Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 25
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Amazia, mokonzi ya Yuda (1-4)

      • Etumba ná Edome (5-13)

      • Amazia asambeli bikeko (14-16)

      • Etumba ná Yehoashe mokonzi ya Yisraele (17-24)

      • Liwa ya Amazia (25-28)

2 Ntango 25:1

Mitindami

  • +2Ba 14:1-6

2 Ntango 25:3

Mitindami

  • +2Nt 24:26

2 Ntango 25:4

Mitindami

  • +Mib 24:16

2 Ntango 25:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “baponami.”

Mitindami

  • +1Sa 8:11, 12
  • +Mit 1:2, 3

2 Ntango 25:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talanta moko = 34,2 kg. Talá Ap. B14.

2 Ntango 25:7

Mitindami

  • +2Nt 19:2

2 Ntango 25:8

Mitindami

  • +2Nt 14:11; 20:6

2 Ntango 25:9

Mitindami

  • +1Sa 2:7; Mas 10:22; Hag 2:8

2 Ntango 25:11

Mitindami

  • +2Sa 8:13; Nz 60:maloba ya ebandeli ya loyembo
  • +2Ba 14:7; 2Nt 20:10, 11

2 Ntango 25:13

Mitindami

  • +2Nt 25:9
  • +1Ba 16:29
  • +2Nt 8:3, 5

2 Ntango 25:14

Mitindami

  • +Kob 20:3, 5; Mib 7:25; 2Nt 28:22, 23

2 Ntango 25:15

Mitindami

  • +2Nt 24:20; Nz 115:8; Yir 2:5; 10:5

2 Ntango 25:16

Mitindami

  • +2Nt 16:10; 18:25, 26
  • +Yis 30:10
  • +1Sa 2:25; Mas 29:1

2 Ntango 25:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Yaká tókutana.”

Mitindami

  • +2Ba 14:8-10

2 Ntango 25:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “olongi.”

  • *

    To, “ndako ya mokonzi.”

Mitindami

  • +2Nt 25:11

2 Ntango 25:20

Mitindami

  • +2Ba 14:11-14
  • +2Nt 22:7
  • +2Nt 25:14

2 Ntango 25:21

Mitindami

  • +Yos 21:8, 16; 1Sa 6:19

2 Ntango 25:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bahema.”

2 Ntango 25:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Abengami mpe “Ahazia.”

  • *

    Soki 178 m. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +Ne 8:16; 12:38, 39
  • +2Nt 26:9; Yir 31:38; Zek 14:10

2 Ntango 25:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “na nse ya libateli ya.”

Mitindami

  • +1Ba 7:51; 15:18; 2Ba 24:12, 13; 25:13-15; 2Nt 12:9

2 Ntango 25:25

Mitindami

  • +2Ba 14:1
  • +2Ba 13:10
  • +2Ba 14:17-20

2 Ntango 25:27

Mitindami

  • +2Ba 12:20; 15:8, 10; 21:23

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 25:12Ba 14:1-6
2 Nt. 25:32Nt 24:26
2 Nt. 25:4Mib 24:16
2 Nt. 25:51Sa 8:11, 12
2 Nt. 25:5Mit 1:2, 3
2 Nt. 25:72Nt 19:2
2 Nt. 25:82Nt 14:11; 20:6
2 Nt. 25:91Sa 2:7; Mas 10:22; Hag 2:8
2 Nt. 25:112Sa 8:13; Nz 60:maloba ya ebandeli ya loyembo
2 Nt. 25:112Ba 14:7; 2Nt 20:10, 11
2 Nt. 25:132Nt 25:9
2 Nt. 25:131Ba 16:29
2 Nt. 25:132Nt 8:3, 5
2 Nt. 25:14Kob 20:3, 5; Mib 7:25; 2Nt 28:22, 23
2 Nt. 25:152Nt 24:20; Nz 115:8; Yir 2:5; 10:5
2 Nt. 25:162Nt 16:10; 18:25, 26
2 Nt. 25:16Yis 30:10
2 Nt. 25:161Sa 2:25; Mas 29:1
2 Nt. 25:172Ba 14:8-10
2 Nt. 25:192Nt 25:11
2 Nt. 25:202Ba 14:11-14
2 Nt. 25:202Nt 22:7
2 Nt. 25:202Nt 25:14
2 Nt. 25:21Yos 21:8, 16; 1Sa 6:19
2 Nt. 25:23Ne 8:16; 12:38, 39
2 Nt. 25:232Nt 26:9; Yir 31:38; Zek 14:10
2 Nt. 25:241Ba 7:51; 15:18; 2Ba 24:12, 13; 25:13-15; 2Nt 12:9
2 Nt. 25:252Ba 14:1
2 Nt. 25:252Ba 13:10
2 Nt. 25:252Ba 14:17-20
2 Nt. 25:272Ba 12:20; 15:8, 10; 21:23
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 25:1-28

Mokanda ya mibale ya Ntango

25 Amazia azalaki na mbula 25 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 29 na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Yehoadane, moto ya Yerusaleme.+ 2 Amazia akobaki kosala makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova, kasi na motema mobimba te. 3 Ntango kaka Amazia afandisaki bokonzi na ye makasi, abomaki basaleli na ye oyo babomaki mokonzi, tata na ye.+ 4 Kasi abomaki bana na bango te, mpo asalaki na boyokani na makambo oyo ekomami na Mobeko, na buku ya Moize, epai Yehova apesaki mitindo ete: “Batata bakokufa te mpo na masumu ya bana na bango, mpe bana bakokufa te mpo na masumu ya batata na bango; moto na moto akokufa mpo na lisumu na ye moko.”+

5 Bongo Amazia ayanganisaki mibali ya Yuda mpe atɛlɛmisaki bango na kolanda mabota ya batata na bango, na kolanda bakonzi ya bato nkóto mpe bakonzi ya bato nkama mpo na Yuda mobimba mpe Benyamina.+ Akomaki nkombo ya mibali oyo bazalaki na mbula 20 mpe koleka,+ mpe amonaki ete bazali babundi-bitumba 300 000, oyo babongisami* mpo na mosala ya soda, oyo bayebi kobunda na likɔnga mpe nguba monene. 6 Lisusu, na Yisraele azwaki bilombe ya etumba 100 000, mpe afutaki bango talanta* 100 ya palata. 7 Kasi moto moko ya Nzambe ya solo ayaki epai na ye mpe alobaki na ye: “Ee mokonzi, ebongi te basoda ya Yisraele bákende elongo na yo, mpo Yehova azali elongo na Yisraele te,+ azali elongo na moto moko te ya Efraime. 8 Kasi kende kaka yo moko, salá, mpe bundá etumba na mpiko. Soki te, Nzambe ya solo akoki kosala ete okwea liboso ya monguna; mpo Nzambe azali na nguya ya kosalisa+ mpe ya kokweisa.” 9 Na yango Amazia alobaki na moto ya Nzambe ya solo: “Bongo nasala ndenge nini mpo na talanta 100 oyo napesi bituluku ya basoda ya Yisraele?” Moto ya Nzambe ya solo ayanolaki: “Yehova azali na makoki ya kopesa yo mingi koleka oyo wana.”+ 10 Na yango, Amazia ayebisaki basoda ya Efraime oyo bayaki epai na ye ete bázonga epai na bango. Kasi, basilikaki makasi mpo na ekólo Yuda, bongo bazongaki epai na bango na nkanda makasi.

11 Bongo Amazia azwaki mpiko mpe akambaki limpinga na ye moko tii na Lobwaku ya Mungwa,+ mpe abomaki mibali ya Seire 10 000.+ 12 Mpe mibali ya Yuda bakangaki bato mosusu 10 000 oyo bazalaki naino na bomoi. Bongo bamemaki bango na nsɔngɛ ya libanga, mpe babwakaki bango na nse uta na nsɔngɛ yango ya libanga; mpe bango nyonso bapanzanaki mikemike. 13 Kasi basoda oyo Amazia azongisaki mpo bákende na ye na etumba te,+ bakómaki kobundisa bingumba ya Yuda, banda na Samaria+ tii na Bete-horone.+ Babomaki bato 3 000 na Yuda mpe bapunzaki biloko ebele mpenza.

14 Kasi ntango Amazia azongaki nsima ya koboma Baedome, amemaki mpe banzambe ya bato ya Seire mpe atyaki yango mpo ezala banzambe na ye.+ Abandaki kogumbamela yango mpe kotumbela yango bambeka. 15 Bongo Yehova ayokelaki Amazia nkanda makasi, mpe atindelaki ye mosakoli moko oyo alobaki na ye: “Mpo na nini ozali kolanda banzambe ya bato oyo babikisaki te bato na yango moko na lobɔkɔ na yo?”+ 16 Ntango mosakoli azalaki koloba na ye, mokonzi alobaki: “Totyaki yo nde ozala mopesi-toli ya mokonzi?+ Fandá nyɛɛ!+ Soki te, tokoboma yo!” Na yango, mosakoli atikaki, kasi abakisaki: “Nayebi ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo, mpo osali likambo wana mpe oyoki toli na ngai te.”+

17 Nsima ya koyokana na bapesi-toli na ye, Amazia mokonzi ya Yuda atindaki bato epai ya Yehoashe mwana ya Yehoahaze mwana ya Yehu mokonzi ya Yisraele, alobi: “Yaká tóbunda.”*+ 18 Yehoashe mokonzi ya Yisraele atindelaki Amazia mokonzi ya Yuda maloba oyo: “Lititi ya nzubɛnzubɛ ya Liban etindelaki sɛdrɛ ya Liban maloba ete: ‘Pesá mwana na ngai ya mobali mwana na yo ya mwasi mpo abala ye.’ Nzokande, nyama moko ya zamba ya Liban elekaki wana mpe enyataki lititi yango ya nzubɛnzubɛ. 19 Olobi: ‘Talá, nalongi* Edome.’+ Yango wana motema na yo ekómi na lolendo mpe olingi bápesa yo nkembo. Kasi sikoyo fandá na ndako* na yo. Mpo na nini olingi komilukela mpasi mpe kokwea, yo elongo na Yuda?”

20 Kasi Amazia ayokaki te,+ mpo Nzambe ya solo alingaki ete ezala bongo; alingaki kopesa bango na mabɔkɔ ya monguna,+ mpo basalelaki banzambe ya Edome.+ 21 Na yango Yehoashe mokonzi ya Yisraele akendaki kobunda na Amazia mokonzi ya Yuda na Bete-shemeshe,+ oyo ezali na Yuda. 22 Yisraele elongaki Yuda. Bongo moto na moto akimaki na ndako* na ye. 23 Na Bete-shemeshe, Yehoashe mokonzi ya Yisraele akangaki Amazia mokonzi ya Yuda mwana ya Yehoashe mwana ya Yehoahaze.* Na nsima amemaki ye na Yerusaleme mpe kuna abukaki ndambo ya efelo ya Yerusaleme, banda na Porte ya Efraime+ tii na Porte ya Litumu;+ esika oyo etikalaki polele ezalaki mapeko 400.* 24 Azwaki wolo nyonso mpe palata nyonso ná biloko nyonso oyo ezalaki na ndako ya Nzambe ya solo, epai ya* Obede-edome mpe na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi.+ Azwaki mpe bakangami. Na nsima, azongaki na Samaria.

25 Amazia+ mwana ya Yehoashe mokonzi ya Yuda aumelaki lisusu na bomoi mbula 15 nsima ya liwa ya Yehoashe+ mwana ya Yehoahaze mokonzi ya Yisraele.+ 26 Makambo mosusu ya lisolo ya Amazia, banda na ebandeli tii na nsuka, talá! ekomami na Buku ya Bakonzi ya Yuda mpe ya Yisraele. 27 Banda ntango oyo Amazia apesaki Yehova mokɔngɔ, bato bakómaki kosalela ye likita+ na Yerusaleme, mpe akimaki na Lakishi; kasi batindaki bato bálanda ye na Lakishi mpe babomaki ye kuna. 28 Bongo bamemaki ebembe na ye na likalo oyo bampunda ezalaki kobenda mpe bakundaki ye esika moko na bankɔkɔ na ye na engumba ya Yuda.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto