Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 29
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Yakobo akutani na Rashele (1-14)

      • Yakobo alingi Rashele mingi (15-20)

      • Yakobo abali Lea ná Rashele (21-29)

      • Lea aboteli Yakobo bana mibali minei: Rubene, Simeone, Levi, mpe Yuda (30-35)

Ebandeli 29:4

Mitindami

  • +Eb 27:42, 43; Mis 7:2

Ebandeli 29:5

Mitindami

  • +Eb 24:29
  • +Eb 24:24; 31:53

Ebandeli 29:6

Mitindami

  • +Eb 46:19; Rt 4:11

Ebandeli 29:13

Mitindami

  • +Eb 24:29

Ebandeli 29:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ndeko na ngai ya makila.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2003, lok. 29

Ebandeli 29:15

Mitindami

  • +Eb 28:5
  • +Eb 30:27, 28; 31:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2003, lok. 29

Ebandeli 29:16

Mitindami

  • +Rt 4:11

Ebandeli 29:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ezalaki kitoko te.”

Ebandeli 29:18

Mitindami

  • +Eb 31:41

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2003, nk. 29-30

Ebandeli 29:20

Mitindami

  • +Eb 30:26; Hos 12:12

Ebandeli 29:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, nk. 8-9

Ebandeli 29:24

Mitindami

  • +Eb 16:1, 2; 30:9; 46:18

Ebandeli 29:25

Mitindami

  • +Eb 31:7, 42

Ebandeli 29:27

Mitindami

  • +Eb 31:41

Ebandeli 29:29

Mitindami

  • +Eb 35:22
  • +Eb 30:1, 3

Ebandeli 29:30

Mitindami

  • +Hos 12:12

Ebandeli 29:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ayinami.”

  • *

    Lil., “afungolaki libumu na ye.”

Mitindami

  • +Eb 46:15; Rt 4:11
  • +Eb 30:22

Ebandeli 29:32

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “talá, mwana mobali.”

Mitindami

  • +Eb 35:22; 37:22; 49:3, 4; Kob 6:14; 1Nt 5:1
  • +Eb 30:20; 1Sa 1:5, 6; Lk 1:24, 25

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, lok. 9

Ebandeli 29:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ayoki.”

  • *

    Elimboli, “koyoka.”

Mitindami

  • +Eb 34:25; 49:5; 1Nt 4:24

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, lok. 9

Ebandeli 29:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “kokangama; bomoko.”

Mitindami

  • +Eb 34:25; 49:5; Kob 6:16; Mit 3:12; 1Nt 6:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, lok. 9

Ebandeli 29:35

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “kosanzolama; libaku ya kosanzola.”

Mitindami

  • +Eb 35:23; 37:26; 44:18; 49:8; 1Nt 2:3; Em 5:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2007, lok. 9

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 29:4Eb 27:42, 43; Mis 7:2
Eba. 29:5Eb 24:29
Eba. 29:5Eb 24:24; 31:53
Eba. 29:6Eb 46:19; Rt 4:11
Eba. 29:13Eb 24:29
Eba. 29:15Eb 28:5
Eba. 29:15Eb 30:27, 28; 31:7
Eba. 29:16Rt 4:11
Eba. 29:18Eb 31:41
Eba. 29:20Eb 30:26; Hos 12:12
Eba. 29:24Eb 16:1, 2; 30:9; 46:18
Eba. 29:25Eb 31:7, 42
Eba. 29:27Eb 31:41
Eba. 29:29Eb 35:22
Eba. 29:29Eb 30:1, 3
Eba. 29:30Hos 12:12
Eba. 29:31Eb 46:15; Rt 4:11
Eba. 29:31Eb 30:22
Eba. 29:32Eb 35:22; 37:22; 49:3, 4; Kob 6:14; 1Nt 5:1
Eba. 29:32Eb 30:20; 1Sa 1:5, 6; Lk 1:24, 25
Eba. 29:33Eb 34:25; 49:5; 1Nt 4:24
Eba. 29:34Eb 34:25; 49:5; Kob 6:16; Mit 3:12; 1Nt 6:1
Eba. 29:35Eb 35:23; 37:26; 44:18; 49:8; 1Nt 2:3; Em 5:5
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 29:1-35

Ebandeli

29 Nsima na yango, Yakobo akobaki mobembo na ye mpe akendaki na mokili ya Bato ya Ɛsti. 2 Bongo amonaki libulu moko ya mai na esobe mpe bitonga misato ya mpate elalaki pene na yango, mpo bazalaki na momeseno ya komɛlisa bitonga mai na libulu yango. Ezalaki na libanga moko monene na monɔkɔ ya libulu yango. 3 Ntango bitonga nyonso ezalaki kosangisama na esika yango, bazalaki kolongola libanga yango na monɔkɔ ya libulu, mpe bazalaki komɛlisa bitonga mai; nsima na yango, bazalaki kozongisa libanga yango na esika na yango na monɔkɔ ya libulu.

4 Bongo Yakobo atunaki bango ete: “Bandeko na ngai, bozali bato ya wapi?” balobaki ete: “Tozali bato ya Harane.”+ 5 Alobaki na bango ete: “Boyebi Labana+ mwana ya mwana ya Nahore?”+ Balobaki ete: “Toyebi ye.” 6 Bongo alobaki na bango ete: “Azali malamu?” Bazongisaki ete: “Azali malamu. Mpe talá Rashele+ mwana na ye ya mwasi azali koya na bampate!” 7 Na yango, alobaki ete: “Moi ezali naino. Ezali ntango ya kosangisa bitonga te. Bómɛlisa bampate mai, bongo na nsima bókende koleisa yango.” 8 Balobaki ete: “Bapesi biso nzela ya kosala bongo te. Esengeli liboso kosangisa bitonga nyonso mpe kolongola libanga na monɔkɔ ya libulu ya mai. Na nsima nde tokomɛlisa bampate mai.”

9 Wana azalaki naino kosolola na bango, Rashele ayaki na bampate ya tata na ye, mpo Rashele azalaki mobateli ya mpate. 10 Ntango Yakobo amonaki Rashele, mwana ya Labana, ndeko ya mama na ye mpe bampate ya Labana, na mbala moko Yakobo apusanaki mpe alongolaki libanga na monɔkɔ ya libulu ya mai mpe amɛlisaki bampate ya Labana ndeko ya mama na ye. 11 Na nsima, Yakobo apwɛpwaki Rashele mpe abandaki kolela na mongongo makasi. 12 Mpe Yakobo abandaki koyebisa Rashele ete ye azali ndeko ya tata na ye mpe ete azali mwana ya Rebeka. Mpe Rashele apotaki mbangu mpo na koyebisa tata na ye.

13 Ntango kaka Labana+ ayokaki nsango etali Yakobo, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, apotaki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye mpe apwɛpwaki ye mpe ayaki na ye na ndako. Mpe Yakobo abandaki koyebisa Labana makambo nyonso oyo ekómelaki ye. 14 Labana alobaki na ye ete: “Ozali mpenza mokuwa mpe mosuni* na ngai.” Bongo afandaki elongo na ye sanza mobimba.

15 Na nsima, Labana alobaki na Yakobo ete: “Okosalela ngai nde ofele mpo ozali ndeko na ngai?+ Yebisá ngai: Nafuta yo nini?”+ 16 Nzokande, Labana azalaki na bana basi mibale. Oyo ya mokóló nkombo na ye Lea, mpe oyo ya leki nkombo na ye Rashele.+ 17 Kasi miso ya Lea ezalaki kongɛnga te,* nzokande Rashele akómaki mwasi kitoko mpenza. 18 Yakobo azalaki kolinga Rashele mingi, na yango alobaki ete: “Nandimi kosalela yo mbula nsambo mpo na Rashele mwana na yo,+ leki ya Lea.” 19 Bongo Labana alobaki ete: “Malamu kutu napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye na mobali mosusu. Kobá kofanda elongo na ngai.” 20 Mpe Yakobo asalaki mosala mbula nsambo mpo na Rashele,+ kasi na miso na ye emonanaki nde lokola mwa mikolo moke mpo alingaki Rashele mingi.

21 Na nsima, Yakobo alobaki na Labana ete: “Pesá ngai mwasi na ngai mpo mikolo na ngai ekoki, mpe tiká ngai nasangisa na ye nzoto.” 22 Na yango, Labana ayanganisaki bato nyonso ya esika yango mpe asalaki fɛti. 23 Kasi na mpokwa yango, azwaki mwana na ye ya mwasi Lea mpe ayaki na ye epai ya Yakobo mpo asangisa na ye nzoto. 24 Labana apesaki mpe Zilipa mosaleli na ye ya mwasi epai ya mwana na ye Lea, mpo azala mosaleli na ye.+ 25 Na ntɔngɔ Yakobo amonaki ete ezalaki nde Lea! Na yango, alobaki na Labana ete: “Likambo nini osali ngai? Nasalelaki yo mosala mpo na Rashele te? Mpo na nini okosi ngai?”+ 26 Bongo Labana alobaki ete: “Epai na biso bapesaka leki te liboso ya mwana ya liboso. 27 Pɔsɔ oyo, sepelá na mwasi oyo. Na nsima, okozwa mpe mwasi oyo mosusu mpo na mosala oyo okosalela ngai na mbula nsambo mosusu.”+ 28 Yakobo asalaki bongo, asepelaki na mwasi yango pɔsɔ mobimba, nsima na yango, Labana apesaki ye Rashele mwana na ye mpo azala mwasi na ye. 29 Lisusu, Labana apesaki Bila+ mosaleli na ye ya mwasi epai ya Rashele mwana na ye mpo azala mosaleli na ye.+

30 Na nsima, Yakobo asangisaki mpe nzoto na Rashele; alingaki ye mingi koleka Lea, mpe akobaki kosalela Labana mosala mbula nsambo mosusu.+ 31 Ntango Yehova amonaki ete Lea alingami te,* asalaki ete azwa zemi,*+ kasi Rashele azalaki ekomba.+ 32 Lea akómaki na zemi, abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Rubene,*+ mpo alobaki ete: “Mpamba te Yehova atali mpasi na ngai,+ sikoyo mobali na ngai akobanda kolinga ngai.” 33 Azwaki lisusu zemi, abotaki mwana mobali mpe alobaki ete: “Mpo Yehova amoni* ete nalingami te, yango wana apesi ngai lisusu mwana oyo.” Bongo apesaki ye nkombo Simeone.*+ 34 Azwaki lisusu zemi, abotaki mwana mobali mpe alobaki ete: “Na mbala oyo, mobali na ngai akokangama na ngai, mpo naboteli ye bana mibali misato.” Yango wana, apesaki ye nkombo Levi.*+ 35 Mpe azwaki lisusu zemi, abotaki mwana mobali mpe alobaki ete: “Mbala oyo nakosanzola Yehova.” Bongo apesaki ye nkombo Yuda.*+ Na nsima, atikaki kobota.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto