Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 7
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Bakɔti na masuwa (1-10)

      • Mpela na mabele (11-24)

Ebandeli 7:1

Mitindami

  • +Eb 6:9; Ebr 10:38; 11:7; 1Pe 3:12; 2Pe 2:5, 9

Ebandeli 7:2

Mitindami

  • +Eb 8:20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2007, lok. 31

    1/1/2004, nk. 29-30

Ebandeli 7:3

Mitindami

  • +Eb 7:23; 8:19

Ebandeli 7:4

Mitindami

  • +Eb 2:5
  • +Eb 7:11, 12
  • +Eb 6:7, 17

Ebandeli 7:6

Mitindami

  • +Eb 8:13

Ebandeli 7:7

Mitindami

  • +Lk 17:27; Ebr 11:7

Ebandeli 7:8

Mitindami

  • +Eb 6:19, 20

Ebandeli 7:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/4/2013, nk. 14-15

    Mekolá, nk. 22-23

Ebandeli 7:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “maziba nyonso ya minene ya mai mozindo.”

Mitindami

  • +Eb 1:7; 8:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Libongoli ya Mokili ya Sika, lok. 1963

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2004, lok. 30

Ebandeli 7:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2013, lok. 12

Ebandeli 7:13

Mitindami

  • +Eb 9:18; 1Nt 1:4
  • +Eb 6:18; 1Pe 3:20; 2Pe 2:5

Ebandeli 7:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekobaki.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2013, nk. 13-14

Ebandeli 7:19

Mitindami

  • +2Pe 3:5, 6

Ebandeli 7:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lipeko moko = 44,5 cm. Talá Ap. B14.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 15

Ebandeli 7:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mosuni nyonso.”

  • *

    Na Ebre liloba yango ezali komonisa banyama mikemike oyo ezalaka ebele esika moko mpe esalaka bituluku, oyo tokoki kokuta na mopɛpɛ, na mbu to na mokili.

Mitindami

  • +Eb 6:7, 17
  • +Lk 17:27

Ebandeli 7:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “oyo ezalaki na mpema ya elimo ya bomoi.”

Mitindami

  • +Eb 2:7; 7:15; Mos 3:19; Yis 42:5

Ebandeli 7:23

Mitindami

  • +Eb 6:7; 2Pe 3:5, 6
  • +Mt 24:37-39; 1Pe 3:20; 2Pe 2:5, 9

Ebandeli 7:24

Mitindami

  • +Eb 8:3

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 7:1Eb 6:9; Ebr 10:38; 11:7; 1Pe 3:12; 2Pe 2:5, 9
Eba. 7:2Eb 8:20
Eba. 7:3Eb 7:23; 8:19
Eba. 7:4Eb 2:5
Eba. 7:4Eb 7:11, 12
Eba. 7:4Eb 6:7, 17
Eba. 7:6Eb 8:13
Eba. 7:7Lk 17:27; Ebr 11:7
Eba. 7:8Eb 6:19, 20
Eba. 7:11Eb 1:7; 8:2
Eba. 7:13Eb 9:18; 1Nt 1:4
Eba. 7:13Eb 6:18; 1Pe 3:20; 2Pe 2:5
Eba. 7:192Pe 3:5, 6
Eba. 7:21Eb 6:7, 17
Eba. 7:21Lk 17:27
Eba. 7:22Eb 2:7; 7:15; Mos 3:19; Yis 42:5
Eba. 7:23Eb 6:7; 2Pe 3:5, 6
Eba. 7:23Mt 24:37-39; 1Pe 3:20; 2Pe 2:5, 9
Eba. 7:24Eb 8:3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 7:1-24

Ebandeli

7 Nsima na yango, Yehova alobaki na Noa ete: “Yo ná bato nyonso ya ndako na yo bókɔta na masuwa, mpo yo nde namoni ete ozali sembo liboso na ngai kati na bato ya ntango oyo.+ 2 Osengeli kozwa nyama nyonso ya pɛto nsambonsambo,+ ya mobali ná ya mwasi; mpe nyama nyonso oyo ezali pɛto te mibalemibale, ya mobali ná ya mwasi; 3 lisusu osengeli kozwa bikelamu oyo epumbwaka na likoló nsambonsambo, ya mobali ná ya mwasi, mpo na kobatela motindo na yango na mabele mobimba.+ 4 Mpo etikali kaka mikolo nsambo, nanɔkisa mbula+ na mabele mikolo 40, butu moi,+ mpe nakolongola eloko nyonso oyo ezali na bomoi, oyo nasalaki na etando ya mokili.”+ 5 Bongo, Noa asalaki nyonso oyo Yehova apesaki ye mitindo.

6 Noa azalaki na mbula 600 ntango mpela eyaki na mabele.+ 7 Noa akɔtaki na masuwa elongo na bana na ye ná mwasi na ye, ná basi ya bana na ye, liboso ete mpela eya.+ 8 Nyama nyonso ya pɛto mpe nyama nyonso oyo ezali pɛto te mpe bikelamu nyonso oyo epumbwaka mpe eloko nyonso oyo etambolaka na mabele,+ 9 ekɔtaki mibalemibale na masuwa epai ya Noa, ya mobali ná ya mwasi, kaka ndenge Nzambe apesaki Noa mitindo. 10 Mpe nsima ya mikolo nsambo, mpela eyaki na mabele.

11 Na mbula ya 600 ya bomoi ya Noa, na sanza ya mibale, na mokolo ya 17 na sanza yango, na mokolo yango maziba nyonso ya likoló* ebimisaki mai, mpe baporte ya mai ya likoló efungwamaki.+ 12 Mpe mbula ebɛtaki makasi na mabele mikolo 40, butu moi. 13 Na mokolo yango, Noa akɔtaki na masuwa ná bana na ye, Seme, Kame ná Yafete,+ elongo na mwasi na ye ná basi misato ya bana na ye.+ 14 Bakɔtaki na masuwa elongo na nyama nyonso ya zamba na kotalela motindo na yango, mpe nyama nyonso ya mboka na kotalela motindo na yango, mpe nyama mikemike nyonso oyo ebendanaka na libumu na mabele na kotalela motindo na yango, mpe ekelamu nyonso oyo epumbwaka na kotalela motindo na yango, ndɛkɛ nyonso, ekelamu nyonso oyo ezali na mapapu. 15 Ekelamu ya lolenge nyonso oyo ezali na mpema ya bomoi ezalaki kokɔta mibalemibale na masuwa epai ya Noa. 16 Ekelamu ya lolenge nyonso, ya mobali ná ya mwasi ekɔtaki, kaka ndenge Nzambe apesaki Noa mitindo. Na nsima, Yehova akangaki porte nsima na ye.

17 Mpela eumelaki* mikolo 40 na mabele, mpe mai ezalaki kaka komata mpe ebandaki komema masuwa mpe yango ezalaki kotepatepa mosika likoló ya mabele. 18 Mpe mai etondaki mingi mpe ezalaki kaka komata mingi likoló ya mabele, nzokande masuwa ezalaki kaka kotepatepa likoló ya mai. 19 Mai ezindisaki mpenza mabele, mpe bangomba nyonso ya milai oyo ezalaki na mabele mobimba ezipamaki.+ 20 Mai emataki tii mapeko* 15, likoló koleka bangomba.

21 Bongo bikelamu nyonso* oyo ezalaki kotambola na mabele ekufaki:+ bikelamu oyo epumbwaka, banyama ya mboka, banyama ya zamba, banyama nyonso oyo etondanaka,* mpe bato nyonso.+ 22 Eloko nyonso oyo ezalaki na mokili, oyo ezalaki kopema mpe ezalaki na bomoi* ekufaki.+ 23 Na yango, Nzambe alongolaki eloko nyonso oyo ezalaki na bomoi oyo ezalaki na etando ya mabele, ezala moto, nyama, nyama oyo ebendanaka na libumu na mabele mpe ekelamu oyo epumbwaka na likoló. Balongolamaki na mabele;+ kaka Noa mpe baoyo bazalaki elongo na ye na kati ya masuwa nde babikaki.+ 24 Mpe mai ezindisaki mpenza mabele mikolo 150.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto