Nzembo
Epai ya mokambi ya nzembo. Maskile.* Ya Davidi, ntango Doege Moedome ayaki koyebisa Saulo ete Davidi akendaki na ndako ya Ahimeleke.+
52 Mpo na nini ozali komikumisa mpo na misala na yo ya mabe, yo moto ya nguya?+
Bolingo ya sembo ya Nzambe ezali koumela mokolo mobimba.+
3 Olingi mabe koleka malamu,
Lokuta koleka koloba oyo ezali sembo. (Sela)
4 Olingi liloba nyonso oyo esalaka mabe,
Yo lolemo oyo elobaka makambo ya bokosi!
5 Yango wana Nzambe akobebisa yo mbala moko mpo na libela;+
Akotombola yo nokinoki mpe akolongola yo na hema na yo,+
Akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.+ (Sela)
7 “Talá mobali oyo azalaki te kotya Nzambe azala esika na ye ya kokima,*+
Kasi atyaki motema nde na ebele ya bomɛngo na ye+
Mpe atyaki motema* na makambo ya mabe oyo azalaki kokana kosala.”*