Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 16
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Ahaze, mokonzi ya Yuda (1-6)

      • Ahaze apesi Baasiri kanyaka (7-9)

      • Ahaze asali etumbelo ya bapakano (10-18)

      • Liwa ya Ahaze (19, 20)

2 Bakonzi 16:1

Mitindami

  • +Yis 1:1; 7:1; Hos 1:1; Mik 1:1; Mt 1:9

2 Bakonzi 16:2

Mitindami

  • +2Nt 28:1-4

2 Bakonzi 16:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “atambolaki na nzela ya.”

Mitindami

  • +1Ba 12:28-30; 16:33
  • +Le 20:2, 3; 2Nt 33:1, 6; Yir 7:31
  • +Mib 12:29-31

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Esakweli ya Yisaya I, nk. 8-9

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/1997, lok. 14

2 Bakonzi 16:4

Mitindami

  • +Mit 33:52
  • +Mib 12:2

2 Bakonzi 16:5

Mitindami

  • +2Ba 15:37; 2Nt 28:5, 6

2 Bakonzi 16:6

Mitindami

  • +2Ba 14:21, 22

2 Bakonzi 16:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Komibenga “mwana na yo” ntango ozali kosolola na moto ezalaki komonisa limemya.

Mitindami

  • +2Ba 15:29

2 Bakonzi 16:8

Mitindami

  • +1Ba 15:18, 19

2 Bakonzi 16:9

Mitindami

  • +Am 1:4, 5
  • +Yis 9:11

2 Bakonzi 16:10

Mitindami

  • +Mib 12:30

2 Bakonzi 16:11

Mitindami

  • +Yis 8:2
  • +Yir 23:11; Ezk 22:26

2 Bakonzi 16:12

Mitindami

  • +2Nt 28:22, 23, 25

2 Bakonzi 16:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

2 Bakonzi 16:14

Mitindami

  • +2Nt 4:1

2 Bakonzi 16:15

Mitindami

  • +Yis 8:2
  • +2Nt 28:23
  • +Kob 29:39-41

2 Bakonzi 16:16

Mitindami

  • +2Ba 16:11

2 Bakonzi 16:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Mbu.”

Mitindami

  • +1Ba 7:27, 28
  • +1Ba 7:38; 2Nt 4:6
  • +1Ba 7:23, 25
  • +2Nt 28:24; 29:19

2 Bakonzi 16:19

Mitindami

  • +2Nt 28:26, 27

2 Bakonzi 16:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

  • *

    Elimboli, “Yehova apesaka makasi.”

Mitindami

  • +2Ba 18:1; 2Nt 29:1; Yis 1:1; Hos 1:1; Mt 1:9

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 16:1Yis 1:1; 7:1; Hos 1:1; Mik 1:1; Mt 1:9
2 Bak. 16:22Nt 28:1-4
2 Bak. 16:31Ba 12:28-30; 16:33
2 Bak. 16:3Le 20:2, 3; 2Nt 33:1, 6; Yir 7:31
2 Bak. 16:3Mib 12:29-31
2 Bak. 16:4Mit 33:52
2 Bak. 16:4Mib 12:2
2 Bak. 16:52Ba 15:37; 2Nt 28:5, 6
2 Bak. 16:62Ba 14:21, 22
2 Bak. 16:72Ba 15:29
2 Bak. 16:81Ba 15:18, 19
2 Bak. 16:9Am 1:4, 5
2 Bak. 16:9Yis 9:11
2 Bak. 16:10Mib 12:30
2 Bak. 16:11Yis 8:2
2 Bak. 16:11Yir 23:11; Ezk 22:26
2 Bak. 16:122Nt 28:22, 23, 25
2 Bak. 16:142Nt 4:1
2 Bak. 16:15Yis 8:2
2 Bak. 16:152Nt 28:23
2 Bak. 16:15Kob 29:39-41
2 Bak. 16:162Ba 16:11
2 Bak. 16:171Ba 7:27, 28
2 Bak. 16:171Ba 7:38; 2Nt 4:6
2 Bak. 16:171Ba 7:23, 25
2 Bak. 16:172Nt 28:24; 29:19
2 Bak. 16:192Nt 28:26, 27
2 Bak. 16:202Ba 18:1; 2Nt 29:1; Yis 1:1; Hos 1:1; Mt 1:9
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 16:1-20

Mokanda ya mibale ya

16 Na mbula ya 17 ya boyangeli ya Peka mwana ya Remalia, Ahaze+ mwana ya Yotame mokonzi ya Yuda akómaki mokonzi. 2 Ahaze azalaki na mbula 20 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 16 na Yerusaleme. Asalaki te makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova Nzambe na ye ndenge nkɔkɔ na ye Davidi asalaki.+ 3 Kutu alandaki ndakisa mabe ya* bakonzi ya Yisraele,+ mpe alekisaki mwana na ye moko mbeka na mɔtɔ;+ amekolaki makambo oyo eyinamá ya bikólo+ oyo Yehova abenganaki na mokili na bango mpo na kopesa yango Bayisraele. 4 Azalaki mpe kopesa mbeka mpe komatisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná,+ na bangomba mike, mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa.+

5 Na ntango yango nde Rezine mokonzi ya Siri mpe Peka mwana ya Remalia, mokonzi ya Yisraele bamataki mpo na kobundisa Ahaze.+ Bazingaki Yerusaleme, kasi bakokaki kobɔtɔla engumba yango te. 6 Na ntango yango, Rezine mokonzi ya Siri azongisaki Elate+ epai ya Baedome, nsima na yango, abenganaki Bayuda na Elate. Mpe Baedome bakɔtaki na Elate mpe bakómá kofanda wana tii na mokolo ya lelo. 7 Bongo Ahaze atindelaki Tiglate-pilesere+ mokonzi ya Asiri bamemi-nsango, alobi: “Nazali mosaleli na yo mpe mwana na yo.* Yaká kobikisa ngai na lobɔkɔ ya mokonzi ya Siri mpe na lobɔkɔ ya mokonzi ya Yisraele, oyo bazali kobundisa ngai.” 8 Bongo Ahaze azwaki palata mpe wolo oyo ezalaki na tempelo ya Yehova mpe na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi mpe atindelaki yango mokonzi ya Asiri lokola kanyaka.+ 9 Mokonzi ya Asiri asalaki likambo oyo Ahaze asɛngaki ye. Akendaki kobundisa Damasi mpe abɔtɔlaki yango mpe amemaki bato na yango na mboka mopaya na Kire,+ mpe abomaki Rezine.+

10 Na nsima Mokonzi Ahaze akendaki kokutana na Tiglate-pilesere mokonzi ya Asiri na Damasi. Ntango Mokonzi Ahaze amonaki etumbelo oyo ezalaki na Damasi, atindelaki nganga-nzambe Uriya plan ya etumbelo yango, oyo emonisaki malamumalamu ndenge basalaki yango.+ 11 Nganga-nzambe Uriya+ atongaki etumbelo+ moko na kolanda malako nyonso oyo Mokonzi Ahaze atindelaki ye longwa na Damasi. Nganga-nzambe Uriya asilisaki kotonga yango liboso ete Mokonzi Ahaze alongwa na Damasi mpe azonga. 12 Ntango mokonzi autaki na Damasi mpe amonaki etumbelo yango, apusanaki pene na yango mpe apesaki makabo likoló na yango.+ 13 Mpe akobaki kobimisa milinga ya likabo na ye ya kotumba mpe ya likabo na ye ya mbuma likoló ya etumbelo yango; azalaki mpe kosopa likabo na ye ya masanga mpe komwangisa makila ya bambeka na ye ya kimya* likoló na yango. 14 Bongo etumbelo ya kwivre+ oyo ezalaki liboso ya Yehova na esika na yango liboso ya ndako, oyo ezalaki kati na etumbelo ya Ahaze mpe ndako ya Yehova, Ahaze alongolaki yango mpe atyaki yango na nɔrdi ya etumbelo na ye. 15 Mokonzi Ahaze apesaki nganga-nzambe Uriya+ mitindo oyo: “Osengeli kobimisa milinga ya likabo ya kotumba ya ntɔngɔ na etumbelo ya monene.+ Osengeli mpe kopesa likoló ya etumbelo yango likabo ya mbuma ya mpokwa,+ likabo ya kotumba ya mokonzi, ná likabo na ye ya mbuma, ezala mpe makabo ya kotumba, makabo ya mbuma mpe makabo ya masanga ya bato nyonso. Lisusu, osengeli komwangisa likoló na yango makila nyonso ya makabo ya kotumba mpe makila nyonso ya bambeka mosusu. Kasi mpo na etumbelo ya kwivre, nakotala oyo nakosala mpo na yango.” 16 Mpe nganga-nzambe Uriya asalaki makambo nyonso oyo Mokonzi Ahaze apesaki ye mitindo.+

17 Lisusu, Mokonzi Ahaze akataki manzanza oyo ezalaki na mipanzi ya bashario+ bitenibiteni mpe alongolaki basaani oyo ezalaki likoló na yango.+ Alongolaki mpe Ebombelo monene ya mai* likoló ya bangɔmbɛ ya kwivre+ oyo ezalaki kosimba yango mpe atyaki yango likoló ya pavema ya mabanga.+ 18 Ahaze alongolaki esika oyo ezipamá oyo batongaki pene na tempelo mpo na Sabata, mpe akangaki esika oyo mokonzi azalaki koleka mpo na kokɔta na ndako ya Yehova. Asalaki bongo mpo azalaki kobanga mokonzi ya Asiri.

19 Makambo mosusu ya lisolo ya Ahaze ná nyonso oyo asalaki, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yuda.+ 20 Na nsima Ahaze akufaki* mpe bakundaki ye esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi; mpe mwana na ye Ezekiasi*+ akómaki mokonzi na esika na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto