Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 33
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Mikumba ya sinzili (1-20)

      • Nsango mpo na kokwea ya Yerusaleme (21, 22)

      • Nsango mpo na bato oyo bafandi na bisika oyo ebebisamá (23-29)

      • Bato basaleli te maloba oyo bayoki (30-33)

        • Ezekiele azali “lokola loyembo ya lolango” (32)

        • “Mosakoli moko azalaki na kati na bango” (33)

Ezekiele 33:2

Mitindami

  • +Ezk 3:11
  • +Le 26:25; Ezk 6:3; 21:9

Ezekiele 33:3

Mitindami

  • +Yir 4:5; Hos 8:1

Ezekiele 33:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “balongoli ye.”

Mitindami

  • +Yir 6:17; Zek 1:4
  • +Ezk 3:19; Mis 18:6

Ezekiele 33:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo.”

Ezekiele 33:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nakosɛnga sinzili makila na ye.”

Mitindami

  • +Yis 56:10
  • +Ezk 3:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 137

Ezekiele 33:7

Mitindami

  • +Yis 21:8; Yir 1:17; Ezk 3:17

Ezekiele 33:8

Mitindami

  • +Yis 3:11; Ezk 18:4
  • +Mas 11:21

Ezekiele 33:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na yo.”

Mitindami

  • +Mas 15:10
  • +Ezk 3:19; Mis 18:6

Ezekiele 33:10

Mitindami

  • +Le 26:39; Yis 64:6; Ezk 24:23
  • +Ezk 37:11

Ezekiele 33:11

Mitindami

  • +Ezk 18:23; 1Ti 2:3, 4
  • +Yis 31:6; Lk 15:10
  • +Nz 130:7, 8
  • +Yis 55:7; Yir 3:22; 25:5; Mis 3:19
  • +Ezk 18:31; 2Pe 3:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 57

Ezekiele 33:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Ezk 3:20; 18:24
  • +1Ba 8:48, 50; Ezk 18:21
  • +Ezk 18:26

Ezekiele 33:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “likambo oyo ezali sembo te.”

Mitindami

  • +2Pe 2:20
  • +Ezk 18:4

Ezekiele 33:14

Mitindami

  • +Yis 55:7; Ezk 18:21; Mik 6:8

Ezekiele 33:15

Mitindami

  • +Kob 22:26
  • +Le 6:2, 4; Ezk 22:29
  • +Le 18:5; Ezk 18:27

Ezekiele 33:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bakokanisela ye.”

Mitindami

  • +Yis 1:18
  • +Ezk 20:11

Ezekiele 33:18

Mitindami

  • +Ebr 10:38; 2Pe 2:20

Ezekiele 33:19

Mitindami

  • +Ezk 18:27

Ezekiele 33:20

Mitindami

  • +Ezk 18:25, 29

Ezekiele 33:21

Mitindami

  • +Ezk 24:25-27
  • +2Ba 25:4; 2Nt 36:17; Yir 39:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 136

Ezekiele 33:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Lobɔkɔ ya Yehova eyelaki ngai.”

Mitindami

  • +Ezk 3:26

Ezekiele 33:24

Mitindami

  • +Yir 39:10; Ezk 36:4
  • +Eb 12:7

Ezekiele 33:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.

Mitindami

  • +Eb 9:4; Le 17:12
  • +Ezk 22:6

Ezekiele 33:26

Mitindami

  • +Sef 3:3
  • +Yir 5:8
  • +Mib 4:26; Yos 23:15

Ezekiele 33:27

Mitindami

  • +Yir 42:22; Ezk 5:12

Ezekiele 33:28

Mitindami

  • +2Nt 36:20, 21; Yis 6:11; Yir 44:2
  • +Ezk 6:3

Ezekiele 33:29

Mitindami

  • +Yir 9:11; 25:11
  • +2Ba 17:9; 2Nt 36:14

Ezekiele 33:30

Mitindami

  • +Yir 18:18

Ezekiele 33:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bazali koloba na mposa makasi ya kosangisa nzoto.”

