Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakorinti 14
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Bakorinti

      • Makabo ya esakweli mpe ya minɔkɔ (1-25)

      • Makita esengeli kosalema na molɔngɔ (26-40)

        • Esika ya mwasi na lisangá (34, 35)

1 Bakorinti 14:1

Mitindami

  • +1Te 5:20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/1993, lok. 31

1 Bakorinti 14:2

Mitindami

  • +1Ko 14:5
  • +1Ko 13:2

1 Bakorinti 14:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2010, nk. 24-25

1 Bakorinti 14:5

Mitindami

  • +1Ko 12:30
  • +Yoe 2:28; Mis 2:17; 21:8, 9

1 Bakorinti 14:6

Mitindami

  • +Ga 1:11, 12; 2:2
  • +1Ko 12:8

1 Bakorinti 14:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/2015, lok. 20

1 Bakorinti 14:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/2015, lok. 20

1 Bakorinti 14:12

Mitindami

  • +1Ko 12:7; 14:4, 26

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2007, nk. 23-24

1 Bakorinti 14:13

Mitindami

  • +1Ko 12:8, 10; 14:5

1 Bakorinti 14:19

Mitindami

  • +1Ko 14:4

1 Bakorinti 14:20

Mitindami

  • +Ef 4:14
  • +Ro 16:19
  • +Ebr 5:13, 14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2007, lok. 11

    15/7/1993, lok. 20

1 Bakorinti 14:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ap. A5.

Mitindami

  • +Yis 28:11, 12

1 Bakorinti 14:22

Mitindami

  • +Mis 2:4, 13

1 Bakorinti 14:25

Mitindami

  • +Yis 45:14; Zek 8:23

1 Bakorinti 14:26

Mitindami

  • +1Ko 12:8, 10

1 Bakorinti 14:27

Mitindami

  • +1Ko 14:5

1 Bakorinti 14:29

Mitindami

  • +Mis 13:1

1 Bakorinti 14:31

Mitindami

  • +Ebr 10:24, 25

1 Bakorinti 14:33

Mitindami

  • +1Ko 14:40; Kol 2:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 20

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, lok. 120

1 Bakorinti 14:34

Mitindami

  • +1Ti 2:11, 12
  • +1Ko 11:3; Ef 5:22; Kol 3:18; Tit 2:5; 1Pe 3:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2012, lok. 9

    1/3/2006, nk. 28-29

    Ndenge ya kosolola, lok. 78

1 Bakorinti 14:36

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/2011, lok. 14

1 Bakorinti 14:37

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/1993, lok. 31

1 Bakorinti 14:38

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “soki moto moko azangi boyebi atikala kaka bongo.”

1 Bakorinti 14:39

Mitindami

  • +1Te 5:20
  • +1Ko 14:27

1 Bakorinti 14:40

Mitindami

  • +1Ko 14:33; Kol 2:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 54

    Lamuká!,

    No. 1 2020 lok. 10

    “Bolingo ya Nzambe,” lok. 49

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/1997, lok. 9

    “Makomami nyonso,” nk. 213-214

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Ko. 14:11Te 5:20
1 Ko. 14:21Ko 14:5
1 Ko. 14:21Ko 13:2
1 Ko. 14:51Ko 12:30
1 Ko. 14:5Yoe 2:28; Mis 2:17; 21:8, 9
1 Ko. 14:6Ga 1:11, 12; 2:2
1 Ko. 14:61Ko 12:8
1 Ko. 14:121Ko 12:7; 14:4, 26
1 Ko. 14:131Ko 12:8, 10; 14:5
1 Ko. 14:191Ko 14:4
1 Ko. 14:20Ef 4:14
1 Ko. 14:20Ro 16:19
1 Ko. 14:20Ebr 5:13, 14
1 Ko. 14:21Yis 28:11, 12
1 Ko. 14:22Mis 2:4, 13
1 Ko. 14:25Yis 45:14; Zek 8:23
1 Ko. 14:261Ko 12:8, 10
1 Ko. 14:271Ko 14:5
1 Ko. 14:29Mis 13:1
1 Ko. 14:31Ebr 10:24, 25
1 Ko. 14:331Ko 14:40; Kol 2:5
1 Ko. 14:341Ti 2:11, 12
1 Ko. 14:341Ko 11:3; Ef 5:22; Kol 3:18; Tit 2:5; 1Pe 3:1
1 Ko. 14:391Te 5:20
1 Ko. 14:391Ko 14:27
1 Ko. 14:401Ko 14:33; Kol 2:5
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Bakorinti 14:1-40

Mokanda ya liboso epai ya Bakorinti

14 Na nyonso bómonisa bolingo; kasi bósala nyonso mpo na kozwa makabo ya elimo, mingimingi likabo ya kosakola.+ 2 Moto oyo azali na likabo ya koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge, azali koloba na Nzambe, kasi epai ya bato te. Moto moko te azali kokanga ntina ya makambo oyo azali koloba,+ mpo azali koloba basekele mosantu+ na nguya ya elimo santu. 3 Nzokande, moto oyo azali kosakola, azali kotonga, kolendisa mpe kobɔndisa bato na maloba na ye. 4 Moto oyo azali koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge, azali komilendisa. Kasi moto oyo azali kosakola azali kolendisa lisangá. 5 Nakosepela bino nyonso bózala na likabo ya koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge;+ kasi nakolinga mingi nde bósakolaka.+ Moto oyo azali kosakola aleki moto oyo azali na likabo ya koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge, longola kaka soki abongoli yango mpo na kolendisa lisangá. 6 Bandeko, soki nalobi na bino na minɔkɔ ndenge na ndenge, ekosalisa bino? Ekosalisa bino kaka soki namemeli bino emoniseli oyo euti na Nzambe,+ to boyebi,+ to esakweli to mateya.

7 Ezali ndenge moko na biloko oyo ezangi bomoi oyo ebimisaka mongongo, lokola piololo to nzɛnzɛ. Soki bakesenisi banɔti ya miziki te, ndenge nini moto akoyeba ete eloko oyo bazali kobɛta ezali piololo to nzɛnzɛ? 8 Soki moto oyo azali kobɛta kelelo ya etumba abɛti yango malamu te, nani akomibongisa mpo na etumba? 9 Ndenge moko mpe, soki bozali kosalela elobeli oyo ezali pɛtɛɛ te mpo na kokanga ntina, ndenge nini moto akoyeba makambo oyo bozali koloba? Bokoloba nde na mopɛpɛ. 10 Ekoki kozala ete ndenge ya koloba ezali ebele mpenza na mokili, kasi lolenge moko te ezangi ndimbola. 11 Soki nazali kokanga ntina te ya ndimbola ya makambo oyo ezali kolobama, nakozala lokola mopaya epai ya moto oyo azali koloba, mpe moto yango akozala lokola mopaya epai na ngai. 12 Ndenge moko mpe bino, lokola bozali na mposa makasi ya makabo ya elimo, bóluka makabo oyo ekotonga lisangá.+

13 Na yango, moto oyo azali koloba na monɔkɔ mosusu abondela mpo akoka kobongola makambo oyo azali koloba.+ 14 Mpo soki nazali kobondela na monɔkɔ moko boye, ezali likabo na ngai ya elimo nde ezali kobondela, kasi makanisi na ngai esali eloko te. 15 Na yango, nasengeli kosala nini? Nakobondela na likabo ya elimo, kasi nakosalela mpe mayele mpo na kobondela. Nakoyemba nzembo ya masanzoli na likabo ya elimo, kasi mpe nakoyemba nzembo ya masanzoli na maloba oyo nakokanga ntina. 16 Na maloba mosusu, soki ozali kopesa lisanzoli na likabo ya elimo, ndenge nini moto oyo afandi esika moko na yo akoloba “Amen” na libondeli na yo ya kopesa matɔndi, lokola ayebi te makambo oyo ozali koloba? 17 Ya solo, ozali kopesa matɔndi na ndenge ya malamu, kasi moto mosusu azweli yango litomba te. 18 Napesaka Nzambe matɔndi mpo nazali na likabo ya koloba na minɔkɔ mingi koleka bino nyonso. 19 Nzokande, na lisangá nakosepela kosalela maloba mitano oyo nazali kokanga ntina, mpo na koteya basusu, na esika ya maloba nkóto zomi na monɔkɔ oyo eyebani te.+

20 Bandeko, bózala bana mike te na makoki ya kososola.+ Kasi bózala nde lokola bana mike oyo bayebi likambo te na oyo etali mabe;+ nzokande bózala mikóló na makoki ya kososola.+ 21 Na Mibeko ekomamá ete: “‘Nakoloba na bato oyo na minɔkɔ ya bapaya mpe na maloba ya bapaya, mpe atako bongo bakoboya koyoka ngai,’ Yehova* alobi bongo.”+ 22 Likabo ya koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge ezali elembo mpo na bato oyo bazangi kondima, kasi te mpo na bandimi.+ Kasi kosakola ezali mpo na bandimi, kasi te mpo na bato oyo bazangi kondima. 23 Soki lisangá mobimba eyangani mpe bango nyonso bazali koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge, mpe bato mpamba to bato bazangi kondima bakɔti, bakoloba te ete bozali na ligboma? 24 Kasi soki bino nyonso bozali kosakola mpe moto moko oyo azangi kondima to moto mpamba akɔti, makambo oyo azali koyoka ekosembola ye, mpe ekosala ete amitalela malamumalamu. 25 Basekele ya motema na ye ekomonana polele, bongo akokwea na nse mpe akosambela Nzambe, alobi: “Nzambe azali mpenza na kati na bino.”+

26 Na yango, bandeko, bosengeli kosala nini? Ntango boyangani, moko azali na nzembo moko boye, mosusu azali na liteya moko boye, mosusu azali na emoniseli moko boye, mosusu azali na monɔkɔ moko boye, mosusu azali na ndimbola moko boye.+ Makambo nyonso esalema mpo na kotonga. 27 Soki moto moko azali koloba na monɔkɔ mosusu, esuka na bato mibale to misato kaka, mpe moto na moto na ngala na ye; mpe moto moko asengeli kobongola makambo oyo elobami.+ 28 Kasi soki mobongoli azali te, moto wana afanda nyɛɛ na lisangá mpe aloba na ye moko mpe na Nzambe. 29 Basakoli mibale to misato+ báloba, mpe bamosusu básosola ndimbola. 30 Kasi soki emoniseli moko eyei epai ya moto mosusu ntango afandi wana, oyo ya liboso afanda nyɛɛ. 31 Mpo bino nyonso bokoki kosakola mokomoko na ngala na ye, mpo bato nyonso báyekola mpe bálendisama.+ 32 Basakoli basengeli kosalela makabo na bango ya elimo na ndenge ya malamu. 33 Mpo Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi ya kimya.+

Lokola na masangá nyonso ya basantu, 34 basi báfanda nyɛɛ na masangá, mpo bapesi bango nzela ya koloba te,+ kasi bámikitisa,+ ndenge Mibeko elobi. 35 Na yango, soki balingi koyeba likambo moko boye, bátuna mibali na bango na ndako, mpo ezali nsɔni mwasi aloba na lisangá.

36 Liloba ya Nzambe ebimaki nde epai na bino, to kaka bino moko nde bozwaki yango?

37 Soki moto moko akanisi ete azali mosakoli to azwá likabo ya elimo, asengeli kondima ete makambo nazali kokomela bino, ezali mobeko ya Nkolo. 38 Kasi soki moto moko andimi yango te, bakondima ye mpe te.* 39 Na yango, bandeko na ngai, bókoba koluka na molende bisakweli,+ nzokande bópekisa moto moko te aloba na minɔkɔ ndenge na ndenge.+ 40 Kasi makambo nyonso esalema na ndenge oyo ebongi mpe na molɔngɔ.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto