Amose
8 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso amonisaki ngai! Namonaki kitunga moko ya bambuma oyo eteli.* 2 Bongo atunaki ngai: “Amose, ozali komona nini?” Nazongisaki: “Kitunga moko ya bambuma oyo eteli.”* Bongo Yehova alobaki na ngai: “Nsuka ya bato na ngai Yisraele ekómi. Nakolimbisa bango lisusu te.+ 3 ‘Na mokolo yango nzembo ya tempelo ekobongwana kolela,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. ‘Ekozala na bibembe ebele, oyo bakobwaka bisika nyonso.+ Shiii!’
4 Bóyoka likambo oyo, bino baoyo bozali konyatanyata babola,
Mpe kolimwisa bato ya komikitisa na ekólo,+
5 Bozali koloba: ‘Ntango nini fɛti ya sanza ya sika ekosila,+ mpo tókoka kotɛka mbuma na biso?
Mpe sabata,+ mpo tókoka kotya mbuma na biso mpo na kotɛka?
Bongo tokokómisa mezire ya efa* moke,
Mpe tokobakisa kilo ya shekele*
Mpe tokobongola bimekeli-kilo na biso mpo na kokosa bato;+
6 Mpo tókoka kosomba moto oyo azangá mpo na palata
Mpe mobola mpo na sandale,+
Mpe mpo tókoka kotɛka putulu mpamba ya mbuma na biso.’
Ekomata te lokola Nile ntango mai na yango etondi?
Ekotombwana mpe ekokita na nse lokola Nile ya Ezipito.’+
9 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi,
‘Na mokolo yango nakosala ete moi elala na ntango ya midi,
Mpe nakotika ekólo ezala kaka na molili, wana moi ezali kongɛnga.+
Nakolatisa loketo nyonso ngɔtɔ* mpe nakokómisa mitó nyonso mabandi;
Nakosala ete ezala lokola kolela oyo balelaka mwana mobali kaka moko,
Mpe nsuka ya mokolo yango ekozala bololo.’
11 ‘Bóyoka!’ Yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, mikolo ezali koya,
‘Nakotinda nzala moko na mokili,
Nzala ya mampa te to mposa ya mai te,
Kasi ya koyoka maloba ya Yehova.+
12 Bakotambola na kotengatenga longwa na mbu moko tii na mbu mosusu,
Mpe longwa na nɔrdi tii na ɛsti.*
Bakotambola epai na epai mpo na koluka liloba ya Yehova, kasi bakomona yango te.
13 Na mokolo yango bangɔndɔ kitoko bakosila makasi,
Ata mpe bilenge mibali, mpo na mposa ya mai;
14 Baoyo bazali kolapa ndai na libunga ya Samaria,+ mpe bazali koloba:
“Lokola nzambe na yo azali solo na bomoi, Ee Dani!”+
Mpe, “Lokola nzela ya Beere-sheba+ ezali kaka!”
Bakokwea, mpe bakotɛlɛma lisusu te.’”+