Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 38
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Yuda ná Tamara (1-30)

Ebandeli 38:2

Mitindami

  • +Eb 24:2, 3; 28:1

Ebandeli 38:3

Mitindami

  • +Mit 26:19

Ebandeli 38:5

Mitindami

  • +Yos 19:29, 31

Ebandeli 38:6

Mitindami

  • +Mt 1:3

Ebandeli 38:8

Mitindami

  • +Mib 25:5, 6; Mt 22:24

Ebandeli 38:9

Mitindami

  • +Rt 4:6
  • +Mib 25:7, 9

Ebandeli 38:10

Mitindami

  • +1Nt 2:3

Ebandeli 38:11

Mitindami

  • +Mit 26:19

Ebandeli 38:12

Mitindami

  • +Eb 38:2
  • +Yos 15:10, 12; Bas 14:1
  • +Eb 38:1

Ebandeli 38:14

Mitindami

  • +Mib 25:5

Ebandeli 38:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2004, lok. 30

Ebandeli 38:16

Mitindami

  • +Eb 38:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2004, lok. 30

Ebandeli 38:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Ndanga nini okopesa ngai.”

Ebandeli 38:18

Mitindami

  • +Eb 41:42; 1Ba 21:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 17

Ebandeli 38:20

Mitindami

  • +Eb 38:1

Ebandeli 38:24

Mitindami

  • +Le 21:9

Ebandeli 38:25

Mitindami

  • +Eb 38:16, 18

Ebandeli 38:26

Mitindami

  • +Eb 38:11; Mib 25:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2004, lok. 29

Ebandeli 38:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “kopasola; kokata.”

Mitindami

  • +Eb 46:12; Rt 4:12; 1Nt 2:4; Lk 3:23, 33

Ebandeli 38:30

Mitindami

  • +Mt 1:3

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 38:2Eb 24:2, 3; 28:1
Eba. 38:3Mit 26:19
Eba. 38:5Yos 19:29, 31
Eba. 38:6Mt 1:3
Eba. 38:8Mib 25:5, 6; Mt 22:24
Eba. 38:9Rt 4:6
Eba. 38:9Mib 25:7, 9
Eba. 38:101Nt 2:3
Eba. 38:11Mit 26:19
Eba. 38:12Eb 38:2
Eba. 38:12Yos 15:10, 12; Bas 14:1
Eba. 38:12Eb 38:1
Eba. 38:14Mib 25:5
Eba. 38:16Eb 38:11
Eba. 38:18Eb 41:42; 1Ba 21:8
Eba. 38:20Eb 38:1
Eba. 38:24Le 21:9
Eba. 38:25Eb 38:16, 18
Eba. 38:26Eb 38:11; Mib 25:5
Eba. 38:29Eb 46:12; Rt 4:12; 1Nt 2:4; Lk 3:23, 33
Eba. 38:30Mt 1:3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 38:1-30

Ebandeli

38 Na ntango yango, Yuda atikaki bandeko na ye mpe atɛlɛmisaki hema na ye pene na mobali moko, Moadulame; nkombo na ye Hira. 2 Kuna Yuda amonaki mwana mwasi ya Mokanana+ moko na nkombo Shua. Bongo azwaki ye mpe asangisaki na ye nzoto, 3 mpe azwaki zemi. Na nsima abotaki mwana mobali mpe Yuda apesaki ye nkombo Ere.+ 4 Azwaki lisusu zemi, abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Onane. 5 Lisusu, abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Shela. Ntango Shela abotamaki, Yuda azalaki na Akazibe.+

6 Na nsima, Yuda azwelaki Ere mwana na ye ya liboso mwasi, nkombo na ye Tamara.+ 7 Kasi Ere, mwana ya liboso ya Yuda, azalaki kosala makambo oyo ezalaki kosepelisa Yehova te; yango wana Yehova abomaki ye. 8 Na yango, Yuda alobaki na Onane ete: “Sangisá nzoto na mwasi ya ndeko na yo mpe salá na ye libala ya bosɛmɛki mpe botelá ndeko na yo bana.”+ 9 Kasi Onane ayebaki ete bana yango bakozala ya ye te.+ Yango wana ntango azalaki kosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na ye, azalaki kosopa mai na ye ya mibali na mabele mpo abotela ndeko na ye bana te.+ 10 Likambo oyo asalaki ezalaki mabe na miso ya Yehova; yango wana abomaki mpe ye.+ 11 Yuda alobaki na Tamara mwasi ya mwana na ye ete: “Lokola okómi mwasi oyo mobali akufá, fandá na ndako ya tata na yo tii mwana na ngai Shela akokola,” mpo alobaki na motema ete: ‘Mbala mosusu ye mpe akokufa lokola bandeko na ye.’+ Na yango, Tamara akendaki kofanda na ndako ya tata na ye.

12 Nsima ya mikolo mingi, mwasi ya Yuda, mwana ya Shua,+ akufaki. Eleko ya kolela ekómaki na nsuka, mpe na nsima Yuda akendaki na Timina+ elongo na moninga na ye Hira Moadulame,+ epai ya bakati-nsuki ya bampate na ye. 13 Bayebisaki Tamara ete: “Talá bokilo na yo azali komata na Timina mpo na kokata bampate na ye nsuki.” 14 Na yango, alongolaki bilamba ya mwasi oyo mobali akufá mpe amizipaki litambala ya monene, abombaki elongi mpe afandaki na esika ya kokɔta na Enaime, na balabala oyo ekei na Timina, mpo Tamara amonaki ete Shela akoli, kasi bapesaki ye epai ya Shela te mpo azala mwasi na ye.+

15 Ntango Yuda amonaki ye, na mbala moko akanisaki ete azali mwasi ya ndumba, mpo azipaki elongi na ye. 16 Bongo akendaki epai na ye, na pembeni ya balabala mpe alobaki ete: “Nabondeli yo, tiká nasangisa nzoto na yo,” mpo ayebaki te ete azalaki mwasi ya mwana na ye.+ Kasi, alobaki ete: “Okopesa ngai nini mpo osangisa na ngai nzoto?” 17 Na yango, azongisaki ete: “Nakotinda mwana-ntaba oyo nakozwa na etonga na ngai.” Kasi ye alobaki ete: “Okosimbisa ngai nini* tii okotinda yango?” 18 Abakisaki ete: “Ndanga nini napesa yo?” bongo ye alobaki ete: “Lopɛtɛ na yo ya kotya kashɛ,+ nsinga mpe lingenda na yo oyo ezali na lobɔkɔ na yo.” Bongo apesaki ye yango, asangisaki nzoto na ye mpe azwaki zemi. 19 Nsima na yango, atɛlɛmaki mpe akendaki, alongolaki litambala ya monene oyo amizipaki mpe alataki bilamba ya mwasi oyo mobali akufá.

20 Mpe Yuda atindaki mwana-ntaba na lobɔkɔ ya moninga na ye Moadulame+ mpo azwa ndanga oyo ezalaki na lobɔkɔ ya mwasi yango, kasi amonaki ye te. 21 Atunaki mibali ya esika yango: “Wapi mwasi ya ndumba ya tempelo, oyo azalaki na Enaime, na pembeni ya balabala?” Kasi balobaki ete: “Mwasi ya ndumba ya tempelo ata moko te azalaka na esika oyo.” 22 Nsukansuka, azongaki epai ya Yuda mpe alobaki ete: “Namoni ye te, kutu mibali ya esika yango balobi ete: ‘Mwasi ya ndumba ya tempelo ata moko te azalaka na esika oyo.’” 23 Bongo Yuda alobaki ete: “Azwa biloko yango, mpo bátyola biso te. Ngai natindaki mwana-ntaba oyo, kasi yo omonaki ye te.”

24 Nzokande, nsima ya sanza soki misato, bayebisaki Yuda ete: “Tamara mwasi ya mwana na yo asali bondumba, mpe azwi zemi na bondumba na ye.” Na yango, Yuda alobaki ete: “Bóbimisa ye libándá mpe atumbama.”+ 25 Ntango bazalaki kobimisa ye libándá, atindaki maloba epai ya bokilo na ye ete: “Nkolo ya biloko oyo nde mobali oyo atye ngai zemi.” Mpe abakisaki ete: “Nabondeli yo, talá malamumalamu soki biloko oyo ezali ya nani: lopɛtɛ ya kotya kashɛ, nsinga mpe lingenda.”+ 26 Bongo Yuda atalaki yango malamumalamu mpe alobaki ete: “Azali sembo koleka ngai, mpo napesaki ye te Shela mwana na ngai.”+ Mpe asangisaki na ye nzoto lisusu te nsima na yango.

27 Na ntango ya kobota, emonanaki ete mapasa bazalaki na libumu na ye. 28 Ntango azalaki kobota, mwana moko asembolaki lobɔkɔ na ye, mpe na mbala moko mwasi mobotisi asimbaki lobɔkɔ mpe akangaki yango eteni ya elamba ya motane, mpe alobaki ete: “Oyo abimaki liboso.” 29 Nsukansuka, ntango kaka mwana yango abendaki lobɔkɔ na ye, ndeko na ye nde abimaki, mpe mwasi mobotisi agangaki ete: “Yo moko opasoli nzela!” Yango wana bapesaki ye nkombo Pereze.*+ 30 Nsima na yango, ndeko na ye, oyo eteni ya elamba ya motane ezalaki na lobɔkɔ na ye, abimaki mpe bapesaki ye nkombo Zera.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto