Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 34
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela babateli ya mpate ya Yisraele (1-10)

      • Yehova abatelaka bampate na ye (11-31)

        • “Mosaleli na ngai Davidi” akozala mobateli na bango (23)

        • “Kondimana ya kimya” (25)

Ezekiele 34:2

Mitindami

  • +Yir 23:1; Mik 3:1, 11; Sef 3:3; Zek 11:17; Mt 23:13
  • +Yis 40:11; Yn 21:15

Ezekiele 34:3

Mitindami

  • +2Ba 21:16; Yir 22:17; Mik 3:3; Zek 11:4, 5
  • +Yis 56:11

Ezekiele 34:4

Mitindami

  • +Lk 15:4
  • +Yir 22:13

Ezekiele 34:5

Mitindami

  • +Yir 23:2; 50:6; Mt 9:36

Ezekiele 34:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nakosɛnga bampate na ngai na lobɔkɔ na bango.”

  • *

    To, “bábatela bampate na ngai.”

Mitindami

  • +Yir 52:24-27

Ezekiele 34:11

Mitindami

  • +1Sa 17:34, 35; Nz 80:1; Yis 56:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Zongelá Yehova, lok. 4

Ezekiele 34:12

Mitindami

  • +Yis 40:11
  • +Yoe 2:1, 2; Sef 1:14, 15

Ezekiele 34:13

Mitindami

  • +Yir 23:3; Ezk 11:17; Am 9:14; Mik 7:14

Ezekiele 34:14

Mitindami

  • +Yis 25:6; 30:23; Yir 31:12
  • +Yir 33:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Zongelá Yehova, lok. 5

Ezekiele 34:15

Mitindami

  • +Yir 3:15
  • +Sef 3:13

Ezekiele 34:16

Mitindami

  • +Mik 4:6; Mt 15:24; Lk 15:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Zongelá Yehova, lok. 5

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1996, lok. 25

Ezekiele 34:17

Mitindami

  • +Zek 10:3

Ezekiele 34:22

Mitindami

  • +Yis 40:11; Yir 23:3

Ezekiele 34:23

Mitindami

  • +Yn 10:11; Ebr 13:20; 1Pe 5:4; Em 7:17
  • +Yis 11:1; Yir 30:9
  • +Ezk 37:24; Hos 3:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/4/2007, nk. 26-27

    1/1/1993, lok. 19

Ezekiele 34:24

Mitindami

  • +Kob 29:45; Yir 31:1
  • +Nz 2:6; Yis 9:6; Yir 23:5; Mik 5:2; Lk 1:32; Mis 5:31

Ezekiele 34:25

Mitindami

  • +Ezk 37:26
  • +Le 26:6; Yis 11:6-9; 35:9; 65:25; Hos 2:18
  • +Yir 23:6; 33:16

Ezekiele 34:26

Mitindami

  • +Yis 56:7; Ezk 20:40; Mik 4:1
  • +Eb 12:2, 3; Mib 28:12; Zek 8:13

Ezekiele 34:27

Mitindami

  • +Le 26:4; Nz 85:12; Yis 35:2; Ezk 36:30
  • +Le 26:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/1993, lok. 20

Ezekiele 34:28

Mitindami

  • +Yir 30:10; 46:27

Ezekiele 34:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mpo na nkombo.”

Mitindami

  • +Ezk 36:29
  • +Ezk 36:15

Ezekiele 34:30

Mitindami

  • +Ezk 37:27

Ezekiele 34:31

Mitindami

  • +Nz 78:52; 100:3; Yis 40:11

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 34:2Yir 23:1; Mik 3:1, 11; Sef 3:3; Zek 11:17; Mt 23:13
Ezk. 34:2Yis 40:11; Yn 21:15
Ezk. 34:32Ba 21:16; Yir 22:17; Mik 3:3; Zek 11:4, 5
Ezk. 34:3Yis 56:11
Ezk. 34:4Lk 15:4
Ezk. 34:4Yir 22:13
Ezk. 34:5Yir 23:2; 50:6; Mt 9:36
Ezk. 34:10Yir 52:24-27
Ezk. 34:111Sa 17:34, 35; Nz 80:1; Yis 56:8
Ezk. 34:12Yis 40:11
Ezk. 34:12Yoe 2:1, 2; Sef 1:14, 15
Ezk. 34:13Yir 23:3; Ezk 11:17; Am 9:14; Mik 7:14
Ezk. 34:14Yis 25:6; 30:23; Yir 31:12
Ezk. 34:14Yir 33:12
Ezk. 34:15Yir 3:15
Ezk. 34:15Sef 3:13
Ezk. 34:16Mik 4:6; Mt 15:24; Lk 15:4
Ezk. 34:17Zek 10:3
Ezk. 34:22Yis 40:11; Yir 23:3
Ezk. 34:23Yn 10:11; Ebr 13:20; 1Pe 5:4; Em 7:17
Ezk. 34:23Yis 11:1; Yir 30:9
Ezk. 34:23Ezk 37:24; Hos 3:5
Ezk. 34:24Kob 29:45; Yir 31:1
Ezk. 34:24Nz 2:6; Yis 9:6; Yir 23:5; Mik 5:2; Lk 1:32; Mis 5:31
Ezk. 34:25Ezk 37:26
Ezk. 34:25Le 26:6; Yis 11:6-9; 35:9; 65:25; Hos 2:18
Ezk. 34:25Yir 23:6; 33:16
Ezk. 34:26Yis 56:7; Ezk 20:40; Mik 4:1
Ezk. 34:26Eb 12:2, 3; Mib 28:12; Zek 8:13
Ezk. 34:27Le 26:4; Nz 85:12; Yis 35:2; Ezk 36:30
Ezk. 34:27Le 26:13
Ezk. 34:28Yir 30:10; 46:27
Ezk. 34:29Ezk 36:29
Ezk. 34:29Ezk 36:15
Ezk. 34:30Ezk 37:27
Ezk. 34:31Nz 78:52; 100:3; Yis 40:11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 34:1-31

Ezekiele

34 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, sakolá mpasi oyo ekokómela babateli ya mpate ya Yisraele. Sakolá mpe lobá na babateli ya mpate ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na babateli ya mpate ya Yisraele,+ baoyo bazali komileisa bango moko! Ezali etonga te nde babateli ya mpate basengeli koleisa?+ 3 Bozali kolya mafuta, bozali kolata lɛnɛ mpe bozali koboma nyama oyo eleki mafuta.+ Kasi bozali koleisa etonga te.+ 4 Nyama oyo elɛmbi, bokómisi yango makasi te; oyo ezali kobɛla, bobikisi yango te; oyo ezoki, bokangi yango eteni ya elamba te; oyo eyengiyengi, bozongisi yango te; oyo ebungi, boluki yango te;+ kutu boyangeli yango na makasi mpe bonyokoli yango mpenza.+ 5 Bongo epalanganaki mpo mobateli ya mpate azalaki te;+ epalanganaki mpe ekómaki bilei mpo na nyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe. 6 Bampate na ngai ezalaki koyengayenga na bangomba nyonso mpe na bangomba mike nyonso oyo etombwaná; bampate na ngai epalanganaki na mabele mobimba, moto moko te alukaki yango mpe moto moko te alukaki komona yango.

7 “‘“Na yango, bino babateli ya mpate, bóyoka liloba ya Yehova: 8 ‘“Lokola nazali solo na bomoi,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, “lokola bampate na ngai ekómaki nyama ya kolya, bilei mpo na nyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe, mpo mobateli ya mpate azalaki te, mpe babateli ya mpate na ngai balukaki bampate na ngai te, kasi bamileisaki nde bango moko mpe baleisaki bampate na ngai te,”’ 9 na yango, bino babateli ya mpate, bóyoka liloba ya Yehova. 10 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakobundisa babateli ya mpate, mpe nakosɛnga bango bázongisa monɔkɔ mpo na bampate na ngai,* nakosɛnga bango lisusu te báleisa bampate na ngai,*+ mpe babateli ya mpate bakomileisa lisusu te. Nakobikisa bampate na ngai na monɔkɔ na bango, mpe ekozala lisusu bilei mpo na bango te.’”

11 “‘Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo, ngai moko, nakoluka bampate na ngai mpe nakobatela yango.+ 12 Nakobatela bampate na ngai lokola mobateli ya mpate oyo amoni bampate na ye oyo epalanganaki mpe azali koleisa yango.+ Nakobikisa yango uta na bisika nyonso oyo yango epalanganaki na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi mpenza.+ 13 Nakolongola yango na kati ya bato ya bikólo mpe nakoyanganisa yango uta na mikili, nakomema yango na mokili na yango mpe nakoleisa yango na bangomba ya Yisraele,+ pene na mikɛli ya mai mpe pene na bisika nyonso ya kofanda ya mokili yango. 14 Nakoleisa yango na esika malamu ya koleisa bibwɛlɛ matiti, mpe mokili oyo yango ekolya matiti ekozala na bangomba milai ya Yisraele.+ Ekolala kuna na mokili kitoko oyo etondi na matiti,+ mpe ekolya na bisika oyo eleki malamu ya koleisa bibwɛlɛ na bangomba ya Yisraele.”

15 “‘“Ngai moko nakoleisa bampate na ngai+ mpe ngai moko nakolalisa yango,”+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 16 “Oyo ebungi, nakoluka yango;+ oyo eyengiyengi, nakozongisa yango; oyo ezoki, nakokanga yango eteni ya elamba; oyo elɛmbi, nakokembisa yango; kasi oyo ya mafutamafuta mpe oyo ya makasi, nakosilisa yango mpenza. Nakoleisa oyo wana na nzela ya lisambisi.”

17 “‘Mpo na bino bampate na ngai, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nalingi kokata likambo kati na mpate oyo ná mpate mosusu, kati na bampate-mibali mpe bantaba-mibali.+ 18 Ndenge bozali kolya matiti oyo eleki malamu ekoki te mpo na bino? Kasi mpo na nini bozali konyatanyata matiti oyo etikali na esika na bino ya koleisa bibwɛlɛ matiti? Nsima ya komɛla mai oyo eleki pɛto, bosengeli nde konyatanyata mai yango na makolo na bino? 19 Bampate na ngai esengeli nde kolya na esika ya matiti oyo makolo na bino enyatinyati mpe komɛla mai oyo bobebisi ndenge bonyatinyati yango na makolo na bino?”

20 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bango: “Ngai oyo, ngai moko nakokata likambo kati na mpate ya mafutamafuta mpe mpate oyo ekɔndá, 21 mpo bampate nyonso oyo ezalaki na maladi, bozalaki kotindika yango na mopanzi mpe na lipeka mpe bozalaki kotuta yango maseke na bino tii bopalanganisaki yango mosika. 22 Nakobikisa bampate na ngai, ekozala lisusu te eloko ya kolya.+ Mpe nakokata likambo kati na mpate oyo ná mpate oyo. 23 Nakobimisela yango mobateli moko ya mpate,+ mosaleli na ngai Davidi+ mpe akoleisa yango. Ye moko akoleisa yango mpe akokóma mobateli na yango.+ 24 Ngai, Yehova, nakokóma Nzambe ya bampate yango,+ mpe mosaleli na ngai Davidi akokóma nkumu na kati ya bampate yango.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi.

25 “‘“Nakosala kondimana ya kimya ná bampate yango,+ mpe nakolongola banyama mabe ya zamba na mokili yango,+ mpo efanda na kimya na esobe mpe elala na bazamba.+ 26 Nakokómisa yango ná bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba moke na ngai lipamboli,+ mpe nakosala ete mbula enɔka na ntango na yango. Mapamboli ekosopana lokola mbula.+ 27 Banzete ya elanga ekobota mbuma na yango, mabele ekopesa mbuma na yango,+ mpe ekofanda na kimya na mokili. Bampate yango ekoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakobuka banzete ya ekanganeli na yango+ mpe nakobikisa yango na lobɔkɔ ya baoyo bazwaki yango baombo. 28 Ekozala lisusu te bilei mpo na bikólo; nyama ya zamba ya mabele ekolya yango te mpe ekofanda na kimya, moto ata moko te akobangisa yango.+

29 “‘“Nakobimisela bampate yango elanga oyo ekoyebana mpenza,* ekokufa lisusu te na nzala na mokili,+ mpe bikólo ekoyokisa yango lisusu nsɔni te.+ 30 ‘Bongo bakoyeba mpenza ete ngai, Yehova Nzambe na bango, nazali elongo na bango mpe ete bango, bato ya Yisraele, bazali bato na ngai,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”’

31 “‘Nde bino bampate na ngai,+ bampate oyo nabatelaka, bozali kaka bato. Mpe nazali Nzambe na bino,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto