Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 46
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Makabo ya kopesa na mabaku mosusu (1-15)

      • Libula ya eloko ya nkumu (16-18)

      • Bisika ya kotɔkisa makabo (19-24)

Ezekiele 46:1

Mitindami

  • +Ezk 40:32
  • +Ezk 44:1, 2
  • +Kob 20:9

Ezekiele 46:2

Mitindami

  • +Ezk 44:3

Ezekiele 46:3

Mitindami

  • +Nz 81:3; Yis 66:23

Ezekiele 46:4

Mitindami

  • +Mit 28:9, 10; Ezk 45:17

Ezekiele 46:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ap. B14.

  • *

    Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +Ezk 46:11

Ezekiele 46:6

Mitindami

  • +Mit 28:11-15

Ezekiele 46:8

Mitindami

  • +Ezk 46:2

Ezekiele 46:9

Mitindami

  • +Kob 23:14; Mib 16:16
  • +Ezk 40:20
  • +Ezk 40:24

Ezekiele 46:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1999, lok. 16

Ezekiele 46:11

Mitindami

  • +Ezk 45:21, 24; 46:6, 7

Ezekiele 46:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Le 1:3
  • +Ezk 45:17
  • +Ezk 46:1, 2

Ezekiele 46:13

Mitindami

  • +Kob 29:38; Mit 28:3, 5

Ezekiele 46:17

Mitindami

  • +Le 25:10

Ezekiele 46:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bandako mosantu.”

Mitindami

  • +Ezk 42:9
  • +Ezk 42:1

Ezekiele 46:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “básantisa bato te.”

Mitindami

  • +Le 2:4, 5
  • +Ezk 44:19

Ezekiele 46:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “matumu.”

Ezekiele 46:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ezali kolobela mapeko ya molai. Talá Ap. B14.

  • *

    To, “Yango minei ná matumu na yango ezalaki ndenge moko.”

Ezekiele 46:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molɔngɔ.”

Ezekiele 46:24

Mitindami

  • +2Nt 35:13

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 46:1Ezk 40:32
Ezk. 46:1Ezk 44:1, 2
Ezk. 46:1Kob 20:9
Ezk. 46:2Ezk 44:3
Ezk. 46:3Nz 81:3; Yis 66:23
Ezk. 46:4Mit 28:9, 10; Ezk 45:17
Ezk. 46:5Ezk 46:11
Ezk. 46:6Mit 28:11-15
Ezk. 46:8Ezk 46:2
Ezk. 46:9Kob 23:14; Mib 16:16
Ezk. 46:9Ezk 40:20
Ezk. 46:9Ezk 40:24
Ezk. 46:11Ezk 45:21, 24; 46:6, 7
Ezk. 46:12Le 1:3
Ezk. 46:12Ezk 45:17
Ezk. 46:12Ezk 46:1, 2
Ezk. 46:13Kob 29:38; Mit 28:3, 5
Ezk. 46:17Le 25:10
Ezk. 46:19Ezk 42:9
Ezk. 46:19Ezk 42:1
Ezk. 46:20Le 2:4, 5
Ezk. 46:20Ezk 44:19
Ezk. 46:242Nt 35:13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 46:1-24

Ezekiele

46 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Porte ya lopango ya kati oyo etali na ɛsti+ esengeli kokangama+ mikolo motoba ya mosala,+ kasi na mokolo ya sabata mpe na mokolo ya sanza ya sika, esengeli kofungolama. 2 Soki nkumu auti na lopango ya libándá akokɔta na nzela ya ndako ya kokɔtela ya porte yango,+ mpe akotɛlɛma pene na likonzí ya porte. Banganga-nzambe bakopesa likabo na ye ya kotumba mobimba mpe bambeka na ye ya kimya, mpe akogumbama na ekɔtelo ya porte, na nsima akobima, kasi porte ekokangama te tii na mpokwa. 3 Bato ya mokili mpe bakogumbama liboso ya Yehova na ekɔtelo ya porte wana na basabata mpe na basanza ya sika.+

4 “‘Likabo ya kotumba mobimba oyo nkumu akopesa Yehova na mokolo ya sabata ekozala bana-mpate motoba ya mibali, oyo ezangi mbeba, mpe mpate-mobali moko oyo ezangi mbeba.+ 5 Likabo ya mbuma ekozala efa* moko mpo na mpate-mobali, mpe nyonso oyo akoki kopesa mpo na bana-mpate ya mibali. Mpe mpo na mafuta: hini* moko mpo na efa moko.+ 6 Na mokolo ya sanza ya sika, likabo ekozala ya mwana-ngɔmbɛ mobali moko ya etonga, oyo ezangi mbeba, bana-mpate motoba ya mibali mpe mpate-mobali moko; ekozala banyama oyo ezangi mbeba.+ 7 Akopesa likabo ya mbuma: efa moko mpo na mwana-ngɔmbɛ mobali, efa moko mpo na mpate-mobali, mpe mpo na bana-mpate mibali akopesa oyo akokoka kopesa. Mpe akopesa hini moko ya mafuta mpo na efa moko.

8 “‘Ntango nkumu azali kokɔta, akokɔta na nzela ya ndako ya kokɔtela ya porte yango, mpe akobima kaka na nzela yango.+ 9 Wana bato ya mokili bazali koya liboso ya Yehova na ntango ya bafɛti,+ baoyo bazali kokɔta na nzela ya porte ya nɔrdi+ mpo na kosambela bakobima na nzela ya porte ya sudi,+ mpe baoyo bazali kokɔta na nzela ya porte ya sudi bakobima na nzela ya porte ya nɔrdi. Moto moko te akozonga na nzela ya porte oyo akɔtaki, mpo bakobima na porte oyo ezali kotala bango. 10 Nde nkumu na kati na bango, akokɔta ntango bazali kokɔta, mpe akobima ntango bazali kobima. 11 Na ntango ya bafɛti mpe na bileko ya fɛti, likabo ya mbuma ekozala efa moko mpo na mwana-ngɔmbɛ mobali, efa moko mpo na mpate-mobali, mpe mpo na bana-mpate ya mibali akopesa oyo akokoka kopesa. Mpe mpo na mafuta: hini moko mpo na efa moko.+

12 “‘Soki nkumu apesi Yehova likabo ya kotumba mobimba,+ to bambeka ya kimya* mpo alingaka ye, bakofungolela ye porte oyo etali na ɛsti, mpe akopesa likabo na ye ya kotumba mobimba mpe bambeka na ye ya kimya kaka ndenge asalaka na mokolo ya Sabata.+ Mpe soki abimi, bakokanga porte nsima na ye.+

13 “‘Mokolo na mokolo okopesa Yehova mwana-mpate ya mobali, oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, lokola likabo ya kotumba mobimba.+ Okosala yango ntɔngɔ nyonso. 14 Ntɔngɔ nyonso okopesa nzela moko na yango moko ya bandambo motoba ya efa lokola likabo ya mbuma, ná moko ya bandambo misato ya hini ya mafuta mpo na komwangisa yango na farini ya malamu. Ekozala likabo ya mbuma ya ntango nyonso epai ya Yehova. Yango ezali mobeko mpo na libela. 15 Ntɔngɔ nyonso basengeli kopesa mwana-mpate ya mobali, likabo ya mbuma ná mafuta mpo ezala likabo ya kotumba mobimba ya ntango nyonso.’

16 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Soki nkumu apesi mwana na ye mokomoko likabo lokola libula, yango ekokóma eloko ya bana na ye. Ezali eloko na bango oyo bazwi libula. 17 Kasi soki apesi moko ya basaleli na ye likabo oyo euti na libula na ye, ekozala ya ye tii na mbula ya bonsomi;+ mpe na nsima, ekozonga epai ya nkumu. Kaka libula ya bana na ye nde ekozala ya bango ntango nyonso. 18 Nkumu akozwa libula moko te ya bato; akobengana bango na bisika na bango te. Akopesa bana na ye libula na esika oyo ezali ya ye moko, mpo bábengana moto moko te kati na bato na ngai na esika na ye.’”

19 Bongo alekisaki ngai na esika ya kokɔta+ oyo ezali na mopanzi ya porte oyo ekei tii na bisika mosantu ya kolya* ya banganga-nzambe, oyo ezalaki kotala na nɔrdi,+ mpe kuna namonaki esika moko na nsuka, na wɛsti. 20 Alobaki na ngai boye: “Oyo nde esika banganga-nzambe bakotɔkisa likabo mpo na ngambo ná likabo mpo na lisumu, mpe esika bakotumba likabo ya mbuma,+ mpo bábimisa eloko moko te na lopango ya libándá, mpe bákómisa bato basantu te.”*+

21 Abimisaki ngai na lopango ya libándá mpe alekisaki ngai epai ya makonzí minei ya mabanga ya ntina mingi* ya lopango, mpe namonaki lopango moko na likonzí mokomoko ya lopango ya libándá. 22 Na makonzí minei ya mabanga ya ntina mingi ya lopango ezalaki na mapango ya mike: mapeko* 40 na molai mpe mapeko 30 na monene. Yango nyonso minei ezalaki ndenge moko.* 23 Ezalaki na baetajɛ* zingazinga na yango nyonso minei, mpe na nse ya baetajɛ yango batongaki bisika ya kotɔkisa makabo. 24 Bongo alobaki na ngai boye: “Oyo nde bandako, esika basaleli ya Tempelo batɔkisaka bambeka ya bato.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto