Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 48
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Yakobo apamboli bana mibali mibale ya Yozefe (1-12)

      • Efraime azwi lipamboli ya monene mpenza (13-22)

Ebandeli 48:1

Mitindami

  • +Eb 41:50; Yos 14:4

Ebandeli 48:3

Mitindami

  • +Eb 28:13, 19; Hos 12:4

Ebandeli 48:4

Mitindami

  • +Eb 35:10, 11
  • +Eb 28:13, 14

Ebandeli 48:5

Mitindami

  • +Yos 14:4; 1Nt 5:1
  • +Eb 35:23

Ebandeli 48:6

Mitindami

  • +Yos 13:29; 16:5

Ebandeli 48:7

Mitindami

  • +Eb 35:19
  • +Mik 5:2
  • +1Sa 17:12; Mt 2:6

Ebandeli 48:9

Mitindami

  • +Eb 41:50
  • +Ebr 11:21

Ebandeli 48:11

Mitindami

  • +Eb 37:34, 35; 42:36; 46:30

Ebandeli 48:13

Mitindami

  • +Eb 41:52
  • +Eb 41:51

Ebandeli 48:14

Mitindami

  • +Eb 41:51; 46:20

Ebandeli 48:15

Mitindami

  • +1Nt 5:2
  • +Eb 17:1; 24:40
  • +Eb 28:13; Nz 23:1

Ebandeli 48:16

Mitindami

  • +Eb 28:15; 31:11; Nz 34:7
  • +Eb 32:26
  • +Kob 1:7; Mit 26:34, 37

Ebandeli 48:18

Mitindami

  • +Eb 41:51

Ebandeli 48:19

Mitindami

  • +Mit 2:18-21
  • +Mit 1:32, 33

Ebandeli 48:20

Mitindami

  • +Ebr 11:21

Ebandeli 48:21

Mitindami

  • +Eb 50:24
  • +Eb 15:14; 26:3; Mib 31:8

Ebandeli 48:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mopanzi moko ya mabele.” Lil., “lipeka moko.”

  • *

    To, “litimbo.”

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 48:1Eb 41:50; Yos 14:4
Eba. 48:3Eb 28:13, 19; Hos 12:4
Eba. 48:4Eb 35:10, 11
Eba. 48:4Eb 28:13, 14
Eba. 48:5Yos 14:4; 1Nt 5:1
Eba. 48:5Eb 35:23
Eba. 48:6Yos 13:29; 16:5
Eba. 48:7Eb 35:19
Eba. 48:7Mik 5:2
Eba. 48:71Sa 17:12; Mt 2:6
Eba. 48:9Eb 41:50
Eba. 48:9Ebr 11:21
Eba. 48:11Eb 37:34, 35; 42:36; 46:30
Eba. 48:13Eb 41:52
Eba. 48:13Eb 41:51
Eba. 48:14Eb 41:51; 46:20
Eba. 48:151Nt 5:2
Eba. 48:15Eb 17:1; 24:40
Eba. 48:15Eb 28:13; Nz 23:1
Eba. 48:16Eb 28:15; 31:11; Nz 34:7
Eba. 48:16Eb 32:26
Eba. 48:16Kob 1:7; Mit 26:34, 37
Eba. 48:18Eb 41:51
Eba. 48:19Mit 2:18-21
Eba. 48:19Mit 1:32, 33
Eba. 48:20Ebr 11:21
Eba. 48:21Eb 50:24
Eba. 48:21Eb 15:14; 26:3; Mib 31:8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 48:1-22

Ebandeli

48 Nsima ya makambo wana, balobaki na Yozefe ete: “Talá, tata na yo abandi kolɛmba.” Na yango, azwaki elongo na ye bana na ye mibale ya mibali, Manase ná Efraime.+ 2 Bongo bayebisaki Yakobo ete: “Talá mwana na yo Yozefe ayei epai na yo.” Na yango, Yisraele asalaki makasi mpe afandaki na mbeto na ye. 3 Mpe Yakobo alobaki na Yozefe ete:

“Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso abimelaki ngai na Luze, na mokili ya Kanana mpe apambolaki ngai.+ 4 Alobaki na ngai ete: ‘Nakosala ete obota, nakokómisa yo mingi, nakokómisa yo lisangá moko ya bato ya bikólo+ mpe nakopesa mokili oyo na libota na yo mpo ezala ya bango mpo na libela.’+ 5 Mpe sikoyo, bana mibali na yo mibale oyo obotaki na mokili ya Ezipito liboso naya epai na yo na Ezipito, bazali bana na ngai.+ Efraime ná Manase bakokóma bana na ngai lokola Rubene ná Simeone.+ 6 Kasi bana oyo okobota nsima na bango, bakozala ya yo. Bakobengama na nkombo ya bandeko na bango mpe bakozwa ndambo ya libula na bango.+ 7 Ntango nalongwaki na Padane, Rashele akufaki+ pene na ngai, na mokili ya Kanana, nzokande nzela ezalaki naino molai liboso ya kokóma na Efrata.+ Na yango, nakundaki ye kuna na nzela oyo ezali kokende na Efrata, elingi koloba, Beteleme.”+

8 Bongo Yisraele amonaki bana mibali ya Yozefe mpe atunaki ete: “Baoyo banani?” 9 Yozefe alobaki na tata na ye ete: “Bazali bana na ngai oyo Nzambe apesi ngai na esika oyo.”+ Mpe alobaki ete: “Nabondeli yo, yaká na bango epai na ngai mpo napambola bango.”+ 10 Sikoyo miso ya Yisraele elɛmbaki mpo na bobange, mpe azalaki komona malamu te. Na yango, Yozefe ayaki na bango penepene na ye, apwɛpwaki bango mpe ayambaki bango. 11 Yisraele alobaki na Yozefe ete: “Nakanisaki te ete nakomona elongi na yo,+ kasi talá Nzambe apesi ngai nzela namona mpe libota na yo.” 12 Na nsima, Yozefe alongolaki bango na mabɔlɔngɔ ya Yisraele, mpe agumbamaki elongi na nse.

13 Yozefe azwaki bango mibale, Efraime+ na lobɔkɔ na ye ya mobali mpo azala na lobɔkɔ ya mwasi ya Yisraele, mpe Manase+ na lobɔkɔ na ye ya mwasi mpo azala na lobɔkɔ ya mobali ya Yisraele, mpe ayaki na bango penepene na ye. 14 Kasi, Yisraele asembolaki lobɔkɔ na ye ya mobali mpe atyaki yango na motó ya Efraime, atako azalaki leki, mpe lobɔkɔ na ye ya mwasi na motó ya Manase. Atyaki mabɔkɔ na ye bongo na ntina, mpo Manase azalaki mwana ya liboso.+ 15 Mpe apambolaki Yozefe mpe alobaki ete:+

“Nzambe ya solo, oyo batata na ngai, Abrahama ná Yisaka batambolaki liboso na ye,+

Nzambe ya solo oyo akambi ngai na bomoi na ngai mobimba tii lelo,+

16 Anzelu oyo abikisi ngai na mpasi nyonso,+ pambolá bilenge mibali oyo.+

Tiká bábengama na nkombo na ngai mpe na nkombo ya batata na ngai, Abrahama ná Yisaka,

Tiká bábakisama tii bákóma ebele na mabele.”+

17 Ntango Yozefe amonaki ete tata na ye atiki lobɔkɔ na ye ya mobali na motó ya Efraime, yango esepelisaki ye te, mpe amekaki kosimba lobɔkɔ ya tata na ye mpo na kolongola yango na motó ya Efraime mpe kotya yango na motó ya Manase. 18 Yozefe alobaki na tata na ye ete: “Boye te, tata, mpo ye azali mwana ya liboso.+ Tyá lobɔkɔ na yo ya mobali na motó na ye.” 19 Kasi tata na ye azalaki kaka koboya mpe alobaki ete: “Nayebi, mwana na ngai, nayebi. Ye mpe akokóma ekólo mpe akokóma monene. Kasi, leki na ye akokóma monene koleka ye,+ mpe bato ya libota na ye bakokóma ebele mpe bakokokana na bikólo.”+ 20 Mpe akobaki kopambola bango na mokolo yango,+ na maloba oyo:

“Tiká Bayisraele bátánga yo ntango bazali koloba maloba ya lipamboli ete:

‘Nzambe akómisa yo lokola Efraime mpe lokola Manase.’”

Na yango, atyaki kaka Efraime liboso ya Manase.

21 Nsima na yango, Yisraele alobaki na Yozefe ete: “Talá, nazali kokufa,+ kasi Nzambe akokoba mpenza kozala elongo na bino mpe akozongisa bino na mokili ya bankɔkɔ na bino.+ 22 Kasi ngai, napesi yo mpenza eteni moko ya mabele* koleka bandeko na yo, mabele oyo nazwaki na lobɔkɔ ya Baamore na mopanga na ngai mpe na mbanzi* na ngai.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto