Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bagalatia 1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Bagalatia

      • Mbote (1-5)

      • Nsango malamu mosusu ezali te (6-9)

      • Nsango malamu oyo Paulo azalaki kosakola euti epai ya Nzambe (10-12)

      • Mbongwana ya Paulo mpe ebandeli ya mosala na ye (13-24)

Bagalatia 1:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “alamwisaki.”

Mitindami

  • +Mis 9:15; 26:15, 16
  • +Mis 22:14, 15

Bagalatia 1:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 217

Bagalatia 1:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “eleko ya mabe oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +1Yn 2:1, 2
  • +Yn 15:19
  • +1Ti 2:3, 4

Bagalatia 1:6

Mitindami

  • +2Ko 11:3, 4; Ga 5:7

Bagalatia 1:7

Mitindami

  • +Ga 5:10

Bagalatia 1:11

Mitindami

  • +1Te 2:13

Bagalatia 1:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “konyokola tii koleka ndelo.”

Mitindami

  • +Mis 23:6
  • +Mis 8:3; 9:1, 2; 22:4; 26:9-11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/1999, nk. 29-31

Bagalatia 1:14

Mitindami

  • +Mis 22:3; Flp 3:4-6

Bagalatia 1:15

Mitindami

  • +1Ko 15:10

Bagalatia 1:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na nzoto ná makila.”

Mitindami

  • +Mis 9:15; Ro 11:13

Bagalatia 1:17

Mitindami

  • +Mis 9:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2008, lok. 22

    15/1/2005, nk. 28-29

Bagalatia 1:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Bazalaki mpe kobenga ye Petro.

Mitindami

  • +Mis 9:26
  • +Yn 1:42; 1Ko 15:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tópesa litatoli, lok. 12

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2007, nk. 15-17

Bagalatia 1:19

Mitindami

  • +Mt 13:55; Mis 12:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tópesa litatoli, lok. 112

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2007, nk. 16-17

Bagalatia 1:21

Mitindami

  • +Mis 9:29, 30

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2000, lok. 26

Bagalatia 1:23

Mitindami

  • +Ga 1:13
  • +Mis 8:3

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Gal. 1:1Mis 9:15; 26:15, 16
Gal. 1:1Mis 22:14, 15
Gal. 1:41Yn 2:1, 2
Gal. 1:4Yn 15:19
Gal. 1:41Ti 2:3, 4
Gal. 1:62Ko 11:3, 4; Ga 5:7
Gal. 1:7Ga 5:10
Gal. 1:111Te 2:13
Gal. 1:13Mis 23:6
Gal. 1:13Mis 8:3; 9:1, 2; 22:4; 26:9-11
Gal. 1:14Mis 22:3; Flp 3:4-6
Gal. 1:151Ko 15:10
Gal. 1:16Mis 9:15; Ro 11:13
Gal. 1:17Mis 9:19
Gal. 1:18Mis 9:26
Gal. 1:18Yn 1:42; 1Ko 15:5
Gal. 1:19Mt 13:55; Mis 12:17
Gal. 1:21Mis 9:29, 30
Gal. 1:23Ga 1:13
Gal. 1:23Mis 8:3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Bagalatia 1:1-24

Epai ya Bagalatia

1 Ngai Paulo, ntoma oyo natyami na bato te mpe na nzela ya moto te, kasi na nzela ya Yesu Kristo+ mpe ya Nzambe Tata,+ oyo asekwisaki* ye uta na bakufi, 2 mpe bandeko nyonso oyo bazali elongo na ngai, epai ya masangá ya Galatia:

3 Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino. 4 Ye amikabaki mpo na masumu na biso+ mpo asikola biso na mokili oyo ya mabe,*+ na boyokani na mokano ya Nzambe na biso mpe Tata.+ 5 Tiká Nzambe azala na nkembo libela na libela. Amen.

6 Nazali kokamwa ndenge bozali kolongwa nokinoki mpenza epai ya Moto oyo abengaki bino na boboto monene ya Kristo mpe bozali kondima nsango mosusu lokola nde ezali nsango malamu.+ 7 Elingi koloba te ete nsango malamu mosusu ezali; kasi ezali nde na bato mosusu oyo bazali kotya bino na mobulu+ mpe balingi kobebisa nsango malamu oyo etali Kristo. 8 Nzokande, ata soki moko na biso to anzelu moko boye, oyo auti na likoló asakweli bino nsango malamu ya likambo moko boye oyo ekeseni na nsango malamu oyo tosakwelaki bino, alakelama mabe. 9 Tolobaki yango liboso, mpe nalobi yango lisusu sikoyo ete: Moto nyonso oyo azali kosakwela bino nsango malamu ya likambo moko boye oyo ekeseni na oyo boyambaki, alakelama mabe.

10 Sikoyo nazali nde koluka kondimisa bato to Nzambe? To nazali nde koluka kosepelisa bato? Soki nazali naino kosepelisa bato, nazali moombo ya Kristo te. 11 Bandeko, nalingi bóyeba ete nsango malamu oyo nasakwelaki bino euti na bato te;+ 12 mpo nazwaki yango epai ya moto te, moto moko mpe te ateyaki ngai yango, kasi Yesu Kristo nde apesaki ngai yango na nzela ya emoniseli.

13 Ya solo, boyokaki nsango ya etamboli na ngai ya kala na lingomba ya Bayuda,+ ndenge nazalaki konyokola makasi* lisangá ya Nzambe mpe kopanza yango,+ 14 mpe nazalaki kokende liboso mpenza na kati ya lingomba ya Bayuda koleka bato mingi ya mbula na ngai na ekólo na ngai, mpo nazalaki na molende mingi mpenza mpo na bonkɔkɔ ya batata na ngai.+ 15 Kasi ntango Nzambe, oyo abimisaki ngai na libumu ya mama na ngai mpe abengaki ngai na boboto monene na ye,+ amonaki malamu 16 komonisa Mwana na ye na nzela na ngai, mpo nasakwela bikólo nsango malamu etali ye,+ nakendaki mbala moko te koluka likanisi ya moto mosusu;* 17 namataki mpe te na Yerusaleme epai ya baoyo bazalaki bantoma liboso na ngai, kasi nakendaki nde na Arabia, mpe nazongaki lisusu na Damasi.+

18 Mbula misato na nsima, namataki na Yerusaleme+ kotala Kefa,*+ mpe nafandaki na ye mikolo 15. 19 Kasi namonaki ntoma mosusu ata moko te, longola kaka Yakobo,+ ndeko ya Nkolo. 20 Nzambe azali komona ete makambo oyo nazali kokomela bino ezali ya solo.

21 Nsima na yango, nakendaki na bitúká ya Siri mpe ya Silisia.+ 22 Kasi masangá ya Yudea oyo ezali na bomoko na Kristo eyebaki ngai boye te na miso. 23 Ezalaki kaka koyoka ete: “Moto oyo azalaki kala konyokola biso+ azali sikoyo kosakola nsango malamu ya kondima oyo ye azalaki liboso koluka kobebisa.”+ 24 Bongo babandaki kokumisa Nzambe mpo na ngai.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto