Yobo
24 “Mpo na nini Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atyá mokolo na ye ya kosambisa te?+
Mpo na nini baoyo bayebi ye bamoni mokolo na ye te?*
3 Bazwaka na makasi mpunda ya bana oyo batata bakufá
Mpe bakangaka ngɔmbɛ-mobali ya mwasi oyo mobali akufá mpo ezala ndanga.+
4 Babenganaka na makasi babola bálongwa na nzela;
Bato oyo bazangi lisalisi na mabele bamibombaka mosika na bango.+
5 Babola balukaka biloko ya kolya ndenge bampunda ya zamba+ elukaka bilei na esobe;
Balukaka biloko ya kolya mpo na bana na bango na mokili ekauká.
8 Bapɔlaka na mbula ya bangomba;
Bakangamaka na mabanga mpo esika ya kobombana ezali te.
9 Babɔtɔlaka ata na libɛlɛ mwana oyo tata akufá;+
Mpe bazwaka elamba ya mobola lokola ndanga,+
10 Yango wana basengeli kotambola bolumbu mpo bazangi elamba,
Mpe na nzala na bango, bazali komema mitó ya mbuma ya blé oyo babuki.
11 Banyokwamaka na mosala na katikati ya bifelo ya mikala na moi makasi;*
Banyatanyataka mbuma ya vinyo na bikamwelo, atako bongo bakufaka na mposa ya mai.+
12 Na kati ya engumba, bato oyo bazali pene na liwa bazali kolelalela,*
Mpe baoyo bazoki mpota ya liwa bazali* kobelela mpo na kosɛnga lisalisi,+
Kasi Nzambe amoni yango mabe te.*
13 Ezali na baoyo batombokelaka pole;+
Bayebaka banzela na yango te,
Mpe balandaka balabala na yango te.
14 Na ntɔngɔ, mobomi-bato atɛlɛmaka;
Abomaka moto oyo azangi lisalisi mpe mobola,+
Kasi na butu, amipesaka na koyiba.
Mpe azipi elongi na ye.
Bayebi pole ya mokolo te.+
17 Mpo na bango, ntɔngɔ ezali lokola molili makasi,
Mpo bameseni na nsɔmɔ ya molili makasi.
18 Kasi mai ememaka bango nokinoki.*
Eteni na bango ya mabele ekolakelama mabe.+
Bakobaluka te na bilanga ya vinyo na bango.
19 Ndenge kaka eleko ya kokauka ná molunge esilisaka nɛjɛ oyo ekómi mai,
20 Mama na ye akobosana ye;* nkusu ekolya ye na esengo,
Akokanisama lisusu te.+
Mpe kozanga bosembo ekokatama lokola nzete.
21 Alyelaka mwasi oyo abotaka te,
Mpe anyokolaka mwasi oyo mobali akufá.
22 Nzambe* akosalela makasi na ye mpo na kosilisa bato ya nguya;
Atako bakoki kotɛlɛma, bayebi te soki bakozala na bomoi.
24 Bapesi bango lokumu mpo na mwa ntango, na nsima bazali lisusu te.+
Bakitisami+ mpe bakufi lokola moto nyonso;
Bakatami lokola mitó ya mbuma.
25 Sikoyo, nani akoki komonisa ete nazali moto ya lokuta
To akoki koboya liloba na ngai?”