Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakorinti 1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Bakorinti

      • Mbote (1-3)

      • Paulo apesi Nzambe matɔndi mpo na Bakorinti (4-9)

      • Alendisi bango bázala na bomoko (10-17)

      • Kristo, nguya mpe bwanya ya Nzambe (18-25)

      • Komikumisa kaka na Yehova (26-31)

1 Bakorinti 1:1

Mitindami

  • +Mis 9:15

1 Bakorinti 1:2

Mitindami

  • +Mis 18:1
  • +1Ko 6:11; Ebr 9:13, 14
  • +Mt 12:18, 21; Mis 4:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/1994, nk. 24-25

1 Bakorinti 1:5

Mitindami

  • +Kol 1:9

1 Bakorinti 1:6

Mitindami

  • +Mis 18:5

1 Bakorinti 1:7

Mitindami

  • +Lk 17:29, 30; 2Te 1:7; 1Pe 1:7

1 Bakorinti 1:8

Mitindami

  • +1Ko 4:5; 5:5; Em 1:10

1 Bakorinti 1:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bózala elongo na.”

Mitindami

  • +Mib 7:9

1 Bakorinti 1:10

Mitindami

  • +Ro 16:17
  • +Ro 15:5, 6; 2Ko 13:11; Ef 4:1, 3; Flp 2:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Ndenge ya kosolola, lok. 282

1 Bakorinti 1:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/1997, lok. 29

1 Bakorinti 1:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Bazalaki mpe kobenga ye Petro.

Mitindami

  • +Mis 18:24; 1Ko 3:4, 5, 21-23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/1996, nk. 21-22

1 Bakorinti 1:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Paulo abakamaki na nzete mpo na bino.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 211

1 Bakorinti 1:14

Mitindami

  • +Mis 18:8
  • +Ro 16:23

1 Bakorinti 1:16

Mitindami

  • +1Ko 16:15

1 Bakorinti 1:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “elobeli ya kokamwisa te.”

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mis 9:15

1 Bakorinti 1:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mis 17:18; 1Ko 2:14
  • +Ro 1:16

1 Bakorinti 1:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nakotya pembeni.”

Mitindami

  • +Yis 29:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/1992, nk. 21-24

1 Bakorinti 1:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “moto oyo ayebi Mibeko malamumalamu.”

  • *

    To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/1992, nk. 19-20

    Ndenge ya kosolola, lok. 202

1 Bakorinti 1:21

Mitindami

  • +Kol 2:8
  • +Lk 10:21
  • +1Ko 2:14; 3:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2008, lok. 26

    15/9/1992, nk. 19-24

1 Bakorinti 1:22

Mitindami

  • +Mt 12:38; Lk 11:29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/1992, nk. 22-23

1 Bakorinti 1:23

Mitindami

  • +Mis 17:32

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/2012, lok. 23

    15/8/2010, lok. 4

    15/6/2003, lok. 6

    15/6/1999, lok. 30

1 Bakorinti 1:24

Mitindami

  • +Kol 2:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2015, nk. 3-8

    1/10/1990, lok. 19

    Penepene na Yehova, nk. 87-96

1 Bakorinti 1:25

Mitindami

  • +2Ko 13:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Ndenge ya kosolola, lok. 202

1 Bakorinti 1:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “na miso ya bato.”

  • *

    To, “boutaki te na mabota ya lokumu.”

Mitindami

  • +Mis 4:13
  • +Yn 7:48; Yk 2:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/1994, nk. 12-13

1 Bakorinti 1:27

Mitindami

  • +Mt 11:25

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2014, lok. 24

    15/8/1994, lok. 13

1 Bakorinti 1:28

Mitindami

  • +1Ko 2:6

1 Bakorinti 1:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mosuni moko te.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/1992, lok. 22

1 Bakorinti 1:30

Mitindami

  • +Ro 10:4; 2Ko 5:21
  • +Yn 17:19; Ebr 10:10
  • +Ro 3:24; Kol 1:13, 14

1 Bakorinti 1:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ap. A5.

Mitindami

  • +Yir 9:24; 2Ko 10:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2005, lok. 13

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Ko. 1:1Mis 9:15
1 Ko. 1:2Mis 18:1
1 Ko. 1:21Ko 6:11; Ebr 9:13, 14
1 Ko. 1:2Mt 12:18, 21; Mis 4:12
1 Ko. 1:5Kol 1:9
1 Ko. 1:6Mis 18:5
1 Ko. 1:7Lk 17:29, 30; 2Te 1:7; 1Pe 1:7
1 Ko. 1:81Ko 4:5; 5:5; Em 1:10
1 Ko. 1:9Mib 7:9
1 Ko. 1:10Ro 15:5, 6; 2Ko 13:11; Ef 4:1, 3; Flp 2:2
1 Ko. 1:10Ro 16:17
1 Ko. 1:12Mis 18:24; 1Ko 3:4, 5, 21-23
1 Ko. 1:14Mis 18:8
1 Ko. 1:14Ro 16:23
1 Ko. 1:161Ko 16:15
1 Ko. 1:17Mis 9:15
1 Ko. 1:18Mis 17:18; 1Ko 2:14
1 Ko. 1:18Ro 1:16
1 Ko. 1:19Yis 29:14
1 Ko. 1:21Kol 2:8
1 Ko. 1:21Lk 10:21
1 Ko. 1:211Ko 2:14; 3:18
1 Ko. 1:22Mt 12:38; Lk 11:29
1 Ko. 1:23Mis 17:32
1 Ko. 1:24Kol 2:3
1 Ko. 1:252Ko 13:4
1 Ko. 1:26Mis 4:13
1 Ko. 1:26Yn 7:48; Yk 2:5
1 Ko. 1:27Mt 11:25
1 Ko. 1:281Ko 2:6
1 Ko. 1:30Ro 10:4; 2Ko 5:21
1 Ko. 1:30Yn 17:19; Ebr 10:10
1 Ko. 1:30Ro 3:24; Kol 1:13, 14
1 Ko. 1:31Yir 9:24; 2Ko 10:17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Bakorinti 1:1-31

Mokanda ya liboso epai ya Bakorinti

1 Paulo, moto oyo abengami mpo azala ntoma+ ya Yesu Kristo na mokano ya Nzambe, mpe Sostene ndeko na biso, 2 epai ya lisangá ya Nzambe oyo ezali na Korinti,+ epai na bino baoyo bosantisami na bomoko elongo na Kristo Yesu,+ oyo bobengami mpo na kozala basantu, elongo na baoyo nyonso bazali kobelela bipai nyonso nkombo ya Nkolo na biso, Yesu Kristo,+ Nkolo na bango mpe ya biso:

3 Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino.

4 Napesaka Nzambe na ngai matɔndi ntango nyonso mpo na bino mpo na boboto monene ya Nzambe oyo amoniselaki bino na nzela ya Kristo Yesu; 5 mpo akómisá bino bato ya bomɛngo na likambo nyonso oyo etali ye, na likoki nyonso ya koloba mpe na boyebi nyonso,+ 6 kaka ndenge litatoli mpo na Kristo+ epikami makasi na kati na bino, 7 na yango bozangi ata likabo moko te, wana bozali kozela na mposa makasi mpenza emoniseli ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+ 8 Akokómisa mpe bino makasi tii na nsuka, mpo bópesa nzela na likambo moko te oyo bakoki kofunda bino na yango na mokolo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+ 9 Nzambe azali sembo,+ ye oyo abengaki bino mpo bózala na bomoko elongo na* Mwana na ye Yesu Kristo Nkolo na biso.

10 Nazali kolendisa bino, bandeko, na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo ete bólobaka bino nyonso na boyokani, mpe ete bokabwani ezala te na kati na bino,+ kasi bózala nde mpenza na bomoko na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.+ 11 Mpo bato mosusu ya ndako ya Klowe bayebisi ngai makambo na bino ete bokabwani ezali na kati na bino, bandeko na ngai. 12 Nalingi koloba boye: mokomoko na bino azali koloba: “Ngai nazali moto ya Paulo,” “Kasi ngai moto ya Apolosi,”+ “Kasi ngai moto ya Kefa,”* “Kasi ngai moto ya Kristo.” 13 Kristo akabwani? Kasi Paulo nde akufaki mpo na bino?* Mpe bozwaki batisimo na nkombo ya Paulo? 14 Nazali kopesa Nzambe matɔndi mpo nabatisaki ata moko te na kati na bino, longola kaka Krispusi+ ná Gayusi,+ 15 mpo moto moko te aloba ete bobatisamaki na nkombo na ngai. 16 Ɛɛ, nabatisaki mpe bato ya ndako ya Stefanasi.+ Longola bango, nayebi te soki nabatisaki moto mosusu. 17 Mpo Kristo atindaki ngai, mpo na kobatisa te, kasi kosakola nsango malamu,+ na bwanya ya koloba te,* noki nzete ya mpasi* ya Kristo ezanga ntina.

18 Mpo elobeli oyo etali nzete ya mpasi* ezali bozoba epai ya baoyo bazali kobeba,+ kasi epai na biso baoyo tozali kobikisama, ezali nguya ya Nzambe.+ 19 Mpo ekomamá ete: “Nakosilisa bwanya ya bato ya bwanya, mpe nakobwaka* mayele ya bato ya mayele.”+ 20 Wapi moto ya bwanya? Wapi mokomeli?* Wapi moto ya ntembe na mokili oyo?* Nzambe akómisi bwanya ya mokili bozoba te? 21 Mpo lokola mokili na nzela ya bwanya na yango+ eyebi Nzambe te,+ Nzambe na bwanya na ye amonaki malamu ete, na nzela ya bozoba+ ya eloko oyo ezali kosakolama, abikisa baoyo bazali kondima.

22 Mpo Bayuda bazali kosɛnga bilembo+ mpe Bagrɛki bazali koluka bwanya; 23 kasi biso tozali nde kosakola Kristo abakami na nzete, likambo oyo ezali kobɛtisa Bayuda libaku mpe ezali bozoba epai ya bikólo.+ 24 Nzokande, epai ya baoyo babengami, Bayuda ná Bagrɛki, Kristo azali nguya ya Nzambe mpe bwanya ya Nzambe.+ 25 Biloko oyo euti na Nzambe oyo bato bamonaka bozoba, ezali na bwanya koleka bato, mpe biloko oyo euti na Nzambe oyo emonanaka bolɛmbu epai ya bato, ezali makasi koleka bato.+

26 Bandeko, bino moko bozali komona ete ntango Nzambe abengaki bino, mingi te na kati na bino bozalaki bato ya bwanya na mosuni,*+ bato mingi te ya nguya, bato mingi te ya lokumu,*+ 27 kasi Nzambe aponi biloko ya mokili oyo ezali zoba, mpo ayokisa bato ya bwanya nsɔni; mpe Nzambe aponi biloko ya mokili oyo ezali na bolɛmbu, mpo ayokisa biloko ya makasi nsɔni;+ 28 mpe Nzambe aponi biloko ya mpambampamba ya mokili mpe biloko oyo etyolami, biloko oyo ezali te, mpo akómisa mpamba biloko oyo ezali,+ 29 mpo moto moko te* amikumisa na miso ya Nzambe. 30 Kasi ezali mpo na ye nde bino bozali na bomoko elongo na Kristo Yesu, oyo akómi epai na biso bwanya oyo euti na Nzambe, mpe bosembo,+ kosantisama+ mpe kosikolama na nzela ya lisiko,+ 31 mpo ezala mpenza ndenge ekomamá ete: “Moto oyo azali komikumisa, amikumisa na Yehova.”*+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto