Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 16
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Agare ná Yishimaele (1-16)

Ebandeli 16:1

Mitindami

  • +Eb 15:2, 3
  • +Ga 4:25

Ebandeli 16:2

Mitindami

  • +Eb 30:1, 3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 5 2017 nk. 12-13

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2004, lok. 27

Ebandeli 16:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 5 2017 nk. 13-14

Ebandeli 16:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 5 2017 nk. 13-14

Ebandeli 16:7

Mitindami

  • +Eb 25:17, 18; Kob 15:22

Ebandeli 16:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Eb 17:20; 25:13-16; 1Nt 1:29-31

Ebandeli 16:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “Nzambe ayokaka.”

Ebandeli 16:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lolenge moko ya mpunda ya zamba, bato mosusu bakanisi ete ezali zɛbrɛ. To mbala mosusu, mpo na kolobela elimo ya lipanda.

  • *

    To mbala mosusu, “bonguna ekozala kati na ye mpe bandeko na ye nyonso.”

Ebandeli 16:13

Mitindami

  • +Mas 15:3

Ebandeli 16:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “libulu ya Moto ya bomoi oyo azali komona ngai.”

Ebandeli 16:15

Mitindami

  • +Eb 21:9; Ga 4:22, 24

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 16:1Eb 15:2, 3
Eba. 16:1Ga 4:25
Eba. 16:2Eb 30:1, 3
Eba. 16:7Eb 25:17, 18; Kob 15:22
Eba. 16:10Eb 17:20; 25:13-16; 1Nt 1:29-31
Eba. 16:13Mas 15:3
Eba. 16:15Eb 21:9; Ga 4:22, 24
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 16:1-16

Ebandeli

16 Sikoyo Sarai, mwasi ya Abrama, abotelaki ye bana te,+ kasi azalaki na mosali moko ya mwasi Moezipito nkombo na ye Agare.+ 2 Sarai alobaki na Abrama ete: “Nabondeli yo, yoká ngai! Yehova asali ete nabota bana te. Nabondeli yo, sangisá nzoto na mosali na ngai. Mbala mosusu nakozwa bana na nzela na ye.”+ Bongo Abrama ayokelaki Sarai. 3 Abrama afandaki mbula zomi na mokili ya Kanana, na nsima Sarai, mwasi na ye, azwaki Agare mosali na ye Moezipito, mpe apesaki ye na Abrama, mobali na ye, mpo azala mwasi na ye. 4 Na yango Abrama asangisaki nzoto na Agare, mpe azwaki zemi. Ntango Agare ayebaki ete azwi zemi, akómaki kotyola nkolo na ye ya mwasi.

5 Yango wana, Sarai alobaki na Abrama ete: “Mabe oyo bazali kosalela ngai ezali mpo na yo. Ngai moto napesaki mosali na ngai azala na ntolo na yo, mpe lokola ayebi ete azwi zemi, akómi kotyola ngai. Yehova akata likambo kati na ngai ná yo.” 6 Mpe Abrama alobaki na Sarai ete: “Mosali na yo azali na nse ya bokonzi na yo. Salá ye ndenge olingi.” Bongo Sarai asambwisaki ye mpe Agare akimaki mosika na ye.

7 Na nsima, anzelu ya Yehova akutaki ye pene na liziba ya mai na esobe, liziba oyo ezali na nzela ya Shure.+ 8 Mpe alobaki ete: “Agare, mosali ya Sarai, outi wapi mpe ozali kokende wapi?” Na yango, alobaki ete: “Nazali kokima nkolo na ngai, Sarai.” 9 Anzelu ya Yehova alobaki na ye lisusu ete: “Zongá epai ya nkolo na yo mpe omikitisa liboso na ye.” 10 Na nsima, anzelu ya Yehova alobaki ete: “Nakokómisa libota* na yo monene, bakokoka kotángama te mpo bakoleka ebele.”+ 11 Anzelu ya Yehova abakisaki ete: “Talá ozali na zemi, mpe okobota mwana mobali, okopesa ye nkombo Yishimaele,* mpo Yehova ayoki mpasi na yo. 12 Akokóma moto moko lokola mpunda ya zamba.* Akotɛmɛla moto nyonso mpe moto nyonso akotɛmɛla ye, mpe esika na ye ya kofanda ekotalana na bandeko na ye nyonso.”*

13 Bongo Agare abelelaki nkombo ya Yehova, oyo azalaki kosolola na ye ete: “Ozali Nzambe oyo amonaka,”+ mpo alobaki ete: “Ezali mpenza solo ete awa namoni moto oyo azali komona ngai?” 14 Yango wana libulu yango ya mai ebengamaki Beere-lahai-royi.* (Yango ezali kati na Kadeshe mpe Berede.) 15 Na nsima, Agare abotelaki Abrama mwana mobali, mpe Abrama apesaki mwana yango nkombo Yishimaele.+ 16 Abrama azalaki na mbula 86 ntango Agare abotelaki ye Yishimaele.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto