Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Kaina ná Abele (1-16)

      • Baoyo bauti na libota ya Kaina (17-24)

      • Sete ná mwana na ye Enoshe (25, 26)

Ebandeli 4:1

Mitindami

  • +Eb 1:28
  • +1Yn 3:10-12; Yd 11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2013, lok. 13

    Mekolá, nk. 10-11

Ebandeli 4:2

Mitindami

  • +Mt 23:35

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2013, nk. 13-14

    15/1/2002, lok. 22

    Mekolá, nk. 11-12

Ebandeli 4:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2002, lok. 21

    1/2/1999, lok. 21

    15/6/1996, nk. 4-5

Ebandeli 4:4

Mitindami

  • +Kob 13:12
  • +Ebr 11:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2015, lok. 16

    1/1/2013, nk. 14-15

    15/1/2002, lok. 21

    15/8/2000, nk. 13-14

    1/2/1999, lok. 21

    15/6/1996, lok. 4

    Mekolá, lok. 14

Ebandeli 4:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “elongi na ye ekweaki.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2013, lok. 15

    15/1/2002, nk. 21-22

    1/2/1999, lok. 21

    15/6/1996, nk. 4-5

    Mekolá, lok. 16

Ebandeli 4:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/1999, nk. 21, 23

    15/1/1999, lok. 21

    15/6/1994, lok. 14

Ebandeli 4:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2014, lok. 28

    15/1/2002, lok. 22

    1/2/1999, nk. 21-23

    15/1/1999, lok. 21

    15/6/1996, nk. 4-5

    15/6/1994, lok. 14

    1/2/1994, lok. 31

Ebandeli 4:8

Mitindami

  • +Mt 23:35; 1Yn 3:10-12; Yd 11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2013, lok. 15

    15/9/2002, lok. 28

    Mekolá, lok. 16

Ebandeli 4:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2002, lok. 22

Ebandeli 4:10

Mitindami

  • +Ebr 12:24

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, lok. 90

    “Bolingo ya Nzambe,” nk. 74-75

    Emoniseli, lok. 101

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2004, lok. 14

    15/11/1995, lok. 10

Ebandeli 4:11

Mitindami

  • +Eb 9:5

Ebandeli 4:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na etando ya mokili.”

Ebandeli 4:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2004, lok. 29

    15/1/2002, nk. 22-23

    1/2/1999, nk. 21-22

Ebandeli 4:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mokili ya Nod.”

Mitindami

  • +Eb 2:8

Ebandeli 4:17

Mitindami

  • +Eb 5:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    8/2016, lok. 5

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2010, lok. 25

    1/1/2004, lok. 29

    15/7/1992, lok. 4

    Ndenge ya kosolola, nk. 253-254, 383-384

Ebandeli 4:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “motako.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/2002, lok. 6

Ebandeli 4:24

Mitindami

  • +Eb 4:15

Ebandeli 4:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “oyo atyami; kotyama; kotya.”

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Eb 5:3; 1Nt 1:1
  • +Eb 4:8; Mt 23:35; Ebr 11:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2009, lok. 13

Ebandeli 4:26

Mitindami

  • +Eb 5:6; Lk 3:23, 38

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 1 2017 lok. 10

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2005, nk. 15-16

    15/9/2001, lok. 29

    15/1/1997, lok. 30

    15/11/1993, nk. 12-13

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 4:1Eb 1:28
Eba. 4:11Yn 3:10-12; Yd 11
Eba. 4:2Mt 23:35
Eba. 4:4Kob 13:12
Eba. 4:4Ebr 11:4
Eba. 4:8Mt 23:35; 1Yn 3:10-12; Yd 11
Eba. 4:10Ebr 12:24
Eba. 4:11Eb 9:5
Eba. 4:16Eb 2:8
Eba. 4:17Eb 5:4
Eba. 4:24Eb 4:15
Eba. 4:25Eb 4:8; Mt 23:35; Ebr 11:4
Eba. 4:25Eb 5:3; 1Nt 1:1
Eba. 4:26Eb 5:6; Lk 3:23, 38
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 4:1-26

Ebandeli

4 Adama asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva, mpe Eva azwaki zemi.+ Ntango abotaki Kaina,+ alobaki ete: “Yehova asalisi ngai nabota mwana mobali.” 2 Na nsima, abotaki mpe ndeko na ye Abele.+

Abele akómaki mobateli ya bampate, kasi Kaina akómaki mosali-bilanga. 3 Nsima ya mwa ntango, Kaina amemelaki Yehova mwa likabo ya mbuma ya bilanga. 4 Kasi Abele amemaki bana ya liboso ya banyama ya etonga na ye,+ ná mafuta na yango. Yehova andimaki Abele ná likabo na ye,+ 5 kasi andimaki ata moke te Kaina ná likabo na ye. Na yango, Kaina asilikaki makasi, mpe ayokaki mabe mpenza.* 6 Na nsima, Yehova alobaki na Kaina ete: “Mpo na nini osiliki makasi boye, mpe oyoki mabe mpenza? 7 Soki obandi kosala makambo ya malamu, nakondima yo te? Kasi soki osali makambo ya malamu te, lisumu ebatami na porte, mpe ezali na mposa ya kokonza yo; kasi yo okokoka kolonga yango?”

8 Nsima na yango, Kaina alobaki na ndeko na ye Abele ete: “Yaká tókende na bilanga.” Mpe ntango bazalaki na bilanga, Kaina akwelaki ndeko na ye Abele mpe abomaki ye.+ 9 Na nsima, Yehova alobaki na Kaina ete: “Wapi ndeko na yo Abele?” mpe ye alobaki ete: “Nayebi te. Ngai nde mobateli ya ndeko na ngai?” 10 Mpe Nzambe alobaki ete: “Likambo nini osali? Yoká! Makila ya ndeko na yo ezali kobelela ngai uta na mabele.+ 11 Mpe sikoyo olakelami mabe, nabengani yo na mabele oyo efungoli monɔkɔ na yango mpo na komɛla makila ya ndeko na yo oyo lobɔkɔ na yo+ esopi. 12 Ntango okolona biloko na mabele, ekobota te na ndenge esengeli. Okobanda koyengayenga mpe kokimakima na mabele.” 13 Bongo Kaina alobaki na Yehova ete: “Etumbu mpo na libunga na ngai eleki monene mingi, nakokoka yango te. 14 Lelo oyo ozali kobengana ngai na mokili oyo,* nakobombana mpo namonana te liboso ya elongi na yo; nakokóma koyengayenga mpe kokimakima na mabele, mpe moto oyo akomona ngai akoboma ngai mpenza.” 15 Na yango, Yehova alobaki na ye ete: “Yango wana moto oyo akoboma Kaina bakozongisela ye mabe mbala nsambo.”

Bongo, Yehova atyaki elembo mpo na Kaina ete moto oyo akomona ye aboma ye te. 16 Na nsima, Kaina alongwaki liboso ya Yehova mpe akendaki kofanda na “mokili ya moto oyo akimá,”* na ɛsti ya Edene.+

17 Na nsima, Kaina asangisaki nzoto na mwasi na ye+ mpe azwaki zemi mpe abotaki Enoka. Bongo abandaki kotonga engumba moko mpe apesaki yango nkombo ya mwana na ye Enoka. 18 Na nsima, Enoka abotaki Irade. Irade abotaki Mehuyaele, Mehuyaele abotaki Metushaele, mpe Metushaele abotaki Lameke.

19 Lameke azwaki basi mibale. Ya liboso nkombo na ye Ada mpe ya mibale Zila. 20 Ada abotaki Yabale. Yabale azalaki nkɔkɔ ya baoyo bafandaka na bahema mpe bazalaka na bibwɛlɛ. 21 Nkombo ya ndeko na ye Yubale. Ye azalaki nkɔkɔ ya baoyo nyonso bayebi kobɛta nzɛnzɛ mpe piololo. 22 Zila mpe abotaki Tubale-kaina, mosali ya biloko ya kwivre* mpe ya bibende ya lolenge nyonso. Mpe ndeko na ye ya mwasi ezalaki Naama. 23 Mpe Lameke abongiselaki basi na ye Ada ná Zila maloba oyo:

“Bóyoka mongongo na ngai, bino basi ya Lameke;

Bótya litoi na maloba na ngai:

Nabomaki moto mpo azokisaki ngai,

Ɛɛ, elenge mobali mpo abɛtaki ngai.

24 Soki mpo na Kaina mabe esengeli kozongisama+ mbala nsambo,

Boye mpo na Lameke mbala 77.”

25 Adama asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye; mwasi na ye abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Sete,*+ mpo alobaki ete: “Nzambe apesi ngai mwana* mosusu na esika ya Abele, mpo Kaina abomaki ye.”+ 26 Sete mpe abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Enoshe.+ Na ntango yango bato babandaki kobelela nkombo ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto