Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 5
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Kobanda na Adama tii na Noa (1-32)

        • Adama aboti bana mibali ná bana basi (4)

        • Enoka atambolaki elongo na Nzambe (21-24)

Ebandeli 5:1

Mitindami

  • +Eb 1:26; Yk 3:9

Ebandeli 5:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Adama; bato.”

Mitindami

  • +Eb 1:27; Mr 10:6
  • +Eb 2:23; Yis 45:12; Mt 19:4

Ebandeli 5:3

Mitindami

  • +Eb 4:25

Ebandeli 5:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Ndenge ya kosolola, nk. 253-254, 383-384

Ebandeli 5:5

Mitindami

  • +Eb 2:17; 3:19; Ro 6:23; 1Ko 15:22

Ebandeli 5:6

Mitindami

  • +Eb 4:26; Lk 3:23, 38

Ebandeli 5:12

Mitindami

  • +Lk 3:23, 37

Ebandeli 5:15

Mitindami

  • +Lk 3:23, 37

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/2002, nk. 5-6

Ebandeli 5:18

Mitindami

  • +Yd 14

Ebandeli 5:21

Mitindami

  • +Lk 3:23, 37

Ebandeli 5:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na Nzambe.” Talá Ndimbola ya maloba.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 1 2017 nk. 10-11

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2005, nk. 15-17

    1/5/2003, lok. 29

Ebandeli 5:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 1 2017 lok. 10

Ebandeli 5:24

Mitindami

  • +Eb 6:9; Mib 8:6; 13:4; 3Yn 4; Yd 14, 15
  • +Yn 3:13; Ebr 11:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 1 2017 nk. 12-13

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2006, lok. 19

    1/9/2005, lok. 15

    1/1/2004, lok. 29

    15/9/2001, lok. 31

    1/6/1998, lok. 9

    15/1/1997, nk. 30-31

Ebandeli 5:25

Mitindami

  • +Lk 3:23, 36

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 1 2017 lok. 11

Ebandeli 5:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ntango mosusu elimboli, “kopema; libɔndisi.”

  • *

    To, “akokitisa biso motema.”

Mitindami

  • +Eb 7:1; Ezk 14:14; Mt 24:37; Ebr 11:7; 1Pe 3:20; 2Pe 2:5
  • +Eb 3:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    6/2017, lok. 8

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/4/2013, lok. 14

    1/2/2009, lok. 13

    15/11/2001, lok. 29

    1/11/1996, lok. 8

    Mekolá, lok. 22

Ebandeli 5:32

Mitindami

  • +Eb 10:21; 11:10; Lk 3:23, 36
  • +Eb 6:10; 10:6
  • +Eb 10:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2012, lok. 23

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 5:1Eb 1:26; Yk 3:9
Eba. 5:2Eb 1:27; Mr 10:6
Eba. 5:2Eb 2:23; Yis 45:12; Mt 19:4
Eba. 5:3Eb 4:25
Eba. 5:5Eb 2:17; 3:19; Ro 6:23; 1Ko 15:22
Eba. 5:6Eb 4:26; Lk 3:23, 38
Eba. 5:12Lk 3:23, 37
Eba. 5:15Lk 3:23, 37
Eba. 5:18Yd 14
Eba. 5:21Lk 3:23, 37
Eba. 5:24Eb 6:9; Mib 8:6; 13:4; 3Yn 4; Yd 14, 15
Eba. 5:24Yn 3:13; Ebr 11:5
Eba. 5:25Lk 3:23, 36
Eba. 5:29Eb 7:1; Ezk 14:14; Mt 24:37; Ebr 11:7; 1Pe 3:20; 2Pe 2:5
Eba. 5:29Eb 3:17
Eba. 5:32Eb 10:21; 11:10; Lk 3:23, 36
Eba. 5:32Eb 6:10; 10:6
Eba. 5:32Eb 10:2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 5:1-32

Ebandeli

5 Oyo ezali buku ya lisolo ya Adama. Ntango Nzambe azalisaki Adama, asalaki ye azala lokola Nzambe.+ 2 Azalisaki bango mobali ná mwasi.+ Na mokolo oyo azalisaki bango,+ apambolaki bango mpe apesaki bango nkombo Moto.*

3 Adama akómaki na mbula 130 mpe abotaki mwana mobali oyo akokani na ye, na elilingi na ye, mpe apesaki ye nkombo Sete.+ 4 Nsima ya kobota Sete, Adama aumelaki lisusu na bomoi mbula 800. Mpe abotaki bana mibali mpe bana basi. 5 Na yango, bomoi mobimba ya Adama ezalaki mbula 930, mpe na nsima akufaki.+

6 Sete akómaki na mbula 105 mpe abotaki Enoshe.+ 7 Nsima ya kobota Enoshe, Sete aumelaki lisusu na bomoi mbula 807. Mpe abotaki bana mibali ná bana basi. 8 Na yango, bomoi mobimba ya Sete ezalaki mbula 912, mpe na nsima akufaki.

9 Enoshe akómaki na mbula 90 mpe abotaki Kenane. 10 Nsima ya kobota Kenane, Enoshe aumelaki lisusu na bomoi mbula 815. Mpe abotaki bana mibali ná bana basi. 11 Na yango, bomoi mobimba ya Enoshe ezalaki mbula 905, mpe na nsima akufaki.

12 Kenane akómaki na mbula 70 mpe abotaki Mahalalele.+ 13 Nsima ya kobota Mahalalele, Kenane aumelaki lisusu na bomoi mbula 840. Mpe abotaki bana mibali mpe bana basi. 14 Na yango, bomoi mobimba ya Kenane ezalaki mbula 910, mpe na nsima akufaki.

15 Mahalalele akómaki na mbula 65 mpe abotaki Yarede.+ 16 Nsima ya kobota Yarede, Mahalalele aumelaki lisusu na bomoi mbula 830. Mpe abotaki bana mibali ná bana basi. 17 Na yango, bomoi mobimba ya Mahalalele ezalaki mbula 895, mpe na nsima akufaki.

18 Yarede akómaki na mbula 162 mpe abotaki Enoka.+ 19 Nsima ya kobota Enoka, Yarede aumelaki lisusu na bomoi mbula 800. Mpe abotaki bana mibali ná bana basi. 20 Na yango, bomoi mobimba ya Yarede ezalaki mbula 962, mpe na nsima akufaki.

21 Enoka akómaki na mbula 65 mpe abotaki Metusela.+ 22 Nsima ya kobota Metusela, Enoka akobaki kotambola elongo na Nzambe ya solo* mbula 300. Mpe abotaki bana mibali ná bana basi. 23 Na yango, bomoi mobimba ya Enoka ezalaki mbula 365. 24 Enoka akobaki kotambola elongo na Nzambe ya solo.+ Na nsima azalaki lisusu te, mpo Nzambe azwaki ye.+

25 Metusela akómaki na mbula 187 mpe na nsima abotaki Lameke.+ 26 Nsima ya kobota Lameke, Metusela aumelaki lisusu na bomoi mbula 782. Mpe abotaki bana mibali ná bana basi. 27 Na yango, bomoi mobimba ya Metusela ezalaki mbula 969, mpe na nsima akufaki.

28 Lameke akómaki na mbula 182. Mpe na nsima abotaki mwana mobali. 29 Apesaki ye nkombo Noa,*+ mpe alobaki ete: “Ye akobɔndisa biso* na mosala na biso ya makasi mpe na mpasi ya mabɔkɔ na biso mpo na mabele oyo Yehova alakeli mabe.”+ 30 Nsima ya kobota Noa, Lameke aumelaki lisusu na bomoi mbula 595. Mpe abotaki bana mibali ná bana basi. 31 Na yango, bomoi mobimba ya Lameke ezalaki mbula 777, mpe na nsima akufaki.

32 Ntango Noa akómaki na mbula 500, abotaki Seme,+ Kame+ mpe Yafete.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto