Mitángo
27 Bongo bana basi ya Zelofehade,+ mwana ya Hefere, mwana ya Gileade, mwana ya Makire, mwana ya Manase, na mabota ya Manase mwana ya Yozefe, bapusanaki. Bankombo ya bana na ye ya basi yango oyo: Mahala, Noa, Hogla, Milka ná Tireza. 2 Batɛlɛmaki liboso ya Moize, Eleazare nganga-nzambe, bankumu,+ mpe liboso ya liyangani mobimba, na ekɔtelo ya hema ya kokutana, balobaki ete: 3 “Tata na biso akufaki na esobe, kasi azalaki te na kati ya etuluku ya baoyo basanganaki mpo na kotombokela Yehova, bato oyo bapesaki Kora mabɔkɔ;+ kasi akufaki nde mpo na lisumu na ye moko mpe azalaki na bana mibali te. 4 Mpo na nini nkombo ya tata na biso elimwa na libota na ye, kaka mpo azalaki na mwana mobali te? Pesá biso mabele na kati ya bandeko ya tata na biso.” 5 Na yango, Moize amemaki likambo na bango liboso ya Yehova.+
6 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 7 “Bana basi ya Zelofehade balobi solo. Okopesa mpenza bango mabele ya libula na kati ya bandeko ya tata na bango, mpe lekisá libula ya tata na bango epai na bango.+ 8 Mpe yebisá Bayisraele ete: ‘Soki mobali moko akufi, kasi azali na mwana mobali te, bosengeli kolekisa libula na ye epai ya bana na ye ya basi. 9 Mpe soki azali na mwana mwasi te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko na ye ya mibali. 10 Mpe soki azali na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko mibali ya tata na ye. 11 Mpe soki tata na ye azali na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya ndeko na ye ya makila, oyo azali mpenza ndeko na ye ya libota, mpe akozwa yango. Ekateli yango ekozala lokola mobeko mpo na Bayisraele, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.’”
12 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Matá na ngomba oyo ya Abarime,+ mpe talá mokili oyo nakopesa Bayisraele.+ 13 Nsima ya komona yango, okoyanganisama mpe na bato na yo,*+ kaka ndenge esalemaki mpo na Arona ndeko na yo,+ 14 mpo ntango liyangani ezalaki koswanisa ngai na esobe ya Zine, botombokelaki etinda na ngai mpe bosantisaki ngai te na miso ya bato ntango nabimisaki mai.+ Ezali mai ya Meriba,+ na Kadeshe,+ na esobe ya Zine.”+
15 Bongo Moize alobaki na Yehova ete: 16 “Tiká Yehova, Nzambe oyo apesaka bato nyonso bomoi,* atya moto oyo akokamba liyangani, 17 oyo akobima liboso na bango mpe oyo akokɔta liboso na bango mpe oyo akobimisa bango mpe oyo akokɔtisa bango, mpo liyangani ya Yehova ekóma te lokola bampate oyo ezangi mobateli.” 18 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Zwá Yosua mwana ya Nunu, moto oyo elimo ezali na kati na ye, mpe tyá lobɔkɔ na yo likoló na ye.+ 19 Na nsima, tɛlɛmisá ye liboso ya Eleazare nganga-nzambe mpe liboso ya liyangani mobimba, mpe osengeli kopesa ye mokumba na miso na bango.+ 20 Okopesa ye ndambo ya bokonzi* na yo,+ mpo liyangani mobimba ya Bayisraele eyoka ye.+ 21 Akotɛlɛma liboso ya Eleazare nganga-nzambe, mpe Eleazare akotunela ye litambwisi epai ya Yehova na nzela ya Urime.+ Na etinda na ye bakobima mpe na etinda na ye bakokɔta, ye ná Bayisraele nyonso mpe liyangani mobimba.”
22 Na yango, Moize asalaki kaka ndenge Yehova apesaki ye mitindo. Azwaki Yosua mpe atɛlɛmisaki ye liboso ya Eleazare nganga-nzambe mpe liboso ya liyangani mobimba, 23 mpe atyaki mabɔkɔ na ye likoló na ye mpe apesaki ye mokumba,+ kaka ndenge Yehova alobaki na nzela ya Moize.+