Nzembo
Epai ya mokambi ya nzembo; ya Yedutune.*+ Mondule ya Davidi.
Nakotya na monɔkɔ na ngai eloko ya kokanga monɔkɔ+
Ntango nyonso oyo moto mabe akozala pene na ngai.”
2 Nakómaki moto oyo alobaka te mpe nafandaki nyɛɛ;+
Nafandaki kimya ata mpo na likambo oyo ezali malamu,
Kasi mpasi na ngai ezalaki makasi.
3 Motema na ngai ezalaki kopela* na kati na ngai.
Wana nazalaki kokanisa mingi, mɔtɔ ezalaki kaka kopela.
Bongo lolemo na ngai elobaki ete:
4 “Ee Yehova, salisá ngai nayeba ndenge nsuka na ngai ekozala,
Mpe motángo ya mikolo na ngai,+
Mpo nayeba ndenge oyo bomoi na ngai ezali mokuse.
Ya solo moto nyonso ata soki amonani ete atɛlɛmi ngwi, azali kaka mwa mopɛpɛ.+ (Sela)
6 Ya solo moto nyonso azali kotambola epai na epai lokola elili.
Azali kokima mbangu* kaka mpamba.
Azali konduka bozwi, kasi ayebi te nani akosalela yango.+
7 Ee Yehova, natya elikya na nini?
Yo kaka nde elikya na ngai.
8 Bikisá ngai na misala na ngai nyonso ya kobuka mibeko.+
Kotika te ete zoba akómisa ngai eloko ya kotyola.
10 Longolá etumbu oyo opesi ngai.
Nasili makasi mpo lobɔkɔ na yo ebɛti ngai.
11 Osemboli moto na nzela ya etumbu mpo na libunga na ye;+
Olye biloko na ye ya motuya ndenge kaka ndɔngɛ elyaka.
Ya solo moto nyonso azali kaka mwa mopɛpɛ.+ (Sela)
Kosala te lokola nde omoni mai ya miso na ngai te.
Mpo nazali kaka moto oyo afandi mopaya epai na yo,+
Moto ya mobembo oyo azali koleka nzela,* kaka lokola bankɔkɔ na ngai nyonso.+
13 Kotala ngai na nkanda na yo te, mpo nazwa lisusu makasi
Liboso ete nakufa mpe nazala lisusu te.”