Mitindami

  • +Yis 29:13; Yir 44:16, 17

Ezekiele 33:33

Mitindami

  • +Ezk 2:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1991, lok. 17

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 33:2Ezk 3:11
Ezk. 33:2Le 26:25; Ezk 6:3; 21:9
Ezk. 33:3Yir 4:5; Hos 8:1
Ezk. 33:4Yir 6:17; Zek 1:4
Ezk. 33:4Ezk 3:19; Mis 18:6
Ezk. 33:6Yis 56:10
Ezk. 33:6Ezk 3:18
Ezk. 33:7Yis 21:8; Yir 1:17; Ezk 3:17
Ezk. 33:8Yis 3:11; Ezk 18:4
Ezk. 33:8Mas 11:21
Ezk. 33:9Mas 15:10
Ezk. 33:9Ezk 3:19; Mis 18:6
Ezk. 33:10Le 26:39; Yis 64:6; Ezk 24:23
Ezk. 33:10Ezk 37:11
Ezk. 33:11Ezk 18:23; 1Ti 2:3, 4
Ezk. 33:11Yis 31:6; Lk 15:10
Ezk. 33:11Nz 130:7, 8
Ezk. 33:11Yis 55:7; Yir 3:22; 25:5; Mis 3:19
Ezk. 33:11Ezk 18:31; 2Pe 3:9
Ezk. 33:12Ezk 3:20; 18:24
Ezk. 33:121Ba 8:48, 50; Ezk 18:21
Ezk. 33:12Ezk 18:26
Ezk. 33:132Pe 2:20
Ezk. 33:13Ezk 18:4
Ezk. 33:14Yis 55:7; Ezk 18:21; Mik 6:8
Ezk. 33:15Kob 22:26
Ezk. 33:15Le 6:2, 4; Ezk 22:29
Ezk. 33:15Le 18:5; Ezk 18:27
Ezk. 33:16Yis 1:18
Ezk. 33:16Ezk 20:11
Ezk. 33:18Ebr 10:38; 2Pe 2:20
Ezk. 33:19Ezk 18:27
Ezk. 33:20Ezk 18:25, 29
Ezk. 33:21Ezk 24:25-27
Ezk. 33:212Ba 25:4; 2Nt 36:17; Yir 39:2
Ezk. 33:22Ezk 3:26
Ezk. 33:24Yir 39:10; Ezk 36:4
Ezk. 33:24Eb 12:7
Ezk. 33:25Eb 9:4; Le 17:12
Ezk. 33:25Ezk 22:6
Ezk. 33:26Sef 3:3
Ezk. 33:26Yir 5:8
Ezk. 33:26Mib 4:26; Yos 23:15
Ezk. 33:27Yir 42:22; Ezk 5:12
Ezk. 33:282Nt 36:20, 21; Yis 6:11; Yir 44:2
Ezk. 33:28Ezk 6:3
Ezk. 33:29Yir 9:11; 25:11
Ezk. 33:292Ba 17:9; 2Nt 36:14
Ezk. 33:30Yir 18:18
Ezk. 33:31Yis 29:13; Yir 44:16, 17
Ezk. 33:33Ezk 2:5
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 33:1-33

Ezekiele

33 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, lobá na bato na yo,+ mpe yebisá bango boye: “‘Soki nasali ete bábundisa mokili moko,+ mpe bato nyonso ya mokili yango bazwi moto moko mpe bakómisi ye sinzili na bango, 3 mpe amoni mpenza banguna bazali koya na mokili, ayuli liseke mpe akebisi bato.+ 4 Soki moto moko ayoki lokito ya liseke mpe alandi likebisi te,+ bongo banguna bayei mpe babomi ye,* makila na ye ekozala na motó na ye moko.+ 5 Ayokaki lokito ya liseke, kasi alandaki likebisi te. Makila na ye ekozala na motó na ye moko. Soki alandaka likebisi, alingaki kobikisa bomoi* na ye.

6 “‘Kasi soki sinzili amoni banguna bazali koya, ayuli liseke te+ mpe bato bayoki likebisi te, banguna bayei mpe babomi moko na bango, moto yango akokufa mpo na libunga na ye, kasi makila na ye ekozala na motó ya sinzili.’*+

7 “Nde yo, mwana ya moto, natye yo sinzili mpo na bato ya Yisraele: soki oyoki maloba oyo euti na monɔkɔ na ngai, osengeli kokebisa bango mpo na ngai.+ 8 Soki nalobi na moto mabe ete: ‘Moto mabe, okokufa mpenza!’+ Kasi olobi te mpo na kokebisa moto mabe ete atika etamboli na ye, akokufa na libunga na ye, mpo azali moto mabe,+ kasi makila na ye ekozala na motó na yo. 9 Nzokande, soki okebisi moto mabe ete atika etamboli na ye mpe aboyi kobongwana, akokufa mpo na libunga na ye,+ kasi okobikisa mpenza bomoi na yo.*+

10 “Mpe yo, mwana ya moto, lobá na bato ya Yisraele ete: ‘Bolobi ete: “Botomboki mpe masumu na biso ekómeli biso kilo, mpe ezali kopɔlisa biso;+ bongo ndenge nini tokokoba kozala na bomoi?”’+ 11 Lobá na bango boye: ‘“Lokola nazali solo na bomoi,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, “nasepelaka te na liwa ya moto mabe,+ kasi nasepelaka nde ete moto mabe atika etamboli na ye+ mpe akoba kozala na bomoi.+ Bóbongwana, bóbongwana, bótika etamboli na bino ya mabe,+ mpo na nini bókufa, Ee bato ya Yisraele?”’+

12 “Mpe yo, mwana ya moto, lobá na bato na yo ete: ‘Bosembo* ya moto ya sembo* ekobikisa ye te soki atomboki.+ Mabe ya moto mabe ekobɛtisa ye libaku te soki abongwani mpe atiki mabe na ye.+ Moto nyonso ya sembo akokoba kozala na bomoi te mpo na bosembo na ye na mokolo oyo akosala lisumu.+ 13 Ntango nalobi na moto ya sembo ete: “Okokoba mpenza kozala na bomoi,” bongo atye motema na bosembo na ye moko mpe asali mabe,*+ bakokanisa lisusu te ata likambo moko ya sembo oyo asalaki, kasi akokufa mpo na mabe oyo asali.+

14 “‘Mpe ntango nalobi na moto mabe ete: “Okokufa mpenza,” mpe atiki lisumu na ye, asali oyo ezali malamu mpe sembo,+ 15 mpe moto mabe azongisi eloko oyo azwaki lokola ndanga,+ afuti biloko oyo ayibaki,+ mpe soki atosi mibeko na ngai oyo ememaka na bomoi mpo asali te oyo ezali mabe, akotikala mpenza na bomoi.+ Akokufa te. 16 Bakotángela* ye ata lisumu moko te oyo asalaki.+ Lokola asali oyo ezali malamu mpe sembo, akotikala mpenza na bomoi.’+

17 “Kasi bato na yo balobi ete: ‘Makambo Yehova asalaka ezangi bosembo,’ nzokande, ndenge oyo bango basalaka makambo nde ezangi bosembo.

18 “Soki moto ya sembo atiki etamboli na ye ya sembo mpe asali oyo ezali mabe, asengeli kokufa mpo na yango.+ 19 Kasi ntango moto mabe abongwani, atiki mabe na ye mpe asali oyo ezali malamu mpe sembo, akotikala na bomoi mpo na yango.+

20 “Kasi bolobi ete: ‘Makambo Yehova asalaka ezangi bosembo.’+ Nakosambisa mokomoko na bino na kolanda makambo oyo asalaka, Ee bato ya Yisraele.”

21 Nsukansuka, na mbula ya 12, na mokolo ya mitano ya sanza ya zomi, oyo tomemamaki na mboka mopaya, moto moko oyo abikaki, oyo autaki na Yerusaleme, ayaki epai na ngai+ mpe alobaki boye: “Bakweisi engumba!”+

22 Sikoyo nguya ya Yehova esalaki na kati na ngai* na mpokwa liboso ete moto oyo abikaki aya, mpe Ye afungolaki monɔkɔ na ngai liboso ete moto yango aya epai na ngai na ntɔngɔ. Na yango, monɔkɔ na ngai efungwamaki mpe nazalaki lisusu baba te.+

23 Bongo Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 24 “Mwana ya moto, bato oyo bafandi na bisika oyo ebebisamá+ bazali koloba mpo na mokili ya Yisraele ete: ‘Abrahama azalaki kaka ye moko kasi azwaki mokili yango.+ Nzokande biso tozali ebele; ya solo bapesi biso mokili mpo ezala eloko na biso.’

25 “Na yango, yebisá bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bozali kolya misuni elongo na makila,+ bozali kotya motema na bikeko na bino ya bosɔtɔ,* mpe bozali kokoba kosopa makila.+ Bongo mpo na nini bosengeli kozwa mokili? 26 Botyeli mopanga na bino motema,+ bozali kosala makambo oyo eyinamá, mpe mokomoko na bino akómisi mwasi ya moninga na ye mbindo.+ Bongo mpo na nini bosengeli kozwa mokili?”’+

27 “Talá oyo okoyebisa bango: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola nazali solo na bomoi, bato oyo bazali na bisika oyo ebebisamá bakokufa na mopanga; baoyo bazali na esobe mpenza, nakopesa bango bázala biloko ya kolya mpo na banyama ya zamba; mpe baoyo bafandaka na bisika makasi mpe na mibenga bakokufa na maladi mabe.+ 28 Nakokómisa mokili yango esika oyo etikalá mpenza mpamba,+ lolendo na yango ya makasi ekosila, mpe bangomba ya Yisraele ekotikala mpamba,+ moto ata moko te akoleka kuna. 29 Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova, ntango nakokómisa mokili yango esika oyo etikalá mpamba+ mpo na biloko na bango nyonso oyo eyinamá oyo basali.”’+

30 “Nde yo, mwana ya moto, bato na yo bazali kolobana mpo na yo pene na bifelo mpe na bisika ya kokɔta na bandako.+ Bazali kolobana, moto na moto azali koloba na ndeko na ye ete: ‘Bóya, tóyoka makambo oyo Yehova azali koloba.’ 31 Bakoya ebele mpo na kofanda liboso na yo lokola bato na ngai; mpe bakoyoka maloba na yo kasi bakosalela yango te,+ mpo na monɔkɔ na bango, bazali kolobela yo maloba sukali,* kasi motema na bango ezali kolanda na lokoso mpenza litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe. 32 Talá! Epai na bango ozali lokola loyembo ya lolango, oyo eyembami na mongongo kitoko mpe oyo ebɛtami malamu na ebɛtɛlo ya bansinga. Bakoyoka maloba na yo, kasi moto moko te akosalela yango. 33 Mpe ntango maloba yango ekokokisama—mpe ekokokisama mpenza,—bakoyeba ete mosakoli moko azalaki na kati na bango.”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto