Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Salomo asɛngi bwanya (1-12)

      • Bomɛngo ya Salomo (13-17)

2 Ntango 1:1

Mitindami

  • +1Nt 29:25; Mos 2:9; Mt 6:28, 29; 12:42

2 Ntango 1:3

Mitindami

  • +1Ba 3:4; 1Nt 21:29

2 Ntango 1:4

Mitindami

  • +1Nt 13:5
  • +1Nt 16:1

2 Ntango 1:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bazalaki kotuna Ye kuna.”

Mitindami

  • +Kob 38:1, 2
  • +Kob 31:2-5

2 Ntango 1:6

Mitindami

  • +1Ba 3:4

2 Ntango 1:7

Mitindami

  • +1Ba 3:5-9

2 Ntango 1:8

Mitindami

  • +2Sa 7:8
  • +1Nt 28:5; Nz 89:28, 29

2 Ntango 1:9

Mitindami

  • +2Sa 7:12; 1Nt 28:6; Nz 132:11
  • +Eb 13:14, 16

2 Ntango 1:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kobima mpe kokɔta liboso ya.”

Mitindami

  • +Mas 2:6; Yk 1:5
  • +Nz 72:1, 2

2 Ntango 1:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo.”

  • *

    Lil., “mikolo mingi.”

Mitindami

  • +1Ba 3:10-13, 28

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2005, lok. 19

2 Ntango 1:12

Mitindami

  • +1Nt 29:25; 2Nt 9:22; Mos 2:9

2 Ntango 1:13

Mitindami

  • +1Ba 3:4

2 Ntango 1:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “batambwisi-mpunda.”

  • *

    To, “batambwisi-mpunda.”

Mitindami

  • +Mib 17:16; 1Ba 4:26
  • +2Nt 8:5, 6
  • +2Nt 9:25

2 Ntango 1:15

Mitindami

  • +1Ba 10:21
  • +1Ba 10:27; 2Nt 9:27

2 Ntango 1:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “ezalaki kouta na Ezipito mpe na Kue; bato ya mombongo ya mokonzi bazalaki kosomba yango na Kue;” mbala mosusu Kue ezali Silisi.

Mitindami

  • +2Nt 9:28
  • +1Ba 10:28, 29

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 1:11Nt 29:25; Mos 2:9; Mt 6:28, 29; 12:42
2 Nt. 1:31Ba 3:4; 1Nt 21:29
2 Nt. 1:41Nt 13:5
2 Nt. 1:41Nt 16:1
2 Nt. 1:5Kob 38:1, 2
2 Nt. 1:5Kob 31:2-5
2 Nt. 1:61Ba 3:4
2 Nt. 1:71Ba 3:5-9
2 Nt. 1:82Sa 7:8
2 Nt. 1:81Nt 28:5; Nz 89:28, 29
2 Nt. 1:92Sa 7:12; 1Nt 28:6; Nz 132:11
2 Nt. 1:9Eb 13:14, 16
2 Nt. 1:10Mas 2:6; Yk 1:5
2 Nt. 1:10Nz 72:1, 2
2 Nt. 1:111Ba 3:10-13, 28
2 Nt. 1:121Nt 29:25; 2Nt 9:22; Mos 2:9
2 Nt. 1:131Ba 3:4
2 Nt. 1:14Mib 17:16; 1Ba 4:26
2 Nt. 1:142Nt 8:5, 6
2 Nt. 1:142Nt 9:25
2 Nt. 1:151Ba 10:21
2 Nt. 1:151Ba 10:27; 2Nt 9:27
2 Nt. 1:162Nt 9:28
2 Nt. 1:161Ba 10:28, 29
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 1:1-17

Mokanda ya mibale ya Ntango

1 Salomo mwana ya Davidi akómisaki bokonzi na ye makasi mingi, mpe Yehova Nzambe na ye azalaki na ye mpe akómisaki ye moto monene mingi mpenza.+

2 Salomo abengisaki Yisraele mobimba: bakonzi ya bato nkóto, bakonzi ya bato nkama, basambisi mpe bankumu nyonso ya Yisraele mobimba, bankumu ya mabota ya batata. 3 Na nsima, Salomo ná lisangá mobimba bakendaki na esika oyo etombwaná na Gibeone,+ mpo hema ya kokutana ya Nzambe ya solo, oyo Moize mosaleli ya Yehova asalaki na esobe, ezalaki kuna. 4 Nzokande Davidi alongolaki Sanduku ya Nzambe ya solo na Kiriate-yearime+ mpe amemaki yango na esika oyo abongiselaki yango; atɛlɛmiselaki yango hema na Yerusaleme.+ 5 Mpe etumbelo ya kwivre+ oyo Bezalele+ mwana ya Uri mwana ya Hure asalaki, etyamaki liboso ya tabernakle ya Yehova; mpe Salomo ná lisangá mobimba bazalaki kobondela liboso ya etumbelo yango.* 6 Bongo Salomo apesaki makabo kuna, liboso ya Yehova. Apesaki makabo ya kotumba 1 000 likoló ya etumbelo ya kwivre+ ya hema ya kokutana.

7 Na butu yango, Nzambe abimelaki Salomo, mpe alobaki na ye boye: “Sɛngá eloko oyo olingi napesa yo?”+ 8 Na yango Salomo alobaki na Nzambe boye: “Omoniseli tata na ngai Davidi+ bolingo ya sembo monene, mpe okómisi ngai mokonzi na esika na ye.+ 9 Sikoyo, Ee Yehova Nzambe, tiká ete elaka oyo opesaki tata na ngai Davidi ekokisama,+ mpo okómisi ngai mokonzi ya bato oyo bazali ebele lokola bambuma ya zɛlo ya mabele.+ 10 Yango wana, pesá ngai bwanya mpe boyebi+ mpo na kokamba* bato oyo, mpo nani akokoka kosambisa ebele ya bato na yo oyo?”+

11 Bongo Nzambe alobaki na Salomo boye: “Lokola mposa ya motema na yo ezali bongo, mpe lokola osɛngi bozwi te, to bomɛngo, to lokumu, to liwa* ya baoyo bayinaka yo, mpe osɛngi bomoi ya molai* te, kasi osɛngi nde bwanya ná boyebi mpo na kosambisa bato na ngai oyo natye yo ozala mokonzi na bango,+ 12 nakopesa yo bwanya mpe boyebi; kasi nakopesa yo mpe bozwi, bomɛngo, ná lokumu oyo mokonzi moko te liboso na yo azalaki na yango, mpe mokonzi moko te nsima na yo akozala na yango.”+

13 Bongo Salomo alongwaki na esika oyo etombwaná na Gibeone,+ epai hema ya kokutana ezalaki, azongaki na Yerusaleme mpe ayangelaki Yisraele. 14 Salomo azalaki se kobakisa makalo mpe bampunda;* akómaki na makalo 1 400 ná bampunda* 12 000.+ Atyaki mosusu na bingumba ya kobomba makalo+ mpe atikaki mosusu pene na ye, na Yerusaleme.+ 15 Mokonzi asalaki ete na Yerusaleme palata ná wolo ekóma mingi lokola mabanga,+ mpe mabaya ya sɛdrɛ ekóma mingi lokola banzete ya sikomore ya Shefela.+ 16 Bampunda ya Salomo ezalaki kouta na Ezipito,+ mpe bato ya mombongo ya mokonzi bazalaki kosomba bitonga ya bampunda* na ntalo oyo eyebani.+ 17 Likalo mokomoko oyo euti na Ezipito ezalaki na ntalo ya shekele ya palata 600, mpe mpunda moko na ntalo ya shekele ya palata 150. Na nsima, bazalaki kotɛkɛla yango bakonzi nyonso ya Bahiti mpe bakonzi ya Siri.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto