samaria; ayangelaki mbula libwa. 2 Akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova, kasi te lokola bakonzi ya Yisraele oyo bayangelaki liboso na ye. 3 Shalmanesere mokonzi ya Asiri ayaki kobundisa ye,+ mpe Hoshea akómaki mosaleli na ye mpe abandaki kofuta ye mpako.+ 4 Kasi mokolo moko, mokonzi ya Asiri ayokaki ete Hoshea azalaki kosalela ye likita, mpo Hoshea atindelaki So mokonzi ya Ezipito+ bamemi-nsango mpe aboyaki kofuta mokonzi ya Asiri mpako, lokola na bambula ya liboso. Yango wana, mokonzi ya Asiri akangaki ye mpe atyaki ye na bolɔkɔ.

5 Mokonzi ya Asiri abundisaki ekólo mobimba, mpe ayaki na Samaria mpe azingaki yango mbula misato. 6 Na mbula ya libwa ya boyangeli ya Hoshea, mokonzi ya Asiri azwaki Samaria.+ Na nsima, amemaki bato ya Yisraele na mboka mopaya+ na Asiri. Afandisaki bango na Hala mpe na Habore, pene na ebale Gozane+ mpe na bingumba ya Bamede.+

7 Esalemaki bongo mpo bato ya Yisraele basalelaki Yehova Nzambe na bango lisumu, ye oyo abimisaki bango na mokili ya Ezipito mpe alongolaki bango na mabɔkɔ ya Farao mokonzi ya Ezipito.+ Bakómaki kosambela* banzambe mosusu,+ 8 bakómaki kolanda mimeseno ya bikólo oyo Yehova abenganaki liboso ya Bayisraele, mpe bakómaki kolanda mimeseno oyo bakonzi ya Yisraele bakɔtisaki.

9 Bayisraele bazalaki kosala makambo oyo ezali sembo te na miso ya Yehova Nzambe na bango. Bazalaki se kotonga bisika oyo etombwaná na bingumba na bango nyonso,+ banda na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli tii na engumba oyo ebatelami makasi.* 10 Bazalaki se kotɛlɛmisa makonzí ya losambo mpe banzete ya losambo*+ likoló ya ngomba moke nyonso mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa.+ 11 Mpe na bisika nyonso oyo etombwaná, bazalaki se kobimisa milinga ya bambeka kaka lokola bikólo oyo Yehova abenganaki liboso na bango.+ Bazalaki se kosala makambo mabe mpo na kosilikisa Yehova.

12 Bakobaki kosambela bikeko ya bosɔtɔ,*+ atako Yehova alobaki na bango: “Bosengeli kosambela yango te!”+ 13 Yehova azalaki se kokebisa Yisraele mpe Yuda na nzela ya basakoli na ye nyonso mpe bamoni-bimonaneli+ na ye nyonso, alobi: “Bótika misala na bino ya mabe!+ Bótosa mitindo na ngai mpe mitinda na ngai, na kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bankɔkɔ na bino mpe oyo nayebisaki bino na nzela ya basaleli na ngai basakoli.” 14 Kasi baboyaki koyoka, mpe bazalaki kaka mitó makasi* lokola bankɔkɔ na bango oyo bandimelaki Yehova Nzambe na bango te.+ 15 Bazalaki se koboya kotosa malako na ye, kondimana+ oyo asalaki ná bankɔkɔ na bango, mpe makundoli oyo apesaki mpo na kokebisa bango.+ Bakobaki kosambela bikeko ya mpambampamba+ mpe bango moko bakómaki bato ya mpambampamba.+ Bamekolaki bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango, oyo Yehova apesaki bango mitindo ete bámekola yango te.+

16 Batikaki kotosa mibeko nyonso ya Yehova Nzambe na bango, basalaki bikeko ya ebende* ya bana-ngɔmbɛ mibale,+ mpe nzete ya losambo.*+ Bazalaki mpe kogumbamela limpinga nyonso ya likoló*+ mpe kosalela Baala.+ 17 Bazalaki mpe kolekisa bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi mbeka na mɔtɔ.+ Bazalaki kosala mosala ya kosakola makambo oyo ebombaná+ mpe koluka bilembo ya makambo oyo ekoya. Mpe bazalaki se komipesa na kosala* makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova, mpo na kosilikisa ye.

18 Bongo, Yehova asilikelaki bato ya Yisraele makasi, yango wana alongolaki bango na miso na ye.+ Na ekólo mobimba ya Yisraele, atikaki kaka libota ya Yuda.

19 Ata Yuda mpe etosaki te mibeko ya Yehova Nzambe na bango;+ bango mpe balandaki mimeseno mabe oyo Yisraele elandaki.+ 20 Yehova abwakaki bakitani nyonso ya Yisraele mpe asambwisaki bango. Apesaki bango na mabɔkɔ ya bapunzi, tii nsukansuka alongolaki bango na miso na ye. 21 Alongolaki Yisraele na libota ya Davidi, mpe Bayisraele bakómisaki Yeroboame mwana ya Nebate mokonzi.+ Kasi Yeroboame atindaki bato ya Yisraele bátika kosalela Yehova, mpe asalisaki bango lisumu moko monene. 22 Mpe bato ya Yisraele bakobaki kosala masumu nyonso oyo Yeroboame asalaki.+ Bazalaki se kosala yango 23 tii ntango Yehova alongolaki Yisraele na miso na ye, kaka ndenge alobaki yango na nzela ya basaleli na ye nyonso basakoli.+ Na yango, Baasiri balongolaki Bayisraele na mabele na bango mpe bamemaki bango na mboka mopaya, na Asiri;+ mpe bafandi kuna tii na mokolo ya lelo.

24 Na nsima, mokonzi ya Asiri amemaki bato ya Babilone, ya Kuta, ya Ava, ya Hamate mpe ya Sefarvaime,+ mpe atyaki bango na bingumba ya Samaria na esika ya Bayisraele. Bato yango bazwaki Samaria mpe bakómaki kofanda na bingumba na yango. 25 Ntango bakómaki kofanda na bingumba ya Samaria, na ebandeli bazalaki kobanga* Yehova te. Yango wana, Yehova atindelaki bango bankɔsi+ mpe ebomaki basusu kati na bango. 26 Batindelaki mokonzi ya Asiri maloba ete: “Bato ya bikólo oyo outi na bango na mboka ya bapaya mpe ofandisi bango na bingumba ya Samaria, bayebi losambo* ya Nzambe ya mokili yango te. Yango wana, Nzambe yango azali kotindela bango bankɔsi mpe ezali koboma bango, mpo ezali ata na moto moko te kati na bango oyo ayebi losambo ya Nzambe ya mokili yango.”

27 Bongo mokonzi ya Asiri apesaki mitindo oyo: “Bótinda nganga-nzambe moko oyo bozwaki kuna mpe bomemaki na mboka mopaya, azonga kofanda kuna mpo ateya bango losambo ya Nzambe ya mokili yango.” 28 Bongo nganga-nzambe moko oyo amemamaki na mboka mopaya longwa na Samaria azongaki kofanda na Betele, mpe+ akómaki koteya bango ndenge oyo basengeli kobanga* Yehova.+

29 Nzokande, ekólo na ekólo esalaki nzambe* na yango moko, mpe batyaki banzambe yango na bandako ya losambo na bisika oyo etombwaná oyo Basamaria basalaki. Ekólo na ekólo esalaki bongo na bingumba na yango esika bazalaki kofanda. 30 Na yango bato ya Babilone basalaki ekeko ya Sukote-benote, bato ya Kute basalaki ekeko ya Nergale, bato ya Hamate+ basalaki ekeko ya Ashima, 31 mpe Baava basalaki ekeko ya Nibaze mpe ya Tartake. Basefarvaime bazalaki kotumba bana na bango na mɔtɔ mpo na banzambe na bango+ Adrameleke ná Anameleke. 32 Atako bazalaki kobanga Yehova, bazwaki bato kati na bango mpo bázala banganga-nzambe na bisika oyo etombwaná, mpe bazalaki kosalela bango na bandako ya losambo oyo ezalaki na bisika oyo etombwaná.+ 33 Na yango, bazalaki kobanga Yehova, kasi bazalaki kosambela banzambe na bango moko na kolanda mimeseno ya losambo ya bikólo oyo bautaki.+

34 Tii na mokolo ya lelo bazali kosala na kolanda ndenge bazalaki kosambela kala. Ata moto moko te kati na bango azali kosambela* Yehova, mpe moko te azali kolanda mitinda na ye, bikateli na ye ya lisambisi, Mobeko, mpe mitindo oyo Yehova apesaki bakitani ya Yakobo, oyo nkombo na ye ekómaki Yisraele.+ 35 Ntango Yehova asalaki kondimana na bato ya Yisraele,+ apesaki bango mitindo ete: “Bosengeli te kobanga banzambe mosusu, mpe bosengeli te kogumbamela bango to kosalela bango to kopesa bango mbeka.+ 36 Kasi bosengeli kobanga nde Yehova,+ oyo abimisaki bino na mokili ya Ezipito na nguya monene mpe na lobɔkɔ oyo esembolami.+ Ye nde bosengeli kogumbamela mpe ye nde bosengeli kopesa mbeka. 37 Mpe malako, bikateli ya lisambisi, Mobeko ná mitindo oyo ye akomelaki bino,+ bosengeli kotosa yango ntango nyonso, mpe bosengeli te kosambela banzambe mosusu. 38 Bosengeli te kobosana kondimana oyo nasali ná bino,+ mpe bosengeli te kobanga banzambe mosusu. 39 Kasi ezali Yehova Nzambe na bino nde bosengeli kobanga, mpo ye nde akobikisa bino na mabɔkɔ ya banguna na bino nyonso.”

40 Kasi bato yango batosaki te, mpe bazalaki kosala na kolanda mimeseno ya losambo na bango ya kala.+ 41 Na yango, bikólo yango ekómaki kobanga Yehova,+ kasi bazalaki mpe kosalela bikeko na bango moko.* Bana na bango mpe bana ya bana na bango bazali kosala kaka ndenge bankɔkɔ na bango basalaki, tii na mokolo ya lelo.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto