Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Loyembo ya Salomo 1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Loyembo ya Salomo

    • MWANA MWASI MOSHULAME NA KAA YA MOKONZI SALOMO (1:1–3:5)

        • Loyembo oyo eleki nzembo nyonso na kitoko (1)

        • Elenge mwasi (2-7)

        • Bana basi ya Yerusaleme (8)

        • Mokonzi (9-11)

          • “Tokosalela yo babiju ya wolo” (11)

        • Elenge mwasi (12-14)

          • ‘Bolingo na ngai azali lokola mwa saki ya malasi ya mire’ (13)

        • Mobateli ya mpate (15)

          • ‘Bolingo na ngai, ozali kitoko’

        • Elenge mwasi (16, 17)

          • “Bolingo na ngai, ozali kitoko” (16)

Loyembo ya Salomo 1:1

Mitindami

  • +1Ba 4:29, 32

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2006, lok. 17

    “Makomami nyonso,” lok. 115

Loyembo ya Salomo 1:2

Mitindami

  • +Loy 4:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2015, lok. 30

    15/11/2006, lok. 18

Loyembo ya Salomo 1:3

Mitindami

  • +Mas 27:9; Mos 9:8; Loy 5:5
  • +Mos 7:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2015, lok. 30

    15/11/2006, lok. 18

Loyembo ya Salomo 1:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Bendá ngai nsima na yo.”

  • *

    To, “Tókumisa.”

  • *

    Elingi koloba, bilenge basi.

Loyembo ya Salomo 1:5

Mitindami

  • +Nz 120:5; Ezk 27:21
  • +Kob 36:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2006, lok. 18

Loyembo ya Salomo 1:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2015, lok. 32

Loyembo ya Salomo 1:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na ngai elingá.”

  • *

    To, “litambala ya komizipa na ntango ya kolela ebembe.”

Mitindami

  • +Loy 6:3

Loyembo ya Salomo 1:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mpunda na ngai.”

Mitindami

  • +1Ba 10:28; 2Nt 1:16, 17; Loy 6:4

Loyembo ya Salomo 1:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “na kati ya nsuki oyo bakangi na mabɔkɔ.”

Loyembo ya Salomo 1:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ya sɛrklɛ.”

Loyembo ya Salomo 1:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “zolongano.”

  • *

    Lil., “Malasi na ngai ya narde.”

Mitindami

  • +Loy 4:13, 14

Loyembo ya Salomo 1:13

Mitindami

  • +Kob 30:23, 25; Est 2:12; Nz 45:8; Loy 4:6; 5:13

Loyembo ya Salomo 1:14

Mitindami

  • +Loy 4:13
  • +Yos 15:20, 62; 1Sa 23:29; 2Nt 20:2

Loyembo ya Salomo 1:15

Mitindami

  • +Loy 4:1; 5:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2006, lok. 18

Loyembo ya Salomo 1:16

Mitindami

  • +Loy 5:10

Loyembo ya Salomo 1:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ndako na biso ya kitoko.”

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Loy. 1:11Ba 4:29, 32
Loy. 1:2Loy 4:10
Loy. 1:3Mas 27:9; Mos 9:8; Loy 5:5
Loy. 1:3Mos 7:1
Loy. 1:5Nz 120:5; Ezk 27:21
Loy. 1:5Kob 36:14
Loy. 1:7Loy 6:3
Loy. 1:91Ba 10:28; 2Nt 1:16, 17; Loy 6:4
Loy. 1:12Loy 4:13, 14
Loy. 1:13Kob 30:23, 25; Est 2:12; Nz 45:8; Loy 4:6; 5:13
Loy. 1:14Loy 4:13
Loy. 1:14Yos 15:20, 62; 1Sa 23:29; 2Nt 20:2
Loy. 1:15Loy 4:1; 5:2
Loy. 1:16Loy 5:10
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Loyembo ya Salomo 1:1-17

Loyembo ya Salomo

1 Loyembo ya Salomo oyo eleki nzembo nyonso na kitoko:+

 2 “Pesá ngai mapwɛpwɛ ya monɔkɔ na yo,

Mpo ndenge na yo ya kolakisa lolango eleki vinyo na elɛngi.+

 3 Malasi ya mafuta na yo ezali kitoko.+

Nkombo na yo ezali lokola mafuta ya malasi kitoko oyo esopani.+

Yango wana bilenge basi balingaka yo.

 4 Zwá ngai tókende;* tópota mbangu.

Mokonzi amemi ngai na bashambrɛ na ye ya kati!

Tóyoka esengo mpe tósepela elongo.

Tólobela* ndenge na yo ya kolakisa lolango oyo eleki vinyo na elɛngi.

Balingaka* yo na ntina.

 5 Nazali moindo, kasi nazali kitoko, Ee bana basi ya Yerusaleme,

Nazali lokola bahema ya Kedare,+ lokola bilamba ya hema+ ya Salomo.

 6 Bótika kotalatala ngai kaka mpo nazali moindo,

Mpo moi nde eyindisá ngai.

Bandeko na ngai ya mibali basilikelaki ngai;

Batyaki ngai nabatela bilanga ya vinyo,

Kasi nabatelaki te elanga na ngai moko ya vinyo.

 7 Yo moto oyo nalingaka mingi,*

Yebisá ngai esika oyo oleisaka etonga na yo,+

Esika olalisaka yango na midi.

Mpo na nini nazala lokola mwasi oyo amizipi litambala,*

Na kati ya bitonga ya baninga na yo?”

 8 “Soki oyebi te, Ee yo mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko,

Landá matambe ya etonga

Mpe leisá bana-ntaba na yo pene na bahema ya babateli ya mpate.”

 9 “Bolingo na ngai, nakokanisi yo na mpunda* ya mwasi oyo ezali na kati ya makalo ya Farao.+

10 Matama na yo ezali kitoko na babiju,*

Nkingo na yo kitoko na nsinga ya mayaka.

11 Tokosalela yo babiju ya wolo*

Oyo ezali na mwa bambuma ya palata.”

12 “Ntango mokonzi afandi liboso ya mesa na ye ya sɛrklɛ,*

Malasi na ngai*+ ezali kopanza nsolo na yango ya kitoko.

13 Bolingo na ngai azali mpo na ngai lokola mwa saki ya malasi ya mire+

Oyo elekisaka butu mobimba na katikati ya mabɛlɛ na ngai.

14 Bolingo na ngai azali epai na ngai lokola liboke ya bafololo ya hena+

Na kati ya bilanga ya vinyo ya Ene-gedi.”+

15 “Talá! Bolingo na ngai, ozali kitoko.

Talá! Ozali kitoko. Miso na yo ezali lokola miso ya bibenga.”+

16 “Bolingo na ngai, ozali kitoko, mpe bonzenga.+

Nkasa nde mbeto na biso.

17 Mabaya oyo esimbi nsamba ya ndako na biso* ezali basɛdrɛ,

Mabaya ya nsamba na biso ezali banzete ya jenevriye.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto