Balevi
6 Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 2 “Soki moto* moko asali lisumu mpe azangi mpenza bosembo epai ya Yehova+ na ndenge akosi moninga na ye, mpo na eloko moko oyo basimbisi ye+ to eloko moko oyo babombisi epai na ye to ayibi to mpe abubi moninga na ye, 3 to akuti eloko oyo ebungaki mpe akosi mpo na eloko yango, soki alapi ndai ya lokuta mpo na lisumu nyonso oyo akoki kosala,+ asengeli kosala likambo oyo: 4 Soki asali lisumu mpe amemi ngambo, asengeli kozongisa eloko oyo ayibaki, to abɔtɔlaki, oyo azwaki na kobuba, oyo basimbisaki ye, to eloko oyo ebungaki oyo ye amonaki, 5 to eloko nyonso oyo alapelaki ndai ya lokuta, mpe asengeli kofuta motuya na yango mobimba,+ mpe akobakisa na motuya yango moko ya bandambo mitano na yango. Akopesa yango nkolo na yango na mokolo oyo ngambo na ye eyebani. 6 Mpe akomemela nganga-nzambe mpate-mobali oyo ezangi mbeba, oyo euti na etonga ya bampate na kotalela motuya oyo ekatami, lokola likabo ya ngambo na ye epai ya Yehova, mpo ezala likabo ya ngambo.+ 7 Nganga-nzambe akozipa masumu na ye liboso ya Yehova, mpe akolimbisama mpo na likambo nyonso oyo asalaki, oyo ememisi ye ngambo.”+
8 Yehova akobaki koloba na Moize boye: 9 “Pesá Arona ná bana na ye ya mibali mitindo ete: ‘Mobeko ya likabo ya kotumba yango oyo:+ Likabo ya kotumba ekotikala likoló ya esika oyo mɔtɔ epelaka likoló ya etumbelo butu mobimba tii na ntɔngɔ, mpe mɔtɔ ekokoba kopela na etumbelo. 10 Nganga-nzambe akolata elamba na ye ya mosala, oyo esalemi na lini,+ mpe akolata kupe*+ ya lini na nzoto. Na nsima, asengeli kolongola putulu ya mɔtɔ*+ ya likabo ya kotumba oyo mɔtɔ etumbi likoló ya etumbelo, mpe akotya yango pembeni ya etumbelo. 11 Na nsima akolongola bilamba na ye+ mpe akolata bilamba mosusu, mpe akomema putulu yango ya mɔtɔ na esika ya pɛto, oyo ezali libándá ya kaa.+ 12 Mɔtɔ ekokoba kopela likoló ya etumbelo. Yango esengeli kokufa te. Nganga-nzambe asengeli kotumba nkoni+ likoló na yango ntɔngɔ nyonso mpe kobongisa likabo ya kotumba likoló na yango, mpe akosala ete biteni ya mafuta ya mbeka ya kimya* ebimisa milinga likoló na yango.+ 13 Mɔtɔ ekokoba kopela ntango nyonso likoló ya etumbelo. Esengeli kokufa te.
14 “‘Sikoyo mobeko ya likabo ya mbuma* yango oyo:+ Bino bana mibali ya Arona, bópesa yango liboso ya Yehova, liboso ya etumbelo. 15 Moko na bango akotondisa lobɔkɔ na ye na ndambo ya farini ya malamu ya likabo ya mbuma ná ndambo ya mafuta na yango mpe olibana nyonso oyo ezali likoló ya likabo ya mbuma, mpe akosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo lokola nsolo moko oyo ezali kosepelisa* mpo ezala elembo* ya likabo epai ya Yehova.+ 16 Arona ná bana na ye ya mibali bakolya oyo etikali.+ Ekolyama lokola limpa ezangá levire, na esika mosantu. Bakolya yango na lopango ya hema ya kokutana.+ 17 Yango esengeli te kotumbama na eloko oyo etyami levire.+ Napesi yango ezala eteni na bango oyo euti na makabo na ngai, oyo etumbami na mɔtɔ.+ Yango ezali eloko oyo eleki mosantu,+ lokola likabo mpo na lisumu mpe lokola likabo ya ngambo. 18 Mwana mobali nyonso oyo azali na kati ya bakitani ya Arona nde akolya yango.+ Yango ezali eteni na bango mpo na libela na boumeli ya mabota na bango, oyo ekouta na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ.+ Eloko nyonso oyo ekosimba yango,* ekokóma mosantu.’”
19 Yehova alobaki lisusu na Moize boye: 20 “Talá likabo oyo Arona ná bana na ye ya mibali bakopesa Yehova na mokolo oyo Arona akotyama mafuta:+ moko ya bandambo zomi ya efa*+ ya farini ya malamu lokola likabo ya mbuma ya ntango nyonso,+ ndambo na yango na ntɔngɔ mpe ndambo na yango mosusu na mpokwa. 21 Yango ekosalema na mafuta, na kikalungu.+ Okomema yango nsima ya kosangisa yango malamu ná mafuta mpe okopesa yango bitenibiteni lokola eloko oyo etumbami ya likabo ya mbuma, mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova. 22 Na kati ya bana na ye ya mibali, nganga-nzambe oyo akotyama mafuta mpo na kozwa esika na ye,+ akosala mpe bongo. Oyo ezali mobeko mpo na libela: Akosala ete ebimisa milinga lokola likabo mobimba mpo na Yehova. 23 Likabo nyonso ya mbuma ya nganga-nzambe, ekozala likabo mobimba. Esengeli kolyama te.”
24 Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 25 “Lobá na Arona ná bana na ye ya mibali: ‘Mobeko ya likabo mpo na lisumu yango oyo:+ Esika likabo ya kotumba ebomamaka,+ likabo ya lisumu mpe ekobomama wana liboso ya Yehova. Ezali eloko moko oyo eleki mosantu. 26 Nganga-nzambe oyo azali kopesa yango mpo na lisumu, akolya yango.+ Ekolyama na esika mosantu na kati ya lopango ya hema ya kokutana.+
27 “‘Eloko nyonso oyo ekotuta mosuni na yango ekokóma mosantu, mpe ntango moto akomwangisa ndambo ya makila na yango likoló ya elamba na ye, osengeli kosukola elamba yango oyo ye akomwangisela makila na esika mosantu. 28 Mbɛki ya mabele oyo balambaki mosuni yango ekobukama. Kasi soki elambamaki na esaleli ya kwivre, esaleli yango esengeli konikama mpe kosukolama na mai.
29 “‘Mobali nyonso oyo azali nganga-nzambe akolya yango.+ Yango ezali eloko oyo eleki mosantu.+ 30 Nzokande, likabo nyonso mpo na lisumu ekolyama te soki ndambo ya makila na yango ememami na kati ya hema ya kokutana mpo na kozipa masumu na esika mosantu.+ Yango ekozikisama na mɔtɔ